MATAI 7

1 Bosambisa te mpo ete basambisa bino te. 2 Bokosamba lolenge bokosambisaka mpe na emekelo bokomekelaka baninga, nde bakomekela bino; 3 Boni omoni lokasa na liso ya moninga wa yo, tango libaya lijipi oyo ya yo? 4 Boni olobi na moninga wa yo, alongola lokasa lojali na liso lia ye kasi libaya lijipi liso lia yo? 5 Yo mokosi! longola naino libaya na liso lia yo sima olongola oyo ya ye. 6 Biloko bisantu bikoki kopesa na bambwa te. Mpe biloko bia bino bia mutuya na banguku te, mpo ete babebisa biango na makolo ma bango mpe na sima babongwani mpo na koboma bino. 7 Bosenga mpe bakopesa bino, boluka mpe bokozwa, bobeta ekuke mpe bakofungolela bino. 8 Oyo asengi bakopesa ye, oyo aluki akomono, oyo abeti ekuke bakofungola ye. 9 Nani akopesa mwana na ye libanga soki asengi ye lipa? 10 To asengi mbisi apesi ye nyoka? 11 Bato mabe, bokopesa bana ba bino biloko malamu, bongo tata wa bino ajali na likolo akoki kopesa biloko malamu te na baye bakolomba ye? 12 Boye, oyo elingi bino batu basalela bino, bosalela mpe mpo na bango lokola. mpo ete mobeko mpe basakoli balobi bongo. 13 Boingela ekuke moke mpo ete njila ya monene ejali komema na libebi; ebele bakoleka njela yango. 14 Mpo ete ekuke ejali moke mpe njela nkaka mpo komema na bomoi, moke bakoleka yango. 15 Bokeba na basakoli ya lokuta, bakoya na poso ya mpate, kasi bajali bankosi mpo na koboma. 16 Bakoyebana na misala mia bango. Bokoki kobuka mbuma na mowiti na njete ya njube te, to mbuma na mosuke na makasa mpamba? 17 Njete malamu ekobata mbuma malamu, njete mabe ekobota mbuma mabe; 18 Njete malamu ekoki kobota mbuma mabe te, to njete mabe ebota mbuma malamu. 19 Njete oyo ekobota mbuma malamu te, ekokatama mpe ekobwakama na moto. 20 Lolenge wana bokoyaba bango na mbuma na bango; 21 Banso balobaka: «Mokonji, Mokonji, bakoingela na bokonji bwa lokolo te bobele baoyo basalaka mokano mwa tata wa ngai. 22 Ebele bakoloba na mokolo mona: «Mokonj, Mokonji tosakolaki na nkombo na yo te? Tobenganaki milimo mabe na nkombo na yo te? Mpe ebele ya bikamwisi na nkombo na yo te?» 23 Nakoloba na bango polele, nayebi bino te, bolongwa pene na ngai, bato mabe. 24 Oyo nyonso ayoki maloba ma ngai mpe ajali kosalela mango, ajali lokola moto atongi ndako likolo lia libanga. 25 Mbula enoki mayi matondi, mpela eyaki, ndako yango ekwei te, mpo etongami likolo lia mabanga. 26 Kasi moto nyonso ayoki malioba ma ngai mpe asaleli yango te, ajali lokola moto na joba atongi ndako na esika na jelo. 27 Mbula enoki, mayi matondi, mpela eyei, ekweisi ndako. 28 Yesu asilisi koteya, etuluku ya bato bakamwi na mateya na ye. Ateyaki lokola moto ajali na bokonji, 29 kasi lokola bakomi na mibeko na bango te.