Mokapo 9

1 Yesu atuni na bango, solo na yebisi bino ete bamususu kati na bino ba telemi awa ba kokufa te liboso bokonzi ya Nzambe ntango akoya na nguya. 2 Sima ya mikolo motoba, Yesu azui Petelo, Yakobo na Yowane mpe akeyi na bango likolo ya ngomba. 3 Yesu abonguani liboso na bango, bilamba na ye ekomi kongenga makasi koleka. 4 Mpe Eliya na Mose babimi, babandi kosolola na Yesu. 5 Na bongo Petelo azongisi mpe alobi na Yesu, Mokonzi sengeli totikala awa, pesa biso ndingisa totonga ba hema misatu, moko pona Yo, moko pona Mose mpe moko pona Eliya. 6 Mpo ete bakomi na kobanga, Petelo akoki lisusu koloba. 7 Mapata eye kozipa bango. liloba ebimi kati ya mapata. Oyo azali muana nalingi boyoka ye. 8 Mbala moko batali sima bamoni lisusu moto te kaka Yesu. 9 Tango baye kokita, Yesu apekisi bango koloba na bato nyonso oyo bamoni kuna ti kino muana ya moto akosekua. 10 Bango ba bombi liloba wana na komituna ndimbola na tina ya lisekua na baweyi. 11 Batuni ye pona nini ba Scribes balobi esengeli Eliya azonga liboso? ayanoli bango, Eliya akoya liboso kotia biloko nyonso na mulongo. 12 Kasi pona nini ekomami ete muana ya moto esengeli ayoka mpasi mingi, bakomisaye lokola moyibi, moto azanga tina. 13 Pona ngayi, nayebisi bino ete Eliya asili koya kala. mpe basaliye ya mabe ndenge balingi lokola ekomama pona ye. 14 Na bozongi kati na ya bayekoli mususu, bakuti bato ebele kati na bango, mpe ba Scribes bazali kosuana na bango. 15 Kaka tango bamoni Yesu na bayekoli naye, bango nyonso basepeli, mpe bakimi epayi naye pona kopesa ye mbote. 16 Ye atuni basali naye, likambu nini bozali kosuana na bango? 17 yo bakoki Moko kati na bango, azongisi eyano molakisi Ngayi na memeli yo muana nanga, aza kotungisama na molimo mabe akomisaye baba. 18 Akamati ye , akueyisi ye, akangami, mino ekangami mpe akomi libanga. Mpe alobi, na sengi basali nayo bakoki kobengana molimo ya mbindu te. 19 Yesu ayanoli bango, bato bazanga kodima, ti na ngonga nini ngayi nakotikala na bino? to mikolo boni na kozala na bino? bomemela nayi muana wana. 20 Tango kaka ba memi muana na Yesu, molimo akueyisi muana, akomi koningisa nzoto, kotanga soyi. 21 Yesu atuni tata naye kobanda mikolo boni azali na bokono oyo? kobanda bomuana naye, elobi tata ya muana. 22 Akueyeka na moto to na mayi, po ameka kobebisaye. soki okoki kosala eloko moko, yokela biso mawa mpe salisa biso. 23 Yesu azongiselaye, soki olingi? nyonso ekosalema na moto oyo adimi. 24 Mbala moko tata ya muana agangi, nadimi, yaka asalisa kodima nanga. 25 Tango Yesu amoni bato ebele bazoya epayi naye, pabengani molim mabe, yo molimo mabe mpe ya kolobisa te, bima na mitindo lna pesi yo mpe ko kozongela te. 26 Molimo mabe egangi, ekueyisi muana mpe ebimi, muana akomi lokola mokufi na denge oyo bato balobi ete akufi. 27 Ya solo Yesu azui ye na liboko, atelemisiye mpe muana altelemi na esengo. 28 Tango Yesu akoti na ndaku, basali batuni ye na nkuku, pona nini biso tokoki te kobengana molimo wana? 29 Ye azongiseli bango eyano, molimo ya boye ekoki na losambo ya makasi. 30 Bango baleki na ngambu ya Galile, balingaki te bato bayeba iesika bango bazali. 31 Mpo Yesu azali koteya na masese mpe ayebisi bango polele ete, muana ya moto bakoteka ye na banguna ba oyo bakoboma ye, tango ye akokufa, akosekua na liwa sima ya mikolo misatu. 32 Lokola bango bazalaki na kobanga, batunaki te nini alingi koloba. 33 Eleko bakomi na bonka ya Capernaum atuni basali naye, nini bozalaki kusuana na nzela? 34 Na bongo na vandi kimia, mpo bazalaki koloba bango na bango na likambu ezalaki munene penza. 35 Ye avandi mpe abengi basali naye nionso zomi na mibale (12), alobi nabango ete soki moto alingi azala ya liboso, azala nanu ya suka ya bato nionso mpe musali na bango. 36 Azui muana muke, atie ye kati kati na bango, azui ye na maboko mpe alobeli bango. 37 Oyo akoyamba muana lokola oyo, na kombo na ngayi azui ngai lokola mpe soki nani azui ngayi, ezali ngayi moko te, akozua mpe lisusu oyo atindi ngayi. 38 Yowani alobi naye, Mokonzi tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na kombo nayo! na bongo topekisaki ye mpo ete azali na biso te. 39 Na bongo Yesu alobi, bopekisaye te mpo ete moto moko te akoki kosala mosala ya kitoko na kombo nanga mpe azala na nguya yakoloba mabe na oyo etali n gayi. 40 Oyo azo telemela biso te aza na biso. 41 Kasi oyo akopesa bino kopo ya mayi ya komela mpo ete azali na Klisto, solo nayebisi bino akozanaga mbano na ye te. 42 Oyo a kokueyisa moko na badimi ya moke, bodimela ngayi, ya malamu balatisaye libanga na kingu mpe babuaka ye na ebale munene. 43 Na bongo soki liboko nayo ezali kokueyisa yo, kata yango. 44 Eza malamu pona yo kokota na bomoyi ya seko na loboko moko ete ozala na maboko mmibale mpe okende na lifelo esika moto ekufaka te. 45 Soki lokolo nayo ezali kokueyisa yo, kata yango, ezali malamu kokota na bomoyi ya seko tengu tengu na kozala makolo mibale obuakama na lifelo. 46 Esika nkusu na bango ekufaka te, Mpe moto ekufaka pe te. 47 Soki liso nayo ezali kokueyisa na mbeba, longola yango, na bongo ezali malamu mpo nayo okota na bokonzi ya Nzambe na liso moko koleka ozala na misu mibale obuakama na lifelo. 48 Libulu ya moto, esika nkusu na bango ekufaka te mpe moto ezimanaka te ata mokolo moko te. 49 Mpo ete, moto na moto akotiama moto lokola mungua. 50 Mungua ezali na elengi mpe kitoko, kasi soko mungua esli elengi, okoki kopesayango elengi boniboni? Bozala na mungua kati na bino, bozala na kimia kati na bino.