Malako 2

1 Sima ya mikolo, Yesu azongaki na Capernawume. tango bato bayokaki bozongi naye, 2 ebele bayanganaki kino esika ezalaki lisusu te. Yesu ateyi bango liloba na Nzambe. 3 Bato mosusu bamemeli Yesu ebosono moko, amemami na bato minei. 4 Lokola bato bazalaki ebele, esika ya kokomisa moto ona epai na Yesu ezalaki te. babuti o likolo ya ndako, batoboli mpe bakotisi ye, alali likolo ya mbeto liboso ya Yesu. 5 Yesu amoni kondima na bango, alobi na ebosono: «Mwana na ngai, masumu na yo malimbisami» 6 Bakomi mikanda mosusu bafandaki wana, bakanisi o mitema mia bango: 7 «Ebandi boni moto oyo aloba boye? Atuki Nzambe I Nani akoki kolimbisa masumu soko Nzambe te?» 9 Yesu lokola ayebaki makanisi na bango, alobi na bango: mpo na nini makanisi boye o mitema mia bino? 8 Nini ezali pet koloba, masumu na yo elimbisami to telema kamata mbeto na yo mpe kenda? 10 Kasi mpo boyeba ete mwana na moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu, alobi na ebosono: 11 telema! zonga na ndako na yo. 12 Atelemi mbala moko, azwi etoko na ye mpe akei. bato yonso bakamwi komona yango mpe bakumisi Nzambe koloba boye: «Naino tomona likambo ya boye te.» 13 Yesu atiki Capernaum mpe atamboli pembeni na libeke. Etuluku ya bato bayei mpe ateyi bango. 14 Tango abandi koleka, amoni mwana ya lewi, Alfe. afandaki esika na ye ya mosala mpo nakofutisa pako. Yesu alobi na ye «landa ngai.» Atelemi mpe alandi Yesu. 15 Sima na mikolo Yesu azalaki kolia o ndako ya Lewi elongo na basumuki mpe bayekoli na ye, bazalaki ebele kolanda ye. 16 Balakisi mibeko mpe bafalisayo batuni bayekoli : «Mpo nanini azali kolia mpe komela elongo na basumuki mpe bakongoli mpako?» 17 Yesu, sima na koyoka yango, alobi na bango: Bato oyo bazali nzoto kolongonu, bazalaka na posa ya monganga te. Bobele babeli. Nayaki koluka bayengebene te, kasi basumuki/ 18 Bato mosusu bayei mpe batuni Yesu: «Ntina nini bayekoli ya Yoane mpe Bafalisayo bakilaka kasi oyo ya yo te?.» 19 Yesu ayebisi bango : Bomona wapi babiangami na libala bazali kokila tango bazali elongo na mobali ya libala? Tango yonso bazali elongo na mobali ya libala, bakoki kokila te. 20 Kasi mikolo mikoya, wana mobali ya libala akoazala elongo na bango te, nde bakokila o mikolo mina. 21 Moto moko te atongaka elamba ya sika likolo ya oyo ya kala, elingi koloba ete moko mpe mosusu ekopasuka makasi. 22 Bongo Yesu abakisi; moto moko te atiaka vinio ya sika o kati ya mbeki ya kala, pamba te, vinio ekopasola mbeki, mpe bakozanga vinio na mbeki. «Kasi , esengeli kotia vinio ya sika o mbeki ya sika.» 23 O mokolo mwa eyenga, Yesu azalaki koleka kati na bilanga ya masangu mpe bayekoli na ye babandi kobuka mbuma na yango. 24 Bongo Bafalisayo balobi na ye: «mpo na nini bazali kosala oyo mobeko elingisi te mokolo mwa eyenga?» 25 Ayanoli bango: Batanga naino te oyo Dawidi asala, wana ezalaka ye na bosenga mpe nzala? (ye na bato azalaka na bango) 26 Lolenge bakotaki o ndako Nzambe tango Abiatale azalaki nganga Nzambe mokonzi, baliaki kwanga ebulisami (eloko oyo epekisami na moto yonso longola banganga nzambe) mpe apesaki baoyo bazalaki na ye elongo. 27 Yesu asukisi boye: mokolo mwa eyenga esalama mpo na moto kasi moto asalama mpo na mokol mwa eyenga te. 28 Yango wana, mwana na moto azali mokonzi ya mokolo mwa eyenga.