Mokapo 8

1 Na mikolo yango, ebele ya bato bazalaki, mpe bakelelaki bileyi. Yesu abiangi bayekoli ba ye mpe alobi na bango : 2 "Nazali koyokele ebele na bato oyo mawa, pamba te nafandi na bango mikolo misato, mpe baleyi te. 3 Soki nazongisi bango na bandako nzala, bakolemba na nzaela, mpo ete bamosusu kati na bango bowuti mosika". 4 Bayekoli ba ye bazongiseli ye: "Lolenge kani tokoki kozwa bileyi ya kopesa bango mp bablia mpe batonda?" 5 Yesu atuni bango: "Bozali na kwanga boni?" Bazongesi: "Sambo." 6 Afandisi bato yanso na mabele. Azui kwanga sambo, atondi Nzambe, abuki yango mpe apesi bayekoli ba ye mpo bakabelela bato yonso. 7 Bazalaki lisusu na mwa ndambo ya mbisi muke. Yesu atondi lisusu Nzambe, mpe apesi bayekoli mpo bakabola. 8 Bato baleyi mpe batondi. Bayekoli balokoti biteni ya biloko bitikalaki, batondisi bitunga sambo. 9 Bato bazalaki na esika yango koto mineyi. yesu azongisi bango o bamboka ya bango. 10 Kaka na tongo yango ayingeli o bwato na bayekoli bayi, akatisi mayi tii na etuka ya Dalmanutha. 11 Na sima, ba Fanizé bakomi epayi ya Yesu, mpe babandi kotiyana tembe na ye. Lokola bazalaki koluka komuka ,ye, basengi asalela bango elembo moko ekomonisa ete nguya na ye ewuti na Nzambe. 12 Yesu ayoki mawa mpo na yango mpe alobi: "Mpo na nini bato na tango oyo bazali kosenga elembo? Na bino ya solo, elembo moko te ekolakisama na bato na tango oyo. 13 Sima atiki bango mpe ayengeli lisusu o bwato mpo na kokatiusa mayi. 14 Bayekoli babosanaki kokamata bileyi. Bazalaki na kwanga moko kaka na bwato. 15 Yesu alobi na bango : "bokeba! ba farizé na bato ya Erode basalelaka mino ya ùmabe mpo na kotumba kwanga." 16 Ba kanisi kati na bango ete, tozali na kwanga te. 17 Eyebi ye bongo, alobi na bango ete mpo na nini bozali kososolama na likambo na kozanga kwanga? Mitema mua bino miyeyi makasi? 18 Awa ezali bino na miso, bazali kotala te? Mpe awa ezali bino na matoyi, bozali koyoka te? Bozali kokanisa te? 19 Wana ebuki nga kwanga mitano mpo na bato nkoto mitano, bolokoti bitunga boni ya biteni oyo etikalaki? Bango bazongiseli ye: "Zomi na mibale". 20 Boye, mokolo oyo nasalelaki kwanga sambo mpo na koleyisa bato koto mineyi, titunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki? " Mpe bango bazongiseli ye: "Bitunga sambo". 21 Bongo Yesu alobi na bango: "Nayino bozui kaka bososolo te. 22 Bakomaki na Betsaida. Kuna bamemeli Yesu mokufi miso moko, mpe ba bondeli ye ete asimba ye. 23 Yesu asimbi ye na loboko, mpe ememi ye mwa mosika ya mboka. Abwakeli soyi na miso, atieli ye maboko mpe atuni ye: "Ozali komona nini?" 24 Atali likolo mpe a lobi ete: "Nazali komona bato, Kasi bakokani na nzete kotambola. 25 Bongo atie maboko na ye na miso na ye, moto oyo akufa miso abiki, amoni biloko biso polele. 26 Azongisi ye na ndako na ye, kolobela ye ete: "kota ata na mboka te". 27 Yesu na bayekoli na ye bakeyi na bamboka ya Seraré, moko ya bamboko ya engumba Phillipo. Na nzela atuni bango boye: "Bato bakolobaka ete ngayi nani?" 28 Balobi na ye ete: "Yowani Mobatisi", mpe basusu et : "Eliya", mpe basusu ete , "Moko na basakoli". 29 Ye atuni bango ete: "Nde bino bokolobaka ete ngayi nani? Petelo azongiseli ye ete: "Ozali Klisto". 30 Mpe apesi monoko makasi ete bayebisa moto te na ntina na ye. 31 Abandaki kolakisa banga ete ekoki na Mwana na Moto koyoka bwale mingi, koboyama na bampaka ya mboka mpe na banganga minene mpe na bakomeli, ako bo boma ma, mpe kosekwa sima mikolo misato. 32 Alobaki mpe polele. Petelo akamati ye pembeni moke abandi kopamela ye. 33 Nde ye abongwi, amoni bayekoli na ye mpe apameli Petelo, alobi ete: "Kenda sima na ngayi Satana! Zambi ozali kokanisa makambo ya Nzambe te kasi makambo ya bato. 34 Abiangi ebele epayi na ye esika moko na boyekoli na ye mpe alobi na bango ete: "Soki moto alingi kobila ngayi, tika ete amiboya ye npenza, atombola ekulusu na ye mpe abila ngayi. 35 Zambi moto nani akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, soko nde nani akolinga kobebisa bomoi na ye mpo na ngayi mpe mpo na Nsango Malamu, akobikisa yango. 36 Zambi litomba nini ekozala na moto oyo akozwa mokili mobimba mpe akobungisa bomoi na ye? 37 Eloko nini ekoki na moto kopesa mpo na kotikala na bomoi na ye? 38 Moto nani akoyoka nsoni na ntina na ngayi mpe na ntina ya maloba na ngayi na kati ya libota oyo na pité mpe masumu, Mwana ya Moto akoyoka nsoni na ntina na ye, wana ekoya ye kati na nkembo ya Tata na ye esika moko na ba-anzelu na bulé.