Mokapo 10

1 Yesu alungwaki esika ena, akeyi o etuka ya Yudea, koleka ebele Yuludani, mpe etuluku na bato balandaki ye bango ateyaki bango bo momesano. 2 Bayi ba Falisayo baye epayi na ye, kosenginya ye mpe kotuna: mobeko endingisi mobali kokabwana na mwasi na ye?" 3 Ayanoli bango boye: "Mobeko na Mose elobi nini?" 4 Bango kozongisa boye : " Mose andingisaki na mobali, kokoma mokanda mo tatoli bo kabwani, mpe azongisa mwasi wana." 5 "Ezali mpo na mitema makasi na bino, nde mobeko mona mokomamaka". Yesu ayanoli bango : 6 "Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe akelaki bango mobali na mwasi". 7 Yango ekomama, mobali akolongwa ndako ya baboti na ye, mpe akofanda elonga na mwasi na ye, 8 mpe bango babale nde bakomi nzoto moko. 9 Na yango moto ameka kokabola te oyo Nzambe asangisi. 10 Efandaki bango o ndako, bayekoli batuni ye lisusu mituna mpo na tina yango. 11 Alobi na bango boye: "Ye oyo akabwani na ye asali ekobo". 12 Mpe soki mwasi akabwani na mob ali na ye, kobalana na mobali mosusu, asali ekobo lokola". 13 Sima, ba boti bamemeli ye bana, mpo asimba mpe apambola bango. Kasi, bayekoli bapekisaki bango. 14 Kasi , tango emonaki Yesu bongo, azuaki kanda ekasi , mpae alobi ete: "Bopekisa te bana koya epayi na ngayi, nzambi bokonzi bwa likolo ezali mpo na bato bawulani na bango". 15 Na bosolo na lobi boye : Ye oyo akolinga kokota o bonkonzi bwa likolo, soki amimoni lokola mwana moke te akoyingela te. 16 Na mbisa, Yesu akwi bana o maboko na ye, abenisi bango nakosambela mpo na bango. 17 Ebandaki ye mobembo, elengi mobali ayeyi limbangu epayi na ye kofukama o bozo ye, mpe atuni: "Mokonzi malamu nakela boni-boni mpo nazua bomoyi bwa seko? 18 Mpe yesu alobi: "Boni boni obengi ngayi Mokonzi malamu? Moto malamu azali te, soki Nzambe ye meyi. 19 Oyebi mibeko zomi: "Oko boma te, okosala ekobo te, akoloba makambo malokuta te, okozwa eloko ya moto na lokuta te, memia baboti bayo". 20 Elenge koyanola: "Moteyi, manso alobi, natosaka nanga wuto bolenge bwa ngayi. 21 Yesu atali ye mpe asepeli na ye. Mpe alobi na ye: "Ezangi yo likambo yoko. Kende kotekisa bozui bwa yo nyonso, mpe mosolo mona opesa na babola, nambisa nde ozui bomengo o likolo, nde sima yake mpe landa ngayi". 22 Kasi azui mawa makasi o mutema mpo na etinda ena. mpe abaluki na dzololo, mpamba te, azalaki na bomengo mingi 23 Yesu atali nzinga-nzinga mpe alobi na bayekoli na ye: "Boyeba te, ezali mpasi mingi na bazui kokota o bokonzi bwa Nzambe!". 24 Eyoki bango makambo mana, bayekoli bakamwe mingi. Bongo Yesu alobi na bango lisus: "Bana, lokola ezali mpasi mingi mpo nakokoto o bokonzi bwa Nzambe! 25 Ebongi malamu na panda na lisobe koleka na lidusu na tango, kasi mpasi mpo na mozui kokota o bokonzi bwa likolo." 26 Bazalaki na kokomwa makasi, mpe bamo lobeli bango na bango: "Nani akoki kozua lobiko?" 27 Yesu atali bango mpe alobi:" Ekosalema te mpo na bato, kaka Nzambe nde, mpo ete manso mazalisami na Nzambe." 28 Petelo abandi koloba na ye: "Tala, tosundoli manso, mpe tolandi yo" 29 Yesu alobi: "Na bosolo, nalobi bino na bino, ye oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye, ba boti baye, bana baye, bilanga na ye, mpo na ngayi mpe mpo na sango malamu, 30 nde azui na makama ba ndako, ba ndeko, ba boti, bana mpe bilanga awa o nse kotukama, mpe bomoyi ya seko na mokili ekoya. 31 Kasi yeba ete bayike bazali ba yambo, bakokoma baye ya mokondo, mpe ba ye ya mokondo, bakokoma bato ba yambo. 32 Ezali bango ko mata na njela ya Yelusalemi, bongo yesu alekaki o boso nwa bango. Kokamwa ezalaki kati na bayekoli bongo Yesu akendaki lisusu naba zomi na babale, alimboleli bango maye masengeli kokomela ye o mikolo mikoya. 33 "Yokamela, tobuta o Yelusalemi kuna mwana moto akokabama o maboko ya nganga Nzambe minene ùmpe ba tangi mibeko. Bango bakomo katela etumbu ya liwa mpe bako kaba ye naba pagano. 34 Bako zomela ye, kobwakela ye nsoyi, kobeta ye nfimbo mpe bako boma ye, na sima mikolo misato , nde akosekwa." 35 Zaki mpe Yoone bana ya Zebede bayebisi ye boye: "Molakisi, tolingi osalela biso ma ye manso tokosenge yo". 36 Ye ayanoli bango boye: "Bolingo nasalela bino nini?" 37 Bango koloba: "Ndingisa ete tofanda na kembo na yo, moko o loboko la yo ya mobali, mpe moyike na oyo ya mwasi". 38 Kasi Yesu ayanoli bango boye: "Bobungi maye bokosenge. Zambi bokokoka komela nkeni mpe kokanga motema na libatisi oyo nakozua?". 39 Bango kozongisela ye: "Toko koka". Yesu alobi na bango: "Nkeni ekomela ngayi, bokomele yango engebene na libatisi nakozua. 40 "Kasi oyo esengeli koloba nani akofanda o loboko ya mobali to mpe ya mwasi, ngayi te nde na ponaka, bobeke baye ba ponama. 41 Eyokaka bayekoli basusu zomi bongo, bazui nkanda mpe koyina yima natina zaki mpe Yoane. 42 Yesu abiangi bango pembeni na ye, mpe alobi : "boyeba ete baye bazali lokola bakambi ya ba pagano, bakonzaka bango bakolo katina bango, basalelaka bokonzi likolo na banga. 43 Kasi ezala bongo te kati na bino, zambi ye oyo alingi azala monene kati na bino, azali nayino mosali ; 44 Ye oyo alingi azala mwa yambo kati na bino, andima nayino kozala mohumbu na bino nyonso. 45 Zambi mwana na moto aye te mpo basalela ye, kasi ye nde asala mpo na basusu, mpe kopesa bomoyi bwa ye lokola mbeka po na bayike. 46 Ekomi bango ne Yeliko, mpe lokola alongwaki wana elongo na bayekoli baye, etuluku ya bato bamolandaki, mpe mwana na Timée, na kombo Bartimée, mokufi miso mpe molombi mbongo afandaki o ngambo la balabala. 47 Eyokaki ye ete Yesu na Nazareti koleka na nzela, abandi konganga na mongongo ekasi: "Yesu, mwana na Dawidi, yoka ngayi mawa". 48 Bayike bazalaki kopekisa mokufi miso, koyebisa ye akanga monoko. Kasi azalaki se konganga makasi: "Mwana na Dawidi, yoka ngayi mawa". 49 Yesu atelemi mpe apesi mitindo babenga ye. Babengi mokufi miso, koyebisa ye na bato: "Kwa bopikiliki, telema, obiangami." 50 Asundoli kazaka na ye pembeni, apumbuki mpe aye na Yesu. 51 Nambisa, Yesu ayanoli ye: "Olingi nasala na yo nini?" mokufi miso ye koloba: "Rabuni, nalingi na mona." 52 Bongo Yesu ayanoli boye: "Kenda, kondima na yo ebikisi yo." Na pwasa, moto yango amoni lisusu, mpe alandi Yesu na nzela.