Mokapo 14

1 Mikolo mibale na liboso ya elekeli mpe elambo na kwanga ezangi mfulu, banganga minene mpe bakomeli bazalaki koluka nzela na mayele mpona kokanga ye mpe koboma ye. 2 Kasi balobi ete: "Ntango na elambo te ete yikiyiki ebima kati na bato te". 3 Ezalaki ye na Betania na ndako ya Simona, moto na maba, afandi na mesa mpo na kolia, mwasi moko ayeyi na mwa mbeki ya mafuta na malasi, eloko na motuya monene, abuki mbeki mpe asopi yango na moto na ye. 4 Kasi bamosusu na bango balobi na kanda ete: "Libebi na mafuta oyo ezali na ntina nini? 5 Zambi bakoki kotekisa mafuta oyo mpo na mpata nkama misato mpe babola bakoki kozua mosolo." Bazalaki kosilika mpo na mwasi. 6 Nde Yesu alobi ete : "Tika ye nye! Mpo nini bazali kotumola ye? Ye asili kosalela n gayi mosala kitoko. 7 Bozali na babola awa ntongo nyonso mpe soko balingi kosalela bango ntango yonso bokoki kosala yango. Kasi bokozala na ngayi ntango yonso te. 8 Ye asali eloko ekokaki na ye kosala. Asili kpakola nzoto na ngayi liboso mpo na kokunda. 9 Nazali koloba na bino solo ete nsango malamu ekolakisama wapi na molongo mobimba, likambo lisali hye ekoyebisama mpo na ekaniseli na ye. 10 Na sima Yuda Iscariote, ye moko na Bazomi na mibale akeyi epayi na banganga minene mpo na kokaba ye epayi na bango. 11 Wana eyoki bango ye basepeli mpe bandimi kofuta ye mosolo. Ye mpe aluki nzela malamu mpo na kokaba ye. 12 Na mokolo na liboso na mikolo na kwanga ezangi mfulu, wana ebomi bango mpate wapi na Elekeli, bayekoli na ye batuni ye ete:"Olingi ete tokenda wapi mpo na kobongisa biloko ete olia Elekeli?" 13 Atindi bayekolo babale mpe alobi na bango ete: "Kenda na mboka mpe mobali moko akokutema na bino oyo azali kokumba mbeki na mayi bobila ye. 14 Mpe soko akolingela wapi, bo loba na nkolo ya ndaku ete Molakisi alobi ete: "Esika wapi wana kolia ngayi elombo na elekeli na bayekoli na ngayi elongo." 15 Akotalisa bino eteni moko na likolo esili kobonga mpe kotandama. Bobongisela biso kuna. 16 Bayekoli balongwi, bakeyi na mboka mpe bazui yango lokola esili ye koloba na bango, mpe babongisi elambo na Elekeli. 17 Awa pokwa ekomi ayeyi na bazomi na babale elongo. 18 Ezalaki bango kofanda na mesa mpe kolia, Yesu alobaki ete: Nazali koloba na bino solo ete, moko na bino akokaba ngayi, moko mpenza oyo azali kolia esika moko na ngayi. 19 Babandi koyoka mawa mpe batuni ye moko moko ete: "Ezali ngayi?" 20 Alobi na bango ete: "Ezali moto moko na bazomi na babale, oyo azali kotia misapi na ye kati na sani esika moko na ngayi. 21 Zambi Mwana na Moto akokenda lokola ekomami na ye kasi mawa na moto oyo okokaba Mwana na Moto! Eleki na malamu mpo na moto yango soki abotamaki te. 22 Ezalaki bango kolia akamati kwanga, apamboli, abuki yango, apesi bango yango mpe alobi: «Bokamata oyo nzoto na ngayi.» 23 Akamati kopo, mpe esili ye kotonda , apesi bango yango mpe bango nyonso bameli yango. 24 Ye alobi na bango et : «Oyo makila na ngayi na kondimama, masopani mpona bato mingi. 25 Nazali koloba na bino solo ete nakomela mayi na vino lisusu te kino mokolo ngayi yango na sika kati na bokonzi na Nzambe.» 26 Esili bango koyemba loyembo, babimi kokenda na ngomba na Bilaya. 27 Yesu alobi na bango ete: «Nako beta mobateli mpe bampate bakopanzama. 28 KAsi na sima ya lisekwa na ngayi nako leka liboso na bino na Galileya.» 29 Petelo alobi na ye ete: « Ata bango yonso bako tayisama libaku, kasi ngayi te.» 30 Yesu alobi na ye ete : «NAzali koloba na yo na solo ete na butu oyo mpenza, liboso nayino nsoso eleli mbala mibale te, oko angana ngayi mbala misato.» 31 Kasi ye apesi monoko makasi ete: «Soki ekokoka na ngayi ko kufa na yo elongo, nako angana yo te.» Bango nyonso balobi bobele bongo. 32 Ekeyina esika moko etangami Getesemane mpe alobi na bayekoli na ye ete: «Bafanda nayino ezali ngayio kobondela.» 33 Akamati Petelo na Zaki na Yoane esika moko na ye mpe abandi koyoka mawa na motema mpe bozito. 34 Alobi na bango ete: « Molimo na ngayi ezali koyoka mawa, kino mawa na kufa. Bowumela awa mpe bokengela.» 35 Akeyi na liboso moke, akweyi na mabele mpe abondeli ete ntango oyo elongwa na ye, soko ekoki. 36 Aloli ete: «Aba, Tata, makambo yonso makoki na yo Longwela ngayi kopo oyo Nde mokano na ngayi esalama te kasi mokano na yo 37 Ayeyi azui bango kolala mpongi mpe alobi na Petelo: «Simoni ozali kolala mpongi? Okokaki kokengela saa moko te? 38 Bokengelaka mpe bobondela ete bokota na ko mekamaka te Molimo ezali na mposa nde nzoto ezali mtawu.» 39 Akeyi lisusu, abondeli kolaba malobi ye liboso. 40 Lisusuayeyi azui bango kolala mpongi mpo ete miso na bango bozito mingi na mpongi mpe boyebi te soko bakozongisela ye monoko nini. 41 Ayeyi mbala na misato epayi na bango alobi na bango ete: «Bozali nayino kolala mpe nayino kopema? Ntango esili koya! Bazli kokaba Mwana na Moto na maboko na bato na masumu. 42 Botelema, tokenda botala mokabi na ngayi abelemi.» 43 Naino ezalaki ye koloba, Yuda ayeyi, ye moko na bazomi na mibale, mpe ebelena bato na ye elongo bazalaki na mipanga mpe mangenda mpe babimi na banganga minene na bakomeli na mikolo na mboka. 44 Mokabi asili koyebisa bango elembo, koloba ete: «Soko mapopwepwa nani, ye wana. Bokanga ye mpe bokenda na ye malamu. 45 Ayeyi akeyi epayi na Yesu nokinpoko mpe alobi ete : «Rabuni», Apwepwi ye. 46 Batii maboko likolo na ye bakangi ye. 47 Kasi mokona ba oyo bazalaki na ye abendi mopanga na ye, azokisi moombo na nganga monene, akati lotoyi na ye. 48 Yesu alobi na bangoete: «Bino boyeyi na mipanga mpe mangenda mpo na kokanga ngayi lokola moyibi? 49 Mokolo na mokolo nazalaki na bino kati na tempelo mpo na kolakisa mpe bokangaki nga te. Nde malamu ete makomi makoka. 50 Bango nyonso batiki ye bakimi. 51 Elenge mobali mokoabili ye, ye azalaki kolata bobele elamba moko. Bakangi ye, 52 nde atiki elamba na ye, akimi bolumbu. 53 Bakambi Yesu epayi na nganga monene mpe banganga minene yonso mpe mikolo na mboka mpe bakomeli basili koyangana. 54 Petelo abili ye mosika kino ekoti ye kati na lopango na nganga monene. Afandi esika moko na bapolisi mpo na koyota moto. 55 Banganga minene mpe koyangana mobimba baluki litatoli na ntina na Yesu mpo na koboma ye. 56 Bato mingi batatoli maloba na lokuta nde maloba na bango makokani te. 57 Bamosusu batelemi koloba monoko na lokuta na likambo na ye ete 58 toyokaki ye koloba ete: «NGayi nako boma tempelo oyo esalami na maboko mpe nsima na mikolo misato nako tonga mosusu ekosalama na maboko te». 59 Ata bongo matoli na bango nakokani te. 60 Nganga monene atelemi kati na bango mpe atuni Yesu ete: «Okoyanola te? Matatoli na bato oyo mpo na kokweyisa yo mazali nini? 61 Nde azalaki nye, ayanoli bango te. Lisusu Nganga monene atuni ye ete: «Yo ozali Klisto, Mwana na Mapambwani? 62 Yesu alobi ete: «Ngayi nazali. Mpe bokomona Mwana na moto kofanda na loboko mobali na nguya mpe koya kati na mapata o likolo.» 63 Nganga monene apasoli elamba na ye, mpe alobi ete: «Tozali na bosenga na batatoli mosusu mpo ya nini? 64 Bosili koyoka maloba na kotuka. Makanisi na bino nini?» Bongo yonso balobi: «Abongi kokufa». 65 Basusu kati na bango ba bwakeli ye soyi mpe kozipa ye elongi mpe kobeta ya bibotu mpe kolobela ye: «Lakisa ete ozali Mosakoli!» Nani abeti yo? Sima, bakengeli bakamati ye, mpe ba bamboli ye ba mbata. 66 Ezalaki Petelo kati na lopango, elenge mwasi moko na basali na nganga monene ayeyi. 67 Emoni ye Petelo koyota moto, atali mpe alobi na ye ete: «Yo mpe ozalaki elongo na Mo Nazarete oyo , Yesu.» 68 Nde awangani, na bolobaka ete : «Nayebi te mpe nazali koyeba ntina na maloba na yo te.» Na sima abimi na lopango mpe soso eleli. 69 Elenge mwasi yango amoni ye mpe abandi koloba na bato batelemi pembeni ete: «Moto oyo azali moko na bayekoli na ye!» 70 Kasi Petelo awangani lisusu. Sima ya mwa ntango moke, ba oyo bazalaki wana balobi na Petelo: «Ya solo, yo mpe ozali moko na bango, pamba te ozali moto na Galileya.» 71 Bongo Petelo abandi kokata seleka boye: «Nzambe mpenza! Nayebi na ngayi moto bazali koloba te.» 72 Na ntango wana, soso eleli mbala ya mibale. Bongo Petelo akomi kokanisa maloba Yesu alobelaki ye: «LIboso et soso elela mbala mibale, okowangana mbala misato ete oyebi ngayi te.» Petelo ayoki mawa mpe abandi kolela.