Mokapo 9

1 Sima ya mukolo ya eyenga, Mariya wa Magdala pe Mariya mama wa Yakobo pe wa Salomé baombi biloko ya malasi mpo bakende kupakola nzoto ya Yesu. 2 Na tongo-tongo mokolo ya liboso bango baleyi o lilita eleko ya moyi ebima 3 Ekende bango na nzela bazali kumituna: "Nani akolonguela biso libanga monene wana? 4 Efongoli bango miso moni ete moto moko asili ko longola libanga ata ko ezalaki monene. 5 Ekoti bango na lilita, ba moni elenge mobali alati elamba ya pembe avandi koboko ya mobali mpe azalaki na kokamua. 6 Alobi na bango: "Bo banga te. Bozali koluka Yesu na Nazaleté, oyo ba bakaki ye na ekulusu. Ye asili ku sekwa! Azali lisusu awa te. Bokende kotala esika oyo batiaki ye. 7 Bongo bokende koyebisa na ba yekoli na ye mpe Petelo bakende liboso na Galile. Kuna bokomona ye lokola ayebisaka bino. 8 KObima na bango na lilita na lombango. Kolenga na kokomwa elataki bango. Ba lobi na eloko te na moto po b azalaki na somo. 9 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso na mposo, sima kosekwa na ye, amimonisi liboso na Mariya Madeleine oyo ye abenganaki milimo mabe sambo. 10 Ye akeyi pe koyebisa na ba oyo bazalaki na ye. Tango wana bango bazalaki ko yima-yima pe ko lela-lela. 11 Bayoki ete ye azali na bomoyi pe bamoni ye kasi bandimi te ete asekwaki. 12 Sima na yango, amimonisami na bato mibalé na ndenge mususu bazalaki ko kende na bilanga. 13 Bakeyi pe koyebisa basali mosusu, kasi bandimeli bango te 14 Sima ya ngonga, Yesu amonisami na basali na ye, tango bazalaki na misa, ye agangeli bango mpo kozanga kondima pe kokanga mitema na bango, mpo été bazalaki kondimela ba oyo ba monaki ye liboso sima ya kusekwa kati ya bakufi. 15 Ye alobi na bango: "Bokende bisika yonso na mokili pe boteya sango malamu". 16 Oyo ako ndima pe abatisami akozwa lobiko, kasi oyo akondima te akokweya pe akozwa etumbu. 17 Tala bilembo eko lakisama mpo na ba oyo ba ko ndima : Bako bengana milimo mabe na kombo na ngayi. bakoloba na minoko ya sika. 18 Bako mema nioka na maboko, kasi ekoswa bango ata moke te. Bakotia maboko na ba beli bango ba kobika. 19 Sima Mokonzi asili kolobela bango, abuti likolo pe afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. 20 Basali ya Yesu bakeyi pe koteya bisika yonso, tango oyo Mokonzi azaliki kosala na bango pe ko kokisa maloba na bilembo oyo ezali ko landa yango.