Mokapo 7

1 Bafalisayo bayei kokutana pembeni na Yesu, na ndambo ya balakisi mibeko bawutaki Yelusalem 2 Bamonaki te batekoli na Yesu bazalaki kolia bileyi na maboko bosoto, basukoli maboko te. 3 Po ba Falisayo na ba Yuda baliaka te nano basukoli maboko te, lolenge mitindo ya ba mbuta mutu ezalaki kotinda. 4 Na ntango ba Falisayo bawutaka na bisika oyo bakutana ka, bako kaka kolia nano basukoli te. Ezali na makambo mosusu oyo ba Yuda bazalaki kosala mpe kosukola bisaleli ya makusa mpe bisika ya kolia. 5 Ba Falisayo na ba lakisi mibeko batuni Yesu: "Mpo nini ba yekoli na yo batosaka moboko ya mateya oyo ba mbuta muntu bapesa mitindo ete baliaka kwanga maboko bosoto te ?" 6 Yesu ayanoli bango : Bato na lokuta, Isaya asakolaki malamu mpo bizaleli na bino, bato oyo bakumisaka ngayi se na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na ngayi. 7 Kokumisa oyo bapesaka ngayi ezali na nzela te, mpo batosaka se mobeko mpe mateya bato bakoma. 8 Bozali koboya mitindo Nzambe apesi bino mpo na kokangama na mobeko oyo bato bakoma. 9 Mpe alobi na bango: "Bozali kobwaka mitindo Nzambe apesi bino mpo na kotosa bakoko! 10 Mpo Mose alobaka: "Kumisa tata na yo mpe mama na yo" mpe "moto nyonso akoloba mabe mpona tata to mama na ye esengeli akufa". 11 Kasi bino bolobi ete : "soki moto alingi kopesa likabo epayi ya baboti na ye, mpe alobi nabombi yango mpo na Nzambe 12 na yango bozali kopesa ye nzela te mpo asalisa baboti na ye. 13 Bozali koboma mitindo ya Nzambe mpona kotosa mibeko bozwa. Mpe bozali kosala makambo mingi ya kokokana. 14 Abengi lisusu etuluku ya bato mpe alobi: "Boyoka ngayi mpe boyeba. 15 Eloko moko te ewutaka libanda ya moto mpe ekomi ye bosoto. Bobele oyo ewutaka na kati ya motema nde ekomisaka moto bosoto. 16 Oyo aza na matoyi ayoka. 17 Yesu atiki etuluku mpe akoti na ndako mpe bayekoli batuni ye ndimbola lisese wana. 18 Yesu ayanoli: "Bino mpe boza lokola bozangi mayele, boza komona te oyo etwutaki libanda ekomisaka moto bosoto te, 19 mpo ewuti na motema te, kasi ekoti nde na libumu nde ebimi na djongo (W.C). Na koloba bongo Yesu akomisi bilia nyonso peto". 20 Ayebisi bango :"Oyo ewutaka na kati ya moto nde ekomisaka ye bosoto. 21 Mpo makambu ya bosoto ewutaka na motema ya moto, pité, koyiba, koboma, 22 kosala ekobo, posa mabe, makambo mabe, mayele mabe, bondumba, kolula, kotonga, lolendo, bozoba. 23 Makambo nyoso oyo ya mabe ewuti libanda te, kasi na kati ya moto nde ekomisaka moto bosoto 24 Na yango Yesu alonwe na esika yango, akeyialingaki bato bayeba te azali wana, akokaki kobomba te. 25 Na mbala moko, mwasi moko ya mopaya aye ko bondela ye mpo abengana molimo mabe Epayi ya mwana na ye ya muasi. 26 Mwasi yango azalaki Grecque, syro-phenicienne. 27 Alobi na ye: " Tika bana balia nano, ezali malamu te kokamata kwan ga ya bana mpe kobwakela yango ba mbwa". 28 Kasi ye azongisi : "Na ndimi Mokonzi, ata ba mbwa baliaka mpumbulu oyo ekweyaka tango bana baza kolia na mesa. 29 Alobi na mwasi: "Mpo ete olobi yango kende na kimia, milimo mabe abimi epayi ya mwana na yo". 30 Ekendeki na ndako na ye mpe akuti mwana alali na mbeto, molimo mabe ebimi. 31 Atikaki engumba Tyr, koleka na Sidon, kokende na mbu ya galileya mpe akomi na engumba ya ba mboka jomi. 32 Bamemeli ye moto ayokaka te, mpe koloba na mpasi, babondeli ye amama ye maboko. 33 Ekeyi na ye pembeni mosika na ekutulu, akotisi misapi na matoyi, asimbi lolemo na soyi. 34 Atali na likolo, apemi alobi: "Epfata" elakisa "fungwama yo". 35 Na ntango wana kaka, matoyi efungwami, oyo ezalaki kokanga lolemi na ye ebebisami, mpe abandi koloba 36 Apesaki bongo motindo baloba na moto te, ba tikala se kimia, kasi bazalaki se kopanza nsango na ye. 37 Bakamwaki mingi mpe balobi: "Azalaki kosala makambo ya malamu, koyokisa bato bakufa matoyi mpe kolabisa ba baba."