Malako 6

1 Yesu alongwi wana mpe akei na mboka na ye, mpe bayekoli na ye balandi ye. 2 Mokolo na eyenga, abandi koteya na etonga, ebele bayoki mpe bakamwi. Batuni: azwi malakisi oyo wapi? Nani apsesi ye bonya boye? mpe azali kosala bikamwisi boye? 3 Ezali ye mwana na mosali mabaya te, mwana na Malia mpe ndeko na Yakobo, Jose, Juda mpe Simoni? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa kati nabiso te? Baboyi kondimela ye. 4 Boye Yesu alobi na bango: Lokumu epesameli mosakoli bisika yonso, kasi na mboka na ye te, baoyo ya ye te mpe ndako na ye te. 5 Yesu akokaki kosala bikamweseli te soko kotia maboko na babeli mpe kobikisa bango. 6 Boye mitema makasi na bango ekamwisi ye mpe akei na ye bamboka nzinga-nzinga. 7 Abengi bazomi na mibale mpe atindi bango babale babale, mpe apesi bango bokonzi likolo ya milimo yonso ya mbindo; 8 Apesi bango mitindo bazwa eloko moko te ezali bino kokenda, bilei te, libenga te, mosolo te soko bobele pango; 9 sapato mpe kazaka mibale te. 10 Alobi na bango: Na tango yonso bakoyamba bino na ndako, boumela wana. 11 Kasi soko bayambi bino to bayoki bino te, bobima na mboka wana mpe bopupola putulu ya matambe bino, yango nde litatoli mabe epai na bango. 12 Boye bayekoli bakei mpe babandi koteya bato ete babongola mitema. 13 Babengani ebele ya milimo mabe, mpe babikisi bato ebele. 14 Mokonzi Herode ayhoki sango yango, zambi kombo na Yesu eyebanaki mingi. Bamoko balobaki: «Yoane mobatisi asekwi! yango nde azwi nguya ya kosala bikamweseli lolenge boye.» 15 Boye basusu balobaki :« azali Elia», bamosusu balobaki:« azali mosakoli, lokola moko ya basakoli ya kala.» 16 O eleko Herode ayoki boye, alobi: «Yoane oyo nakataki moto asekwi!» 17 Zambi Herode akangisaki ye mpe atiaki ye na boloko na ntina na Herodias, mwasi ya Filipo ndeko na ye, oyo abalaki. 18 Mpo ete Yoane apekisaki ye, na koloba ete: «Ezali malamu te kobala mwasi na ndeko na yo kolandisama na mibeko». 19 Kasi Herodias abomba kanda na motema mpe akanaki koboma ye nde azangaki makoki, 20 pamba te Herode azalaki kobanga Yoane; mpo ayebaki ete azali moto malamu mpe mosantu, boye abatelaki ye ete azwa mabe te. Koyoka masakoli na Yoane, ekopesa ye mpasi; atako bongo, asepelaki koyoka ye. 21 Boye na mokolo ya bokundoli mbotama ya Herode, tango malamu emonani mpo na kokokisa mokano na Herodia. Bakonzi ya mapinga, mpe bakambi ya Galilai babiangamaki na milulu yango. 22 Ezalaki bango o mesa, mwana ya Herodia ya mwasi akoti mpe abineli Herode na babiangami na ye. Asepelisaki bango koleka. Mokonzi alobi na ye: «Senga ngai eloko yonso olingi, boye nakopesa yo yango. 23 Akati ndayi, alobi:«Yonso okosenga ngai, nakopesa yo yango, ezala ndambo ya mboka na ngai.» 24 Elenge mwasi abimi mpe atuni mama na ye: «Nasenga nini?» Alobi na ye: «Moto ya Yoane mobatisi.» 25 Mbala moko, akoti na lombango epai ya mokonzi mpe atuni ye koloba: « Nalingi moto ya Yoane mobatisi na kati ya saani.» 26 Mokonzi ayoki mawa mingi koleka, kasi na ntina ya ndayi alapaki mpe liboso na babiangami na lipati, akoki koboya bosenga na ye te. 27 Bongo atindi soda moko amemela ye moto ya Yoane mobatisi. 28 Soda akei mpe akoti na boloko mpe akati moto ya Yoane. 29 Eyoki bayekoli na Yoane boye, bakei mpe bakamati ebembe ya ye mpe bakundi yango. 30 Bantoma, basanganaki nzinga-nzinga na Yesu, bayebisi ye yonso oyo basalaki mpe bateyaki bato. 31 Alobi na bango: «Bokende esika na kimia kati na lisobe mpe bopema naino.» Mpo ete bazalaki ata na ngonga ya kolia te. 32 Boye bakoti na bwato mpe bakei esika moko ya kimia. 33 Kasi bato bamoni lolenge bakei mpe ebele bayebaki yango. Mingi bautaki na bingumba yonso, balandaki ye mpe bakomaki esika yango liboso na Yesu. 34 Awa ekiti bango na bwato, amoni boyike bwa bato mpe ayokeli bango mawa mingi mpo bazalaki lokola mpate ezangi mobateli. Mpe abandi koteya bango makambo mingi. 35 Sima ya tango molai, bayekoli bayei koyebisa ye: «Esika oyo ezali esobe mpe ntango esili koleka. 36 Zongisa bango o mboka nzing-nzinga mpo bamisombela bilei.» 37 Ayanoli bango mpe alobi boye: «Bino bopesa bango bilei.» Batuni ye: «Tokoki kosomba kwanga na mosolo nkama mibale mpo topesa bango?» 38 Atuni bango: «Bozali na kwanga boni? Bokenda mpe botala.» Sima na kotala, balobi: « Biteni mitano mpe mbisi mibale.» 39 Yesu alobi na bato bafanda bisika bisika. 40 Bafandi bongo, mosusu nkama mpe mosusu tuku mitano. 41 Akamati biteni mitano ya kwanga mpe mbisi mibale, atali likolo, apamboli, akatikati kwanga mpe apesi bayekoli bakobola yango. Akaboli mbisi mibale mpe lokola. 42 Bato yonso balei mpe batondi. 43 Balokoti biteni ya kwanga mpe ya mbisi oyo etikali, yango etondisi bikolo zomi na mibale. 44 Boye motwiya ya mibali baliaki, ezalaki koto mitano. 45 Sima na yango, Yesu amatisi bayekoli na ye na ebei mpo bakenda kozila ye na ngambo na Bethsaïda wana ezalaki kozongisa bato na mboka na bango. 46 Tango bakei, ye akei na ngomba mpo nakobondela. Na 47 pokwa, ebei ezalaki kati ya ebale mpe Yesu azalaki ye moko na mokili. 48 Amoni ete bayekoli bazaki na mikakatano ya kotambwisi ebei mpo na mopepe. Pene na tongo kotana, Yesu abandi kotambola likolo ya mai, mpe ayei epai na bango. 49 Emoni bango ye kotambola likolo ya mai, bakanisi azali elima, mpe babandi konganga, 50 pamba te bayoki somo mingi. Boye Yesu alobi na bango: «Ezali ngai! Bobanga te!» 51 Akoti na ebei elongo na bango mpe mopepe esili. Bayekoli bakamwi mingi penza koleka. 52 pamba te, bazalaki kososola te biteni mitano elimboli nini. Kasi mitema na bango ezalaki bobele makasi. 53 Tango bakatisi mai, bakomi na Genesaret, bakangi ebei na libongo. 54 Ebimi bango na ebei, mbala moko bato bayei koyamba Yesu. 55 Bongo bakei mbangu kokamata bato na bokono na mboka mobimba; koya na bango bisika yonso bayebi ete Yesu akoleka wana. 56 Bipai binso Yesu azalaki koleka, ezala na mboka ya minene to ya mike to na bingumba, bazalaki kotia babeli na balabala mpe kobondela Yesu ete apesa bango nzela ya kosimba ata songe ya elamba na ye. Mpe bato yonso oyo bazalaki kosimba ye, babikisamaki.