Mokapo 12

1 Sika Yesu aband i kotangisa bongo na masese, mpe alobi: moto moko alonaki nzetz ya vino, mpe atongaki lopango zinga zinga ya lopango atimolaki libulu, lokola libulu oyo ba kamolaka vino, mpe atongaki enongeli ya mosenzeli, mpe ayesaki mosali na vino, na yango ye abembokaki. 2 O tango nde atindaki mosali moko, kuna na basali ya vino pona komemelaye ndambu ya vino. 3 Kasi azuaki mosekua mpe bakangaki mpe bazongisaki ye maboko pamba. 4 Sika atindaki mosali mususu mpe bazokisaki ye omutu mpe bakataki ye bilamba. 5 Atindaki mosali mosusu mpe ba bomakiye. Mpe baniongaki mpe ba bomaki basali nionso na lolenge moko. 6 Azalaki na moto moko ya kotinda nde muana na ye ya bolingo, nde mutu ya suka atindela ki bango. Alobi bakotosa ye mpo azali muana na ngayi. 7 Kasi basali ya vino balobani natina na bongo: botala masangoli, boya toboma ye, mpe libula eko zala ya biso. 8 Bakangaki ye na puasa mpe babomaki ye mpe bauaki ye libanda ya elanga ya vino. 9 Sika awo nde akosala nini? akoya kobebisa zelanga ya vino mpe akopesa yango na bato mosusu. 10 yipbotangi makomi oyo te? Libanga na tina oyo ba tongi ba buakaki yango nde basalelaki. 11 Oyo ewuti epayi ya Mokonzi ezali malamu na komona. 12 Bazalaki koluka kokanga yesu kasi ba bangaki etuluku ya batu mpo ete ba yebaki makambu ayebisaki bango na lisese pona bango. na yango batelemaki mpe bakendeki. 13 Na yango batindelaki ye ndambu ya ba Pharizao mpe ba Yelodia ba tandelaye motambo na maloba. 14 Tango bokomaki, mpe ba lobi naye: molakisi, oponaka bato na lolenge ya mabe te, oteyaka na bosolo bonse nzela ya Nzambe, endingisami kofuta mpaku ya kayisala? Esengeli na biso kufuta to kofuta te? 15 Lokola Yesu ayebaki mayeli na bango, ya mabe, ayebisi bango: pona nini bozali komeka ngayi? bo memela ngayi bongo moko na tala yango. 16 Bamemelaki na Yesu, atuni b ango, elilingi na likomi oyo eza ya nani? bayanoli boye; ezali ya kayisala. 17 Yesu alobi: ya kayisala ya kayisala, ta Nzambz ya Nzambe. bakamuaki na maloba naye. 18 Na yango, ba sadayene ,bazalaki kondima te ete lisekua ezali, bayaki epayi na Ye. Mpe ba tunaki: 19 Molakisi, Mose akomelaki biso, sokin ndeko mobali akufi mpe atiki muasi kasi muana nte, ndeko yamobali ye ako yingela muasi wana mpo abota na ye bana. 20 Ezalaki ba ndeko mibali sambo, ya yambo abalaki muasi sima mikolo ye akufaki, kasi atikaki muana te. 21 Ya mibale mpe azuaki muasi yango, ye mpe akufaki mpe atikaki muana te. Ya misato ndenge moko. 22 Lokola ya motoba mpe lolenge moko atikaki muana te. Suka na yango muasi mpe akufaki. 23 Tango bango nionso bakozonga na bomoyi na lisekua, nani akozala na ye lokola muasi naye? pamba te lbango nionso bazuaka ye muasi ya libala. 24 Yesu alobi: pona yango bo bungi te, mpo ete boyebi makomi te, atako nguya ya Nzambe? 25 Tango ako sekuisa ba weyi, kuna babalami tope kobalisa ekozala te kasi ba kozala lokola ba muanzelu. 26 Kolandisama ya baye bakosekua, botangaki te na makomi nya Mose, kpona oyo etali nzete yakopela, ndenge nini Nzambe ayebisaki ye mpe alobaki naye, nazali Nzambe ya Abalayama, Nzambe ,ya Isaaka mpe Nzambe ya Yakobo? 27 Azali Nzame ya bakufi te, kasi Nzambe ya batu na bomoyi. Bozali komiosa makasi. 28 moko na bakomi mikanda ayaki koyoka masolo na bango; ko aymona ete Yesu alobaki malamu, atunaki Ye: kati na nionso, mobeko nini eleki na motuya koleka? 29 Yesu ayanoli: boyokamela ya motuya; Isaleli, Nzambe Mokonzi azali moko. 30 Okolionga Nzambe Mokonzi nayo okati o motema mobimba, okati ya molimo nayo, na makanisi nayo nionso mpe na makasi nayo. 31 Yoka mobeko ya mibale: Oko linga moninga nayo ndenge omilingaka. ezali na mobeko monene koleka oyo te. 32 Bakomi ya mibeko bazong;ikseliye: Mokonzi olobi ya solo ete Nzambe azali kaka moko, ba mosusu bazali te. 33 Linga ye na motema, na mayele mpe na makasi nayo, bongo tolinga ba zalani na biso. Yango nde eleki ma bonza mpe ba mbeka nionso. 34 Tango yesu asosoli ete apesi ye eyano ya buania, alobi: Ozali mosika ya bokonzi ya likolo te. na yango moto akoki kotuna Yesu motuna te. 35 Ezalaki Ye koteya na tempelo, ayanoli bango: boni boni batu na mibeko balobaka Kristo azali muana ya Dawidi? 36 Nzoka nde DAwidi ye moko tango atondisamaki alobi Mokonzi alobi na Mokonzi nanga: fanda na loboko na nga ya mobali kino na kokitisa banguna nayo semakolo nayo. 37 Soki Dawidi abengaki ye mokonzi, boni boni Mesiya akoma lisusu muana ya Dawidi? Etuluku ya batu ba tondaki na sayi. 38 Yesu alobi okati ya malakisi naye, bomibatela na bakomi ya mibeko oyo ba sepelaka kolata bilambaba ya milayi mpe kopesana mbote na bisika ya polele. 39 Mpe ba fandaka na bisika ya liboso kati na eyanganelo mpe na nteke. 40 Ba bebisaka ba ndanku ya basi oyo bakufela mibali mpe kotelemela losambo ya molayi : mpe ete batu ba mona bango, bato wana ;bakozua etumbu ya makasi. 41 Yesu kati na tempelo afandaki mosika te na ebombelo ya na makabo: azalaki kokeba lolenge bazalaki kopesa mingi. 42 Bongo, mobola muasi akufela mobali, atiaki kaka mpalata mibale ewulani na mpalata moke. 43 Na bongo, Yesu abiangi bayekoli naye mpe alobi: nalobi na bino solo, muasi oyo atie mbongo kolekabango banso na ebombamelo. 44 Mpo ete bango nionso bapesi se mileki mia bango, kasi muasi mokufeli mobali atako azali mobola apesaki mbongo nionso oyo azalaki na yango pona kobika.