MATAYO 6

1 Batela kosalela misala na sembo na liboso na bato, po na koyeba yo. Soki okozwa lifuti te pene na tata na yo ajali na likolo. 2 Soki ozali kopesa moto eloko,kobeta ngonga na liboso na yo, ndenge bato oyo bakosalaka na synagoga, na balabala po bakumisa bango na bato. Solo nazali koyebisa bino, bango basi bazwi lifuta na bango. 3 Po na bino, tango bozali kopesa, tika loboko ya mwasi eyeba te oyo loboko ya mobali ezali kopesa. 4 Po ete likabu na bino ezala na kuku. Bongo tata na bino oyo atalaka na kuku akofuta bino. 5 Tango bozali kobondela, bozala lokola bakosi te,balingaka kobondela batelemi na synagoga. Pe na suka ya balabala. Po bayebana na bato. Ya solo, nazali koyebiasa bino, basi bazwi lifuta nabango. 6 Kasi bino, tango bozali kobondela, kota na ndako na bino pe kanga yango, pe bondela tata na bino oyo azali na esika na kuku, oyo amonaka nyonso ya kuku akofuta bino. 7 Tango bozali kobondela kolekisa maloba pamba pamba te ndenge bapagano basalaka, bakanisaka ndenge balobaka ebele nde Nzambe akondima mabondeli na bango. 8 Po na yango, bomekola bango te, tata na bino ayebi eloko nini bozali na posa na yango; yambo bosenga ye yango. Bobondelaka boye: 9 «Tata na biso azali na likolo, tika nkombo na yo ezwa lokumu, 10 tika bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo esalama awa na nse pe kuna na likolo. 11 Pesa biso lelo bilei ya mokolo na mokolo. 12 Limbisa mabe na biso ndenge tolimbisaka pe baoyo basalaka biso mabe. 13 Kotika biso te na komekama, kasi bikisa biso na moyini. Na yo ezali bokonzi, na nguya pe nkembo seko na seko, amen. 14 Soki bokolimbisa bato mabe na bango, tata na bino oyo azali na lokolo akolimbisa bino pe. 15 Kasi soki bokolimbisa mabe na baninga te, tata na bino pe akolimbisa bino mabe na bino te. 16 Koleka lisusu tango bozali kokila, bolakisa bizaleli ya mawa te, ndenge bato mabe basalaka, babalusaka bilongi na bango po ete bato bamona bango bazali kokila. Ya solo, nazali koloba na bino, basi bazwi lifuti na bango. 17 Kasi bino, soki bozali kokila, bopakola mafuta pe bosokola bilongi na biono na mayi. 18 Po ete bolakisa na bato te solo bozali kokila. Kaka tata na bino oyo azli na kuku, akofuta bino. 19 Bolokota bomengo na mokili te pamba te banyama ya mbabele ekobebisa yango to bamiyibi bakoyiba yango. 20 Na yango bolokota bomengo na likolo oyo ata nyama moko te akobebisa yango pe moyibi moko te akokoka koyiba yango. 21 Bongo esika bomengo ezali, motema pe motema ekozala. 22 Liso ezali mwinda ya nzoto, Soki liso ezali malamu, nzoto mobimba ezali pole penza; 23 Kasi soki liso ezali mabe, nzoto mobimba ekozala na molili. Yango wana, soki pole ezali kati na yo ezali molili, boni molili koleka ezali kati na yo? 24 Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale na mbala moko. Akoyina moko pe akolinga mosusu to akokangama na moko pe akosundola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe pe mbongo na mbala moko. 25 Yango wana nazali koyebisa bino, bomitungisa te po na bomoi na bino, po na oyo bokolia pe bokomela, pe lisusu po na bilamba ya kolata. Bongo bomoi eleki bilei na malamu pe nzoto eleki bilamba. 26 Botala bandeke na likolo, balonaka te, babukaka te, bakongolaka te nkona na bilanga, Kasi Tata na bino na likolo aleisaka bango, bongo bino boleki bandeke te? 27 Nani kati na bino, akoki kobakisa ngonga muke na bomoi na ye? 28 Po na nini bozali na mawa na tina na bilamba? Kanisa ndenge fololo na bilanga, ndenge ekobata pe ndenge ekolaka, esalaka te, etongaka. 29 Kasi, nalobi na bino boye Salomo na Nkembo na ye alataki lokola bango te. 30 Soki Nzambe azali kolatisa matiti na bilanga oyo ezali wana lelo oyo, bongo lobi ebwami na moto, Ndenge nini akozanga kolatisa bino, bato na kondima moke? 31 Bomitungisa te na koloba: «Tokolia nini to tokomela nini, to eloko nini tokolata?» 32 Biloko oyo nyonso bakolukaka yango na bapagano; Tata na bino na likolo, ayebi posa na bino. 33 Luka liboso bokonzi pe sembo na Nzambe; bongo, biloko nyonso ekopesamela bino. 34 Bomitungisa te po na lobi, pamba te mokolo na mokolo ezali na makambo na yango.