Malako 3

1 Yesu-Christu akoti na eyanganelo, wana ezalaki moto moko na loboko ya kokauka. 2 Bamosusu bazalaki kotala ye soko akobikisa ye mokolo ya eyenga mpo bakamba ye. 3 Yesu alobi na moto wana : «Telema wana na kati.» 4 Mpe alobi na bango : «Epesameli biso ndingisa kosala malamu to mabe mokolo ya eyenga, kobikisa to koboma?» Batikali nye. 5 Na mawa na ntina na mitema mabe na bango, alobi na ye :«Sembola loboko na yo.» Asemboli mpe Yesu abikisi yango. 6 Na lombango, bafalisayi babimi mpe basali likita elongo na baherodia mpe bayokani baboma ye. 7 Yesu na bayekoli na ye bakei pembeni na ebale, mpe ebele na batu bauti Galilai mpe Yudee, 8 mpe Yelusalema, bingumba ya Yude, ya Idumeya koleka Yordani mpe mboka nzinga-nzinga na Tir mpe Sidon; ebele ya bato bayei epai na Yesu wana eyokaki bango sango. 9 Alobi na bayekoli na ye babongisela ye ebiei, lokolabato bazalaki ebele. 10 Pamba te, ebele na bato na bokono balingaki kosimba ye loenge abikisaki ebele. 11 Milimo na mbindo o tango emonaki ye, efukamaki mpe engangaki : «Yo oazali mwana na Nzambe.» 12 Apameli bango mpo ayebana te. 13 Abuti na ngomba, abiangi baoyo alingi mpe bayaki na ye. 14 Aponi zomi na mibale, mpe abiangi bango bantoma. Na ntina ete atinda bango koteya, 15 na bokonzi ya kobengana milimo mabe. 16 Aponi zomi na mibale : Simona, oyo apesaki nkombo ya Petelo; 17 Jaki mwana na Zebede, Yoane ndeko na Jaki oyo apesi nkombo ya Boanegès, elakisi mwana na nkake; 18 mpe Andele, Filipo, Batelemi, Matai, Toma, Jaki mwana na Alfe, Tade, Simona Zelote, 19 mpe yuda Iscariote oyo akoteka ye. 20 Sima na yango, bakendaki o ndako, mpe etuluku ya bato basanganaki lisusu kino bakokaki kolia biei ya bango te. 21 Tango libota eyoki yango, bayei koluka mpe bakanga ye. balobaki boye :«azangi mayele.» 22 Bakomi mibeko bauti Yelusalema balobi boye : «Azali na molimo ya Belzebulu. Mpe na nzela ya mokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe.» 23 Yesu abengi bango nzinga-nzinga na ye mpe alobi na bango na masese: «Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana? 24 Soko bokonzi ekabwani kati na yango moko, bokonzi wana ekoumela te. 25 Soko ndako ekabwani kati na yango, ekoki kotelema te. 26 Soko Satana atomboki kati naye moko, akabwani, akokoka kosala eloko te, akomi na suka. 27 Pamba te , moto moko te akoki kokota na ndako na moto makasi mpe koyiba biloko na ye soko akangi ye singa mpe kozwa biloko na ndako. 28 Solo nalobi na bino :«Masumu ya bato ekolimbisama mata kotuka; 29 kasi kotuka molimo mosantu ekolimbisama te mpo ete moto wana amemi lisumu ezangi suka.» 30 Yesu alobi boye mpo balobi na ye: «azali na milimo mbindo.» 31 Mama mpe bandeko na ye bazalaki libanda, mpe batindi moto kobenga ye. 32 Ebele na bato bazalaki nzinga-nzinga balobi na ye: «Mama mpe bandeko na yo bazali koluka yo libanda.» 33 Yesu alobi na bango:«Nani mama mpe bandeko na ngai?» 34 Atali baye bazalaki penepene na ye, alobi: «Tala!mama mpe bandeko na ngai. 35 Oyo azali kosala mokano na Nzambe, azali ndeko mobali, mwasi mpe mama na ngai