Mokapo 5

1 Bakatisi o ngambo ya ebale monene okati ya bai Gadalamea. 2 Na pwasa o eleko Yesu abimi na ebeyi, moto ya milimo ya mbindo abimi o kati ya mayita mpo na bokutani na ye. 3 Efandeli ya moto oyo ekomaki bobele na mayita, kasi moto moko te, akokaki kokanga ye na minyololo. 4 Bakangaki ye mbala nzike na minyololo mpe mabende, azalaki bobele kokata yango. Ata ko moto te, abelemaki pembeni na ye. 5 Mikolo nyoso moi mpe butu, azalaki kowaya-waya kati na mayita mpe likolo ya bangomba. Azalaki bobele konganga makasi mpe komizokisa na mabanga. 6 Na komona Yesu na mosika, apotaki mbangu mpe amikitisaki o boso bwa ye. 7 Abeleli na makasi: «Ngai na yo toweli nini Yesu mwana na mokonzi Nzambe? Nabondeli yo na nkombo ya Nzambe otungisa ngai te.» 8 mpo Yesu azalaki kopesa mitindo ete «milimu mabe ebima kati na moto oyo». 9 Yesu atuni ye: «yo ozali nani?» «Ngai nazali mapinga mpo ete tozali bayike» 10 Bongo babondeli Yesu ete abengana bango na etando ya mabele wana te. 11 Na eloko wana, ebuluku ya bangulu ezalaki kolia na nzinga nzinga na ngomba, 12 bongo milimo na mbindo esengi Yesu et, «pesa biso mitindo tokota kati na ebuluku na bangulu. 13 Tango bazwi mitindo ya Yesu, milimo ya mbindo ehami na kati ya moto wana, na boye eyingeli kati na bangulu. Nde boye, bangulu bakilingani uta na bangomba, mpe izindi yonso o kati ya mai na motango pene-pene koto mibale. 14 Bakengeli ya bibwele ya ngulu bapoti mbangu kopesa sango na engumba, mpe na ba mboka nzinga-nzinga, na maye elekaki, bongo bato bayike bayaki kokamwa na maye malekaki. 15 Bapusanaki pene na Yesu, bongo bakuti moto oyo azalaki na bazabolo ebele, afandi na molato kitoko mpe na limemya, mpe bobangi ekoti kati na bango. 16 Baye bamonaki maye ma utaki koleka na moto azalaki na bazabolo, bapesi mpe bango sango na oyo ekomelaki mpe ebuluku na ba ngulu. 17 Bayebisi Yesu abima na engumba na bango. 18 Wana Yesu aingelaki o ebei, moto oyo abikisamaki na milimo ya mabe, asengaki kokenda na ye elongo. 19 Kasi Yesu alingisaki ye te. Alobi na ye boye: Zonga o ndako na yo, yebisa na libota na yo bolamu mpe mawa na Nzqmbe asaleli yo. 20 Bongo akendaki na etando kosakola makambo yonso ya minene Yesu asalelaki ye, mpe moto yonso akamwaki. 21 tango Yesu akotaki o ebei o ngambo ya ebale, etuluku ya bato bazingi ye,bongo atelemaki pene-pene na ebale monene. 22 Moko ya bakambi ya eyanganelo ya bayuda na nkombo ya Yaliusi ntango akomi, mpe amoni Yesu, amikitisi na makolo na ye. 23 Asengi na ye na kolela penza et abikisa mwana na ye azali na mpasi, soki alingi koya kobikisa ye. 24 Yesu akendaki na ye elongo, boyike na bato balandi ye, mpe bazingeli pembeni. 25 Nzoka nde ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono mbula zomi na mibale, kotangisa makila. 26 Amonaki mpasi mingi ata baminganga, bakokaki kobikisa ye. Abebisaki misolo ebele, kasi mpasi eyaki koleka lisusu. 27 Ayokaki sango na Yesu. Bongo apusanaki sima na ye, tango Yesu azali kotambola, asimbi songe ya elamba na ye. 28 Nde azwi makanisi ete, soki nasimbi elamba na ye, nakobika. 29 Na ngonga asimbi yango, ayoki an kati na ye lobiko, bongo ayoki penza ete nzoto ekomi kolongonu, mpasi yonso esili. 30 Na pwasa Yesu ayoki kati naye ete nguya ebimi mpe atuni na batu nzinga-nzinga; nani asimbi elamba na ngai? 31 Bayekoli bayonoli ye, ozali komona ebuluku ya bato baye bazali nzinga-nzinga; mpe ozali kotuna nani asimbi yo? 32 Bongo Yesu aluki pembeni na ye, moto oyo asali bongo. 33 Mwasi oyo kososola makambo oyo ndenge elekaki na ye, mpe ayamboli kati na nsolo. 34 Alobi na ye, mwana, kondima na yo ebikisi yo. Kenda na kimia, obikisami na mpasi na yo. 35 Na ngonga azalaki kosolola na ye, batu bauti na ndako na eyanganeli ya bayuda kopesa nsango ete tika kotungisa Mokonzi, mwasi asili kokufa. 36 Kasi Yesu tango ayoki masolo na bango, ayebisi mokonzi na eyanganelo ya bayuda ete, kobanga te. Zala na kondima. 37 Alingisaki te moto alanda ye, abengi bobele Petelo, Yakobo mpe Yoane, ndeko na Yakobo. 38 bakei o ndako ya capita ya eyanganelo ya bayuda. Akuti bato ebele kolela mpe konganga makasi. 39 Ntango aingeli kati na ndako; Alobi na bango mpo na nini bozali komitungisa mpe kolela? Mwana akufi na ye te, kasi alali mpongi. 40 Bango batioli ye, kasi ye abimisi bango yonso libanda.Akamati bobele baboti na mwana, mpe bato bayaki na ye, bakoti esika mwana azalaki. 41 Asimbi mwana na loboko mpe alobi na ye : « Talitha Koumi» elimboli ete: « Moseka, napesi mitindo, Telema» 42 Na lombangu mwana atelemi mpe atamboli, (azalaki na mbula zomi na mibale) Ekamwisi bato yonso. 43 Apesi mitindo ete, bapanza sekele oyo na moto moko te. Ayebisi na baboti bapesa ye bileyi.