Mokapo ya 8

1 Tango Yesu Akiti na ng;omba, etuluku ya bato elandi ye. 2 Moto moko azalaki na bokono ya maba aye mpe afukamely Yesu mpe alobi: « Mokonzi, soki soki olingi okoki kobikisa nga». 3 Yesu asimbi ye na loboko mpe alobi: « na lingi. bika». kaka na ngonga wana abiki na bokono ya hmaba. 4 Yesu alobi na ye: « batela sekele koloba na moto moko te ata azali nani. Kende komimonisa epai ya banganga Nzambe mpe opsa likabo ndege Mose alobaki mpona litatoli. 5 Ekoti Yesu na capernaume, kapitene moko akei kokutana naye mpe abondeli ye. 6 Alobi « Mokonzi mosali na ngai alali na ndaku azali na bokono mpe azali kotema te. Azo nnyoikwama mingi». 7 Yesu ayebisi ye «na kokende na ndaku nayo mpe nakobikisa ye». 8 Kasi kapitene ayanoli: « okonzi, ngai nazali nani mpo okota na ndako na ngai, kasi loba kaka liloba moko mosali na ngai akobika». 9 Pamba te ngai na tosaka bakonzi na ngai mpe nazali na ba soda, ba tosaka ngai soki na pesi mitindo na moko kende mpe akeyi, na mosusu yaka mpe aye, soki nalobi sala mosala oyo mpe asali yango. 10 Tango ayoki ye, Yesu akmwe mpe alobi na ba oyo bazalaki kolanda ye: « nalobi na bino bo solo, na mona nanu moto ya kondima ya boye te ata na Isalaele. 11 Nalobi na bino, ebele ba wutaka na esika moyi ebimelaka mpe na esika elalelaka, ba kovanda na mesa na Abraham, Isaac mpe Yacobo na bokonzi ya likolo. 12 Kasi ba oyo ba sengelaki kozala na bokonzi ya likolo, ba kobwakana libanda na kati ya molili; kuna ekozala milelo mpe kolia mino». 13 Yesu alobi na kapitene: « kende lokola ondimi esalemela yo bongo». Mosali abikaki kaka na ngonga wana. 14 Tango Yesu akomi na ndaku ya Petelo, akuti mama ya mwasi ya Petelo alali azali kobela. 15 Yesu asimbi ye na loboko mpe maladi esili. Atelemi mpe abandi kopesa bango bileyi. 16 Tango ekomi pokwa, bato bayeli Yesu ebele ya bamaladi oyo bazalaki kotungisama na milimo mabe mpe na liloba moko, abengani milimo, mpe abikisi bato ya maladi nyonso. 17 Na boye akokisaki makambo mosakoli Isaya alobaka: « Ye amemaka mikumba ya bato mpe alongolaka maladi na biso». 18 Tango Yesu amoni etuluku ya bato bazingeli ye, apesi mitindo bakatisa na ngambo ya mayi na etuka ya Galile. 19 Kaka na tango wana mokomo ya mibeko moko ayei epai na Yesu mpe alobi: « moteyi, na kolanda yo esika nyonso okokende». 20 Yesu ayanoli ye: « ba nyama ya zamba ezali na mabulu na yango, kasi mwana ya moto azali na esika ya kolala te» 21 Moko na kati ya bayekoli alobi na ye: « Mokonzi, mpesa ngai nzela na kende kokunda papa na ngai». 22 Kasi Yesu ayanoli ye: « landa ngai mpe tika ba kufi ba kunda bango na bango». 23 Tango Yesu amati na bwatu, bayekoli balandi ye. 24 Na mbala moko, mbonge ya makasi etelemi na ebale, mayi ebandi kokota na bwatu mpene edinda wana Yesu azalaki ya kolala. 25 Bayekoli balamuisi Yesu mpe balobi naye: « Mokonzi tolingi tokufa, bikisa biso». 26 Yesu alobi na bango: « mpona nini bozali kobanga, bato bazangi kondima?» atelemi mpe apesi mitindo na mbonge mpe na mayi na mbala moko kimia ekoti. 27 Bato bakamwe mingi mpe balobi: « moto ya motindo nini oyo na bonge ya mayi ezali kotosaye?» 28 Tango Yesu akomi na Ngambo ya laki na mabele ya Gadara. Bato mibale bazalaki na milimo na mabe bakutani na Ye. Bawuti na kunda. bazalaki kotambola mingi. Ata baleki nzela bazalaki kobanga koleka na nzela wana. 29 Bazalaki ko nganga mpe koloba : « likambo nini yo na biso, mwana ya Nzambe? Oyaki mpona konyokola biso tango nayo ekoki nanu te» 30 Ezalaki na mwa mosika ya esika wana, Ebele ya bangulu bazalaki kolia. 31 Milimo mabe ezalaki kaka kobondela Yesu mpe kloloba: « soki olingi obengana biso, tinda biso to kota na bangulu». 32 Yesu alobi na bango: «bokende » milimo ebimi mpe ekeyi kokota na bangulu; na mbala mùoko bangulu balongue na likolo ya ngomba ba keyi kokweya na mayi mpe bakufi. 33 bakengeli ya bangulu bakimi, mpe bakeyi na etuka koyebisa bato, makambo nyonso elekaki, mingi balobaki makambu ya bato mibale oyo bazalaki na milimo mabe. 34 Bongo bato ya etuka wana baye kokutana na Yesu. Tango bamoni ye ba bondeli ye alongwa na mabele na bango