Mokapo 13

1 Wana Yesu kobima na tepelo, moko na bayekoli na ye alobi: "Moteyi tala bonzenga ya mabanga ba tonga bandako oyo." Ayanoli ye: 2 "Omoni yango? ezali na liban,ga moko te ekotikala likolo na mosusu, yonso eko panzana". 3 Evandaki ye likolo na ngomba ya Olive, liboso ya tepelo, Petolo, Zaki, Yoane mpe Andele bayei na bokutu kotuna ye: 4 loba naino: "Tango nini makambu yangoi ekokoma? Mpe bilembo nini tokososola ete makambo yango ekomi penepene?" 5 Yesu abandi kososolisa bango: "Bokeba babungisa bino te". 6 Bato ya lokuta bakoya na kombo na ngayio kokosa et ngayi nde Klisto Bako bulungisa ebele ya bato. 7 Tango bakoyoka sango ya bitumba mpe lokito ya bibundeli bo palapala te. Mpo esengeli ezala bongo, kasi ezali nde ebandeli kaka. 8 Soki Ekolo yoko ebundisi mosusu, bakonzi moko ebundisi mosusu, na bisika nzike mabele ekoningana, mpe nzala makasi ekoya. Wana ezali ebandeli ya bwale, mwasi ayokaka na mpasi ya kobota. 9 Bomi keba. Bako kaba bino na mikonzi mpo banyokola bino. Bako beta-beta bino na ba ndako ya biyanganelo mpe liboso ya bakambi ya bituka, mpe esepelisa bango. 10 Kasi esengeli nayinoi nsango malamu eteyama na bikolo yonso ya mokili. 11 Bobanga te, ntango bako kanga mpe kofunda bino, bolenga liboso na bango te, mpo na bozangi maye boko loba liboso na bango, Molimo Mosantu nde akopesa maloba kati na bino. 12 Ba ndeko bako bomana bango na bango, tata akoboma mwana na ye. Bana bako tombukela baboti mpo bakufa. 13 Boko yinama mpo na ngayi na bato nyonso. Oyo ako yika mpiko kino nsuka ye nde akobika. 14 Bososola, ntango bokomona makambo ya soni mpe ya bwale kosalema na bisika oyo esengeli te. Ba oyo ya Yudea bakima na ba ngomba. 16 Oyo amataki likolo ya ndako akoki kokita kozua eloko te. 15 Oyo akeyi kokata bilanga akoki kozongela kasaka na ye te. 17 MAwa mingi ekojala na basi oyo bajali na bana mikie, mpe bajali konungisa. 18 Eleko yango bobondela penza ete ejalma ntango ya mpio makasi te. 19 Bwale oyo ekoya ekojala makasi koleka, uta mokili esalema na Nzambe oyo ekoleka yango ejali te moto moko akokaki kobika te. 20 Soki Nzambe akokutolaka mikolo yango te, mpo na kobikisa baponomi na ye. 21 Bongo soki moto ayebisi bino, tomoni Klisto kuna, abimi na ngambo kuna bondima te. 22 Mpo ba Klisto ya lokuta, mpe ba sakoli ya lokuta, bako bima mpe bakosala bikamwa na bikamwasi mpe bako pengwisa bayike na bandimi. 23 Bojala na bokengeli nakebisi bino. 24 Kasi soki mikolo ya bwale yango eleki moyi ekokoma mwaindo, sanza ekongenga lisusu te, 25 minzoto ekokilingana uta lola tii na mabele, nguya yonso ebombana na lola epanzani. 26 Bongo bako mona mwana na Nzambe kokita kati na mapata na lokumu mpe lokito. 27 Mpe ba anjelu bakozua mitindo mpona kosangisa baponami yonso kino nasuka ya mokili mpe na suka ya mapata. 28 Botala nzete ya musuke. Soki tomoni ete nkasa na yango ebandi kotela mpe ekawuki, tososoli ete ntango ya mbula ekoki. 29 Ezali nse bongo, ntango bokomona kokokisama na makambo oyo, boyeba ete abelemi pene. 30 Ezali solo ete bato ya eleko oyo bakosila kokufa te, kino makambo oyo ekokokisama. 31 Manso bojali komona (Likolo nase) ekosila , 32 kasi maloba na ngayi te. Kasi mokolo to ngonga eyebani na moto mosusu te, kaka Tata Nzambe ye moko. 33 Bozala na bokenga, mpo bojali kososola te, soki tokomi ntango nini. 34 Moto na moto asala lotomu epesemeli ye na mokonzi bakengeli bafungola miso, ko lala te. 35 Bokeba pamba te bozongi ya nkolo ndako eyebani ngonga te, na katikati ya butu, liboso soso elela. 36 Soki aye akuta bino na pongi te. 37 Na yebisi bino, moto na moto akengela!