1 Bongo, litomba nini bayuda bazali na yango? Kokatisa ngenga nde nini? 2 Na bosembo ezali ntina; mpo Nzambe amimonisaki yambo nde na bayuda. 3 Boniboni? Bayike o kati na bango bandimelaki ye te. Bongo Nzambe akosundola bayuda? 4 Ekosalema te. Ata bato banso bazali bakosi, Nzambe azali sembo. Zambi ekomama ete: «Maloba mayo mazala solo, mpo ntango okosambisama liboso ya bajuzi oyeba na kolonga. 5 Kasi soki mabunga ma biso mazali kotalisa bosembo na Nzambe, tokoloba nini? Ye azali sembo te, mpo azali kopesa biso bitumbu? Ezali bongo? Wana ezali makanisi ya bato. 6 Ezali bongo te, soki azali sembo te, akosambisa mokili ndenge nini? 7 Soki na lokuta na ngai, bosembo na Nzambe ezali komatisa ye lokumu, na ntina nini nazali kosambisama bo mosumuki? 8 Mpo na nini tosala mabe mpe tozwa bolamu, ndenge basusu bazali kolobela biso tosala bongo; «Mabe tokosala, ekoyela biso bolamu?» Bakozwa mbano elongobani na biloba-loba wana. 9 Nde nini? tosengeli komilongisa? Soki moke te. Zambi tosilaki kofunda bayuda na ba Ela ete bazali na nse ya lisumu, 10 pelamoko ekomami: «Moyengebene azali te, ata moko te.» 11 Moko te azali kososola. Ata moko te azali koluka Nzambe. 12 Bango banso bapesi Nzambe mokongo, bakomi banso bibobolo. Ata moto te azali kosala malamu, ata moko te. 13 Maloba na bango ezali kunda ya kofungwama mpe kokosa bato. Lolemo na bango etondi na ngenge ya nyoka. 14 Minoko mya bango mitondi na bilakeli mabe mpe lokuta. 15 Bakimaka penza lombangu kosopa makila ya bato. 16 Koboma mpe konyokola bato, ezali mpasi te. 17 Bango balukaka kimia te. 18 Liboso na bango babangaka Nzambe te. 19 Sik'oyo, toyebi ete mibeko ekomama mpo na baye bazali kotosa miango. Na boye, moto moko te afungola mbanga mpo mokili mobimba ekobuka mabolongo liboso na Nzambe. 20 Na yango, moto moko te akobika mpo na kotosa mobeko. Pamba te, boyebi lisumu eyei na nzela ya mobeko. 21 Kasi sasaipi, bosembo na Nzambe ezali kokokisama na mobeko te. Yango etatolamaka na mobeko mpe basakoli. 22 Bosembo yango ekokisami na nzila na kondima Yesu Klisto. Zambi bokeseni ezali te. 23 Pamba te, banso basumuki mpe bazangi nkembo na Nzambe. 24 Bango banso balimbisami na ngolu na ye, na lisiko na Klisto Yesu. 25 Zambi Nzambe apesi Klisto lokola lisiko na makila ma ye tobika. Abonzela Klisto mpo azala ndakisa ya bosembo na ye, uta kala, azalaki kokanga motema mpo na kokatela etumbu ya masumu na bango. 26 Sasaipi alakisi bosembo na ye. Mpo amonana ete azali sembo, na yango, baye banso bandimeli Yesu, bakomi sembo liboso na ye. 27 Na boye, nani akoki kotombola miluku na ye? Na likambo nini? Na ntina na misala na mibeko? Ezali boye te, Moboko ezali nde bondimi. 28 Tomanyoli et moto akokoma sembo nde na bondimi, kasi na misala ya mibeko te. 29 Tososola; Nzambe azali kaka ya bayuda? Azali ya bikolo binso te? Boye, ya bikolo binso. 30 Soki ete Nzambe azali moko, akobikisa bakati ngenga na ntina na bondimi na bango mpe bato na misutu na nzela ya kondima. 31 Nde bongo tokobebisa mibeko na ntina na bondimi? Ezali bongo te! Totiya mpe mokoloto na mibeko.