Malako 4

1 Sika Yesu abandi kotangisa libanda na mai monene. Etuluku ya bato bazingaki ye; yesu afandaki na bwato likolo na mai monene mpe bato bafandaki na pembeni na mai. 2 Atangisi bango makambo mingi na masese mpe alobi na bango na kati ya matangisina ye, 3 Boyokamela, 4 moloni abimi mpo na kolona. Tango azalaki kolona, ndambu na mbuna ekweaki na nzela mpe bandeke baliaki yango. 5 Mbuma mosusu ekweaki likolo ya mabele oyo ezalaki na mabanga mike mike, na bongo mpe ekolaki noki te pamba te mabele ezalaki penza mozindo te. 6 Yango ezikaki mpe ekaukaki nioso na moi po ezalaki na misisa te. 7 Na bongo ndambu mosusu ya mbuma ebotaki mbuma te po te yango ekweaki likolo ya nzete ya nzube pe ezipaki yango 8 Milona oyo ekweaki na mabele kitoko, yango ebimaki na nkona ya kolandisama tuku minei, tuku motaba pe mokama. 9 Pe alobi, oyo azali na matoyi ya koyoka, ayoka 10 Tango Yesu atikali ye moko, bayekoli pe bato bazalaki pembeni na ye, batunaki ye na ntina na masese. 11 Ayebisi bango, «na bino nde bokonzi ya Nzambe epesameli, kasi masese po na baoyo bazali libanda, 12 na ntina ete tango bazali kotala, bamona te, pe tango bazali koyaka, basosola te, po babongola motema te pe Nzambe alimbisa bango.» 13 Kasi alobi na bango: «Bososoli lisese te? Ndenge nini bokososola masese mosusu? 14 Moloni akokani na moteyi sango malamu. 15 Bamosusu bakokani na nzela. Liloba na Nzambe eyeli bango lokola mbuma na nzela. Tango bayoki yango, satana abotoli bango o mitema. 16 Bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na mabele ya mabanga, bayoki liloba na Nzambe, bayambi yango na esengo. 17 Boye misisa ya nzete ezwi esika te o mitema na bango, bayambi boye mpo na tango moke. Sima na mikakatano mpe minioko na ntina na liloba na Nzambe, babwaki boyambi na bango. 18 Bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na kati na nzube, bayambi liloba naNzambe, 19 na tina na mikakatano ya mokili, posa ya bozwi ekoti ebele, mpe makambo mosusu mingi ebomi liloba wana, mpe ekoti te. 20 Boye bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na mabele malamu. Bayoki liloba na Nzambe, bayambi yango, boye baboti mbuma malamu; tuku misato, tuku motoba mpe nkama moko. 21 Yesu alobi na bango: moto nani ayei na mwinda, atii yango o nse ya katini to o nse ya mbeto? bobele o likolo ya mesa. Boye te? 22 Boye oyo ebombami ekoyebama, mpe sekele ekoyabana. 23 Soko moto azali na matoyi ya koyoka, tika ayoka. 24 Bongo Yesu alobi na bango lisusu: « Bokeba na oyo bazali koloba na bino. Lolenge na bino ya bososoli makambo ya Nzambe, boye Nzambe akopesa bino bolamu na ye koleka. 25 Mpo ete oyo azali na biloko mingi, akozwa mosusu; nde oyo azali na yango te, bakobotolo ye ata ndambu azali na yango. 26 Alobi: «Bokonzi ya Nzambe yango ezali lokola moloni nkona na mabele. 27 Ayebaka te tango nini mbuma ebotaka malamu. 28 Na tango ye alalaka pe alamukaka, mabele yango moko ebotaka mbuma, ya liboso ebimisaka nzete, bongo likol na nzete na yango nkona ya kokola. 29 Pe bongo mbuma na yango eteli, na lombango azwaka nkona po na tango ya kobuka ekoki. 30 Pe alobi: « Tokoki kokokisa bokonzi na Nzambe na nini? to lisese nini tokoki kosalela pona kolimbola yango malamu? 31 Lokola nkona ya moutarde, tango elonami, 32 yango nde ezali mike penza yango ekolaka na lombango koleka nkona nioso ya elanga pe bitape na yango nde bandeke batongaka zala na bango.» 33 Na masese ebele boye, azalaki kotalisa bango liloba kino bakoma na makoki ya kososola malamu, 34 pe azalaki kolobela bango lisusu na masese te. Kasi tango azalaki kotikala ye moko, azalaki kolimbola bayekoli na ye. 35 Na mukolo wana, ayebisaki bango, «tokende na ngambo mosusu na ebale» 36 Na yango, bayekoli balongwaki kati na etuluku ya bato pe bakendaki elongo na Yesu po ete Yesu azalaki nkati na bwatu. Kasi bwatu mosusu ezalaki na esika wana. 37 Pe mbonge na mopepe makasi eyaki pe etondisaki mai kati na bwatu. 38 Kasi Yesu azalaki kolala kati na bwatu. Bongo bazalaki kolamusa Yesu pe balobi na ye: «Mokonzi ozali kokanisa te tozali kokufa?» 39 Pe tango alamukaki, agangelaki mupepe pe ayebisaki ebale: «Kimia » Pe mupepe esilaki pe kimia makasi ekotaki. 40 Pe alobaki na bango: «Bozali kobanga nini? bozangi kondima?» 41 Bobangi ezwi bango pe bamituni moko pe mosusu: «Ye azali nani? po ete mupepe na ebale etosa ye.»