Mokapo ya 15

1 Nanta tongo, na nganga Nzambe minene elongo na ba tangi mibeko, ba mpaka ya masanga elongo na lisanga ba kambi ya bayuda, basangaki, na mbisa, bango bakangaki Yesu mpe ba memi ye na Poso Pilato. 2 Bongo pilato amotuni: yo ozali mokonzi ya bayuda? yesu amoyanoli: " Olobi yango". 3 Ba nganga Nzambe minene bazalaki na mafunde nzike ya Yesu epai na Poso Pilato 4 Pilato amotuni lisusu: "oyanoli te? tala ebele na mafundi ya bato oyo likolo nayo". 5 Kasi Yesu afungolaki lisusu ata monoko te oboso ya poso pilato, mpe ye akamuaki makasi. 6 O eleko nya mabongisi ya nteke, Mokonzi poso Pilato, azua momesano ya bobimisi o boloko mokangami moko oyo akotuina boyike bua bato bajye amoni o boso bua ye, elongo na batomboki basusu. 7 Kuna boloko, ezalaki na ba tomboki elongo na babomi, lokola moto moko na kombo barabasi. 8 Boyike bwa bato, e,yeï ya poso pilato mpe koyebisaye et jasala bo momesano, enbene na lolenge ya bobisi o boloko moto oyo bangi balingi. 9 Poso Pilato atuni bango boye, " bolingi nabimisa o boloko mokonzi ya bayuda? 10 Na kotunaka bongo, ye ayebaki malamu, lolenge ba nganga Nzambe minene ba pesakiye engebene na mibeko la bayuda. 11 bongo ba nganga Nzambe minene, ba tiye songi songi na boyike bwa bato mpo babimisa se barabasi o boloko. 12 Poso Pilato atuni b bango lisusu: " bongo nasala boniboni na mokonzi ya bayuda"? 13 banso bagangi makasi mpe lisusu "omobaka o ekulusu" 14 Poso Pilato alobi na bango: " esali ye mabe nini? "kasi bango bagangi koleka lisusu "omo baka o ekulusu". 15 lolenge Poso Pilato alingaki kosepelisa bayi mboka, na yango abimisi barabase o boloko, ba beti Yesu fimbo mpe akabami mpo abakama o ekulusu. 16 bayi mapinga bakumbi Yesu o kati ya lopango la mbulamatadi mpe libyangani ya mapinga ya ba solda ya etuku ena. 17 Balatisi yesula kazaka la motane mpe sone liye ekoti ya nzube ya nzube, bongo bakotisiye yango o moto. 18 Sima bapesiye Mbote koloba ete, Mbote Mokonzi ya bayuda. 19 Ba betiye kekele na moto mpe buakeli ye nsoyi, mpo na kotiolaye , bafukameli ye mpe makumisiye ya lokuta. 20 Sima na bango kotiola ye, balongoliye kazaka ya motane, mpe balatiye bilamba bya ye moko, na mbisa ba kumbi ye mpo abakama. 21 Bango kopesa mitindo na moleki nzela, oyo awutaki na bilanga naye, na kombo ,ya Simoni ya mboka Sylène, tata na alezandeya mpe lufu, akumba ekulusu na Yesu. 22 Bayi mapinga bakumbi Yesu na esika moko ebangami Golgotha, ndimbola na yango " esika na mikuwa ya moto". 23 Bapesi Yesu na makasi vino esangisama na kisi na kombo myrrhe, kasi ye amelaki yango te. 24 Mpe ba mobakiye na ekulusu, na kokabolaka bilamba na ye na Zeke, mpo na koyeba soki solda nani azui mbano koleka. 25 ezalaki ngongan ya misato ya Nzanga nde, ba mobakakiye na ekulusu. 26 Likolo na eteni ya linzanza, bakomaki tina ya bofundami na ye "Ye oyo Mokonzi ya yuda". 27 ba mobakeyi na ekulusu elongo na ba bomi mibale, moko na loboko naye ya mobali, mpe mosusu na loboko naye ya mwasi. 28 Wana esalemaki mpo makomi masantu makokisama, bakomobakaye na ekulusu elongo na ba bomi. 29 baleki nzela, ya esika wana, bazalaki kofinga ye, koningisa moto mpe koloba : " ye oyo alobaki akobuka tempelo, mpe atonga yango sima ya mikolo misatu. 30 Mikitisa na ekulusu mpe omikisa". 31 Kaka lolenge wana, na nganga Nzambe minene bazalaki kozomela ye, elongo na bnatangi mibeko, koloba: ye abikisaki bayike, bongo amibikisa mpe ye moko. 32 Tika ete Kristo, Mokonzi na Isalayele akita sasaïpi na ekulusu, mpo na biso tomona mpe tondima ye". baye babakamaki na ekulusu elongo naye, lbazalaki kofinga ye mpe lokola. 33 Na ngongo ya motoba sima ya nzanga, malili ejingaki mboka mobimba, kino ngonga ya libwa sima ya nzanga. 34 mbongo kaka na ngonga ya libwa wana, Yesu agangi na mon ngpgo makasi: " Eoi, Eloi, lama sabatani? Oyo elakisi Nzambe na ngayi, boni obwakisi ngayi". 35 Bayike baye bazalaki nzinga nzinga na ekulusu na yesu, balobi boye: "tala ako belela eliya". 36 Moto moko akilingingani na lombangu, akwi mwa etini ya elamba, azindisi yango lokati ya amsanga ya ngayi, atingisi yango na eteni ya nzete ya kekele, mpe atomboli : yango omonoko mwa Yesu, bongo moto wana lalobi "totala soko Elia akokitisa ye na ekulusu". 37 Sima na yango, yesu aganga makasi mpe akati motema. 38 Elamba monene ,ya tempelo epasuki na biteni bibale, utuo olikolo kino onse. 39 Bongo tango soda sinzili atelemi liboso na Yesu, amoni ete akufi, nde alobi: "ya solo, moto oyo azalaki mwana na Nzambe. 40 Basi nzike mpe bazalaki komona na mosika, kati na bango, maliya madelene, maliya (maman na zaki leki ya yosefu), mpe salome. 41 Tango ezalaka bango o mbonka ,galileo, bazalaki kolanda ye mpe kosalela ye, bayike na basi basusu, ba butaki mpe na mboka yelusalemi. 42 Lokola butu eyingelaki, na mokolo mwa liboso ya sabata. 43 Moto na kombo ya Yozefu ya mboka alimate ayeî kuna, mpo ye azalaki moto na lokumu, nakati ya lisanga ya bayuda oyo bazalaki kozela boyeyi ya bokonzi ya Nzambe. Azui bompikiliki, mpe akeyi apayi na Poso Pilato, kosenga ye nzoto na Yesu. 44 Poso Pilato akamuaki koyoka ,ete yesu akufaki, mpe ye abengi soda sinzili mpo atuna soki mpenza akufaki. 45 Eyokaki Poso Pilato na monoko ya soda sinzili ete, Yesu akufaki solo, nde andingisi bapesa nzoto na ye na Yozefu ya alimate. 46 Yozefu asombaki elamba na mpmbe, akitisi Yesu na ekulusu, ajingi ye na elaùmba ya mpembe, na mbisa, atié nzoto naye na kunda eye atimolaki kati na libanga. na mbisa, azipi ekotelo na kunda, na libanga monene. 47 Maliya madelene mpe Maliya mamana Yozé bango bamoni esika ekundamaki yesu.