Romans 1 — Lingála

1 Mosali na Yesu klisto, Polo, aponami mpe abulisami ntoma na Nzambe, 2 mpo na sango malamu na Nzambe ezali oyo elakama uta kala na basakoli na makomi mosantu. 3 Oyo etali mwana na ye, uta na nzela ya libota ya Dawidi. 4 Na bongo abiangami mwana na nzambe engebene na nguya ya Molimo Mosantu, na lisekwa ya bakufi, nde Yesu Klisto Mokonzi na biso. 5 Na ye , tozwi ngolu mpe lotomo ya kolakisa bikolo binso molongo boyambi, mpe botosi o nkombo ya ye. 6 Na bikolo bina, bino mpe lokola bopanami bozala baye. 7 Balingami na Nzambe, baye bazwami na Roma, mpe babiangami kozala bansatu. Ngolu mpe kimia kati na bino kouta na Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Klisto. 8 Napesi matondi, yambo penza na Nzambe mpe Yesu Klisto mpo na bino banso, mpo ete kondima na bino etatolami na mokili mobimba. 9 Mpo ete Nzambe oyo nazali kosalela kati na ngai na ntina na Sango malamu ya mwana na ye, ayebi maye nalobelaka mpo na bino. 10 Nalombaka mikolo minso na mabondeli na ngai, libaku ezwama, naya kotala bino soki Nzambe alingi. 11 Mposa ezali naya kolakisa bino ndambu ya misala ya molimo, mpo bolendisama. 12 Na ntina ete, tozala biso banso na bopikiliki na kondima; mpe ya bino. 13 Balingami, nalingi bobosana te, sik'oyo, ete nalingaki mbala ebele kotala bino, kasi nazwi ndingisa te kino sik'oyo. Ezalaki na ntina komona misala malamu kati na bino lokola ezalaki epai ya bapagano. 14 Nazali na likambo ya kobongisa na Ba-Ela mpe bapaya, epai bayibwanya mpe bilema. 15 Na maye matali ngai, nabongami kosakola bino nsango malamu, na bino oyo bozali na Roma. 16 Pamba te, nsoni ezangi ngai mpo na nsango malamu. Yango ezali nguya ya Nzambe na oyo andimi, yambo nde Bayuda, elandi Ba Ela. 17 Bosembo na Nzambe emonani kati na ye, na ntina ya boyambi bondimi, lokola ekomami: « Moyengebene akobika na bondima.» 18 Uta likolo, nkanda na Nzambe ekitaka likolo na bato bazali kosumuka, na makambo ya bosoto, bozangi boyengebene ya bato ezali kozangisa bango Bonzambe. 19 Mpo ete, makambo ya Nzambe eyebani polele, ye moko atalisi bango. 20 Nguya ya Nzambe mpe bonzabe na ye, oyo miiso ekoki komona te, eyebani na bato kati na bikela na ye uta ebandeli ya mokili. Na yango bolimbisi ekozala te. 21 Mpo ete atako bayebi Nzambe, baboyi kokumisa ye mpe kosanjola ye. Kasi bakomi bazoba mpe mitema mya bango mizangi bososoli, yango ezali kati na molili. 22 Ba-mikwi lokola bato ya bwana, nzoka nde bazoba. 23 Bamisaleli bikeko na elilingi ya bato, ndeke, nyama mpe nyoka mpo bakumisa yango, koleka Nzambe. 24 Na bongo, Nzambe asundoli bango kati na mposa mabe ya mitema mya bango na mbindo; mpo ete bayokisama nsoni. 25 Ezali nde bango babongoli Solo ya Nzambe na lokuta, mpe bazali kokumisa bikelamu na esika ya Mokeli oyo abongi na lokumu seko na seko. Amen! 26 Yango wana Nzambe asundoli bango kati na mposa mabe, nzambi basi na bango bakomi kosala bosoni bango na bango, makambo oyo Nzambe alingaka te. 27 Ndenge moko mpe na mibali, batiki kosala maye malongobani na basi ya bango mpo bakokisa mposa mabe kati na bango. Mibali bakomi kotambola na mibali oyo ebongi te, bazali komikatela etumbu na miko mina. 28 Lokola bango baboyi komemya Nzambe, ye asundoli bango basalela makanisi mabe oyo esengelaki te basala. 29 Batondi na mabe lolenge nyoso, nkanda, mposa mabe mpe mayele mabe. Batondi na mposa ya, koboma, koswana, lokuta mpe makanisi mabe. 30 Bazali bato ya nsongi nsongi, batongi, banguna ya Nzambe. Bafinganaka, bato ya enzombo. Balingaka ntango inso kosala mabe, batosaka baboti te. 31 Bazangi mayele, bazangi bosolo, bazangi bolingo mpe mawa. 32 Bayebi mabongisi ya Nzambe, na lolenge ya bato basalaka mambi mana, elongo na baye basepelaka na misala mina, etumbu na bango ezali kufa. Kasi bazali kaka kosala mambi mana te, bazali mpe kosepela na baye bazali kosala mango.