Mokapo 11

1 Babelemi na Yelusalem pene-pene na Bethfagé na Betaniya na ngomba ya ba Olive, Bayekoli mibale na Yesu batindami mpe 2 apesi bango mitindo : "Bokenda na mboka liboso na biso. Boko mona mwana na punda ba matela ye nayino te, bakamata boya na ye. 3 Soki moto atuni : "bozali kosala boye mpo nini" Bo zongisela ye : "Mokonzi asengeli na ngo" akotika mpe bokoya na yango". 4 Bakendaki mpe bakuti yango ekangami lokola Mokonzi alobaki. Mpe bakangoli ye. 5 Batuni bango na bato: "Bozali kokangola mwana punda mpo nini?" 6 Bayanoli bango, lokola Yesu alakisaki bango. 7 Bayekoli mibale batindamaki bayeli Yesu mwana punda mpe balatisi yango bilamba kitoko mpo Yesu amata. 8 Bato bayike batandaki mpe bilamba ya kitoko mpe ba mosusu Basimbi mangalala. 9 Bato mosusu baleki liboso, mpe ba susu bazali kolanda ye sima bazali koganga: " Hozana! atombwana oyo azali koya na kombo ya Mokonzi. 10 Kembo na ngbende ya bokonzi na Tatna biso Dawidi! Hozana kuna lola. 11 Nabongo kokota na ye na Yelusalema, ejalaki na tina amona makambo ezalaki koleka na etonga na Nzambe, Kasi ngonga elekaki, akendaki na ba yekoli na ye na mboka Bathania. 12 Na bozongi na bango alembaki na nzala. 13 Mpe amoni nzete na mosika na makasa kitoko, akanisaki ete ezali na mbuma, nzokande ezalaki te, mpo ejalaki eleko na yango te. 14 Alakeli yango mabe, ekoleyisaka moto moko te, mbuma na yango. Batu bazalaki na ye bayoki maloba ango. 15 Bokomi na bango na engumba ya Yelusalema, ayingeli kati na etonga, akuti nyamu-nyamu na bayi, mombongo; batekisi, mpe basombi na kati ya etonga. Apanzi mitalaka ya basombitinyi na batisi ya bibenga. 16 Alingisaki lisusu te bakotisa biloko ya mombongu na etonga. 17 Apesi bango malakisi ete, makomi elobi te ete etongfa ezali esika ya mabondeli mpo na bikolo yonso? Bino bokomisi yango esika ya babomi. 18 Eyoki ba nganga Nzambe minene, mpe na bakomi mibeko, maloba oyo, bazui miango ya koboma ye, na boye, bato bayike penza basepelaki na mateya yango nde ebangisaki bango ete, bakotombokisa bato 19 tango mpokwa ekoki, babimi na engumba bakeyi. 20 Na bozongi na bango na nzela elekaki bango liboso ba moni nzete ya lingolo ekawuki kino na misisa. 21 Nde Petelo azongi makanisi alobi: "Mokonzi nzete olobelaki mabe ekawuki." 22 Yesu ayanoli ye bojala na kondima na Nzambe. 23 Ya solo okopesa mitindo ata na ngomba kenda mpe ekoyokamela yo, kozala na tembe te mpo Nzambe akoko kisa yango. 24 NA boye, nayebisi bino maye bokosenga na malombi mpe na ko lombo ekopesemela bino. 25 Boyebaka mpe kolimbisa banguna na bino, mpo ete Tata Nzambe alimbisaka mpe bino. 26 Soki boye te, bokolimbisama te, Tata na bino na likolo ako limbisa pe bino t. 27 Bazongi na Yelusalema, nde yesu akeyi kozungu-luka na etonga, na boye ba nganga Nzambe, bato na mibeko, bamoni ye. 28 Balobi na ye : " na ndingisa ya nani mpe ozali kosala makambu oyo? Mpe ozui makoki epayi ya nani ya kosala maye ojali kosala ? 29 Yesu azongiseli bango bo yanola nayino ngayi, bongo nakolimbola bino. 30 Nani alingisaki Yowani Mobatisi? Nzambe to bato ya mokili? 31 Batiani tembe kati na bango: Toloba nini? Soki toyanoli ye ewutaki na lola, akozua biso : "kasi bondimelaki ye te boni?" 32 Soki toyanoli ye ewuti na bato : "bako boma biso" ... mpo bayike bayebi Yowani mosakoli ya solo. 33 Bongo bayokani kobuka lokuta ete: "Toyebi te". Yesu mpe akutanisi bango na koyanola bango ete : "Ngayi mpe nayebi te, soki najali kosala makambo oyo na nguya ya nani".