MATAYO 5

1 Na tango Yesu amoni etuluku ya bato, amati na ngomba pe afandi. Bayekoli bayei na ye. 2 Ye afungoli monoko pe abandi koteya bango: 3 «Esengo na babola na molimo, pamba te bokonzi na likolo ezali po na bango. 4 Esengo na baoyo bazali kolela, mpo ete bakobondisama. 5 Esengo na baoyo bazali na komikitisa, mpo ete bakozwa bomengo ya mokili oyo. 6 Esengo na baoyo bazali koyoka nzala mpe mposa ya bosembo, mpo ete bakotondisama. 7 Esengo na bato bayokelaka mawa, zambi bakoyokela bango mawa. 8 Esengo na baoyo bazali motema peto, zambi bakoyokela bango mawa. 9 Esengo na baoyo balukaka kimia, mpo ete bakobianga bango bana na Nzambe. 10 Esengo na baoyo bazali konyokolama na ntina na sembo na bango, zambi bokonzi na likolo ezali mpo na bango. 11 Esengo na bino, soko bato bajali kofinga bino, mpe konyokola bino, to kobuka lokuta na makambo nyonso ya mabe likolo na bino na ntina na ngai. 12 Bosepela mpe botondisama na esengo makasi mpo ete bomengo na bino ezali solo makasi kuna na likolo. Mpo ete Ezali ndenge moko bato banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino. 13 Bino bozali mungwa na mokili, soko mungwa ezangi elengi, ekobongo lisusu boni? Ekomi eloko ezangi ntina, bobele ete ebwakama libanda mpo bato bato banyata yango na makolo. 14 Bino bozali mwinda na mokili, mboka batongi likolo ya ngomba, ekoki kozipama te. 15 Bobele bongo, bapelisaka mwinda te mpo babomba yango na nse na kitunga? Bongo te, batiaka yango likolo mpo engengela bato nyonso bazali na ndako. 16 Boye tika mwinda na bino engengela bato mpo bamona misala kitoko na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na likolo. 17 Bokanisa te ete nayei mpo naboma mobeko to basakoli, nayei mpo nakoboma te, kasi mpo na kokokisa yango. 18 Na solo, nazali koloba na bino na tango nyonso likolo mpe mokili ikoumela, liloba moko te, ata ya moke makasi, ekolongwa na mobeko, kino makambo nyoso ekokisama. 19 Yango wana oyo akobuka moko na moke ya mibeko, mpe akolakisa basusu basala ndenge moko, akozala moto na moke na ntina na bokonzi na likolo. Kasi ye oyo akosalela yango, mpe akoteya basusu mpo basala bongo, akozala moto monene kati na bokonzi na likolo. 20 Nazali koyebisa bino, soko sembo na bino eleki sembo ya bakomeli mibeko to Bafalizao te, bokoki kokota na bokonzi na likolo te. 21 Boyokaki koloba na tango ya kala: «Koboma te», mpe ete: «Kasi oyo akobama moninga, akoleka na esambiseli» 22 kasi ngai nabondeli bino, moto nyonso akoyaka nkanda epai ya ndeko na ye akozwa esambiseli; ye oyo okoloba na ndeko na ye: «Moto pamba» akoki koleka liboso na ba juzi mpo asambisama. Ye oyo akoloba na ndeko na ye: «Ozali zoba» akokota na lifelo. 23 Bobele bongo soko okei kopesa mabonza mpe okanisi makambo mabe kati na ndeko na yo, 24 tika makabo na yo na etumbelo, kenda naino kobongisa na ndeko wana liboso. Na sima yaka kopesa mabonza na yo. 25 Yokana noki na ndeko na yo oyo afundi yo tango bozali na nzela mpo na kosamba, soko te akotika yo na juzi, mpe juzi akotika yo na pulusi mpe ye, akobwaka yo na ndako eyindo. 26 Solo, nalobi na yo: Okobima kuna te, soko ofuti mosolo basengi te. 27 Bosili koyoka ete: «kosala ekobo te» 28 Kasi nalobi na bino ete moto nyoso nani akotala mwasi mpe ati makanisi na posa na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye. 29 Soko liso na yo moko etindaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; zambi eleki malamu mpo na yo, eteni na nzoto ebeba koleka nzoto mobimba ekota lifelo. 30 Soko loboko na yo mobali ezali kotinda yo kosala masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo. Ezali malamu eteni na nzoto na yo ebeba koleka nzoto mobimba kokota na lifelo. 31 Elobama mpe boye: «Moto nyonso oyo aboyi mwasi na ye akomela ye mokanda ya koboma libala» 32 Kasi nalobi na bino moto akoboya mwasi bobelesoko akuti ye na mobali mosusu, akomisi ye mwasi na ekobo; mobali oyo abali mwasi baboyi, asali ekobo lokola. 33 Na bongo, bosili koyoka koloba na ba mpaka: «Bokata seleka na lokuta te kasi bosala yango liboso ya Mokonzi.» 34 Nzoka nde, bolapa ndai na likolo te mpo ezali gbende ya Nzambe. 35 Na mabele te, ezali efandelo ya makolo na Nzambe; na Yelusalema te, mpo ezali engumba ya Mokonzi monene. 36 Kokata seleka mpe te na kotanga mutu na yo, zambi yo moko okoki kokomisa suki pembe na mutu na yo te. 37 wana ezali bino koloba, boloba sembo «Iyo, iyo» to «Te, te» oyo nyonso ebakisamaka euti na satana. 38 Bosili koyoka koloba: «Liso mpo na liso, lino mpo na lino.» 39 Kasi ngai nalobi na bino kowelana na moto mabe te, moto nyonso akobeta yo mbata na mbanga ya mobali, pesa ye mosusu lokola. 40 Soko moto amemi yo na likambo mpo abotolo yo kazaka, tika azwa mpe mokoto na yo. 41 Ye oyo alingi otambola na ye metele nkoto moko, sala na ye lisusu nkoto mibale. 42 Moto oyo akosenga epai na yo, pesa ye yango, mpe koboya kodefisa te, oyo alingi kodefa epai na yo. 43 Bosila koyoka koloba ete: «Okolinga moninga na yo mpe okoyina monguna na yo.» 44 Kasi ngai nalobi na bino: «Bolinga banguna na bino mpe bokobondela mpo na banyokoli na bino." «Bopambola baoyo bazali kobwakela bino masuma. Sala bolamu epai na baoyo bazali koyina bino» 45 Na lolenge wana bokokoma bana na Tata oyo aleki likolo. Zambi atindaka moi likolo na bato malamu mpe bato mabe, likolo ya bato bazali sembo mpe mpo na bato bazali sembo te. 46 Zambi soko bozali kolinga bobele baoyo balingaka bino, litomba nini bokoki kozwa na yango? Bobele bongo, bakongoli na mpako basalaka. Bino bosalaka malamu koleka bango. 47 Mpe soko bokopesaka losako bobele na bandeko na bino, nini ya malonga bosali? bapagano mpe basalaka bongo. 48 Na bongo bozala bato malamu, lokola Tata na bino na lokolo azali malamu.