MATAYO 4

1 Na sima Molimo akumbaki Yesu na esobe mpo amekama na Zabolo. 2 Sima ya mikolo tuku minei ya kokila, ayokaki nzala. 3 Satana apusanaki pe alobi na ye: «Soki ozali mwana na Nzambe pesa mitindo na mabanga ebongwana bilei. 4 Kasi ayanolaki: «Ekomama, moto akobika kaka na bilei te, kasi na liloba ya Nzambe. 5 Bongo Zabolo akumbi ye na engumba esantu pe akitisi ye na songe ya ndako nzambe. 6 Ayebisi ye: «Soki ozali mwana na Nzambe,pumbwa tii na nse, nzambi ekomama: Akopesa mitindo na ba-anzelu na ye basenzela yo pe bakokumba yo obeta libanga te.» 7 Kasi Yesu ayanoli: «ekomami lisusu«okoki komeka Mokonzi Nzambe na yo te.» 8 Zabolo amatisi ye lisusu na songe ya ngomba likolo penza, pe alakisi ye bokonzi ya mokili na bisengo na yango. 9 Ayebisi ye: «Nakopesa yo bomengo yonso oyo soki ogumbameli ngai.» 10 Yesu alobi: «Satana, longwa! Nzambi ekomama: "Okogumbamela bobele Mokonzi Nzambe na yo pe okotosa bobele ye."» 11 Na mbisa Zabolo atiki ye, pe ba-anzelu bayaki kosunga ye. 12 Tango Yesu ayoki té bakweyi na Yoane, abendani na Galileya. 13 Atikaki Nazarete akeyi kofanda na Kapalanaume, pembeni ya mbu ya Galileya na etuka ya Zabuloni pe Nefetali. 14 Esalamaki boye po ete maloba ya mosakoli Esaya ekokisama. 15 «Mabele ya Zabuloni pe Nefetali kuna na mbu koleka Yolodani; Galileya ekolo ya bapagano. 16 Bato oyo bafandi na kati ya molili, bamoni moyi engali, pe epayi ya baye bazali na etuka pe kati molili ya somo, moyi engengeli bango. 17 Na tango wana, Yesu abandi koteya alobi: Botika masumu, nzambi bokonzi na Nzambe epusani. 18 Lokola azalaki koleka pembeni nya mbu ya Galileya, amoni bandeko babale, Petelo na Andele. Bazalaki koloba namonyama na kati ya mbu po bazalaki balobi. 19 Yesu alobi na bango: «Bolanda ngai pe nakokomisa bino balobi ya bato.» 20 Saaipi batikaki minyama pe balandi ye. 21 Wana Yesu azalaki kokoba kotambola, amoni bandeko babale, Jaki na Yoane bana ya Zebede, na kati ya bwato kobongisa minyama, abengi bango. 22 Sasaipi, batiki bwato na tata na bango pe balandi ye. 23 Yesu atambolaki na Galileya mobimba koteya na ba ndako Nzambe, kosakola sango malamu ya bokonzi na Nzambe pe kobikisa bakoni na bakakatani nyonso. 24 Lokumu na ye epanzanaki Suliyamobimba pe bato bamemelaki bakoni ya lolenge nyonso, pe Yesu abikisaki bango. 25 Etuluku ya bato elandaki ye wuta Galileya, Dekapoli,Yelusalema, Yudea pe koleka Yolodani.