1 Yo moto ozali mosambisi na bamosusu, mpe ozali kosala mabe mana lokola, ozali komikanga yo mei. Mpe bolimbisi ezali te mpo na yo. 2 Baye basalaka mambi mana, etumbu ya Nzambe ekwelaka bango. 3 Na boye, ozali kopesa mbano na bato bana, nzokande yo mpe mobebisi, lolenge nkani okokima nkele ya Nzambe? 4 Kotsiola boboto mpe bolamu bwa ye te,mawa na ye azali kozila yo, nde obongola motema. 5 Kasi motu mangbongi na yo, motema makasi, oazali kobenda nkanda ya esambiselo ya Nzambe mokolo akokatela bango banso etumbu ekoki. 6 Akopesa na moto yonso mbano ya misala mya ye. 7 Baye ya misala malamu, balukka lokumu mpe esengo ya libela ya mbeba te, akopesa bomoi ya seko. 8 Kasi, baye batosaka Nzambe te, baboyi solona ye, balandi bobele mabe, bakomona nkanda mpe bilelo. 9 Baye banso bazali kosala mabe, bakozwa etumbu mpe bwale motindo na motindo, likolo na moko na moko basali ya mabe, kobanda na bayuda, kosukisa na ba-Ela. 10 Kasi kimia, lokumu mpe boboto ikozala na oyo asali malamu, yambo ezali bayuda, na sima baela. 11 Jambi kokobola ezali te, na bonzambe. Baye bayebaki mibeko te, mpe basumukaki, bakozwa etumbu; kasi miango te. 12 Baye bazali na boyebi na miango bakozwa etumbu engebene na mibeko. 13 Baye bazali bakoyoka kaka mibeko, basepelisaka Nzambe te. Kasi esengo na baye bakomitiaka na misala. 14 Komona ete bapagano bayebi mibeko te, kasi basalaka lolenge elingi mibeko, atako bayebi yango te; euti na bizaleli na bango moko. 15 Na yango bazali komanyola kati na mitema na bango, makambo oyo elongobani na mibeko. Basosolalka ete ezali solo. Bamifundaka bango mei kati na makanisi, soki basali malamu to mabe liboso na Nzambe. 16 Mabombami na moto na moto ekobima pwasa mokolo ya esambiselo ya Nzambe, na ntina ya nsango malamu ya Yesu nalakisi bino. 17 Olobi ozali moyuda, ofandisa bomoi na mibeko, otutaka tolo na Nzambe na yo. 18 Oyebi makambo esepelisaka ye, oyo ezali na bokeseni, ozali na boyebi yango. 19 Okanisi ozali penza motambwisi ya bakufi miso mpe lotiki na baye bazali na molili. 20 omikomisa molakisi ya bazoba, moteyi ya bilenge, okanisi na ntina na mibeko nde oyebi maso ya bosembo. 21 Yo oyo oteyaka basusu, mpo na nini omiteyaka te? Yo, oteyaka basusu bayiba te, oyibaka te? 22 Opekisaka basusu kindumba, yo moko osalaka te? Yo, moyini na bikeko, mpo na nini ozali koyiba na tempelo? 23 Yo, otombolaka mapeka ete oyebi mibeko, obukaka miko te? nakomonela mibeko na Nzambe pamba? 24 Boye,nkombo ya Nzambe etukami epai ya bapagano mpo na yo. 25 Kokatama ngenga ezali ntina soki otosi mibeko. Soki na boye te, ozali kaka mosutu. 26 Soki moto na mosutu atosi mibeko, ki-mosutu na ye eleki mokatami ngenga te? 27 Bongo, moto ya mosutu uta mbotama, azali sembo na mibeko, akosambisa yo te, mokatami ngenga? Kaka mpo oyebi makomi, okatama ngenga nde, bozali kobuka mibeko na nko! 28 Na boye, libanda ezali kati te, mpo na moyuda ya solo, ngenga ya libanda na nzoto ezali elembo ya pamba. 29 Kasi moyuda ya solo, bayebaka ye na bizaleli, mpe ngenga ya solo ezali motema etondi na misala ya molimo, ezali mpo na kotanga te. Lokumu ya moto ya lolenge boye, euti na bato te, nse na Nzambe.