MATAYO 27

1 Tango tongo etani, bakonzi ya baganga nzambe banso na ba nkumu ya mboka basali likita po na koboma Yesu. 2 Sima ya kotia ye singa, ba mokumbi o boso bua Poso Pilato, mokonzi ya engumba. 3 Tango Ydasi moteki na Yesu amoni ete bakateli yesu etumbu ya kufa, ayoki pasi o motema, azongisi misolo tuku misato epayi ya bakonzi ya banganga nzambe mpe ba nkumu. 4 Alobi: «Nsumuki zambi na sopi makila ya moto oyo asali mbeba te.» Bayebisi ye: « Ya biso nini? Etali yo.» 5 Yudasi abuaki misolo tuku misato na kati ya ndako mosanto pe amityaki singa o kingo. 6 Bakonzi ya bangnga nzambe balokoti misolo pe balobi: «Epekisami kotya misolo ya makila o kati ya sanduku ya makabo.» 7 Bayangani mpe basombi na misolo wana elanga ya mosali mbeki mpo na kokunda bapaya. 8 Kino lelo, elanga ena ebiangami «elanga ya makila» 9 Boye nde ekokisami oyo elobaki mosakoli Yelemia: «Bakamati misolo tuku misato nde ntalo oyo bana Isalayele bandimi.» 10 Epesamaki engebene motuya na elanga ya mosali mbeki ndenge mokonzi apesaki mitindo. 11 Sik'oyo bamemi Yesu o boso bua moyangeli pe atuni ye: «Yo nde Mokonzi ya bayuda? Yesu ayanoli: «Olobi» 12 Kasi tango banganga nzambe pe bankumu bafundaki ye,ayanoli te. 13 Bongo Pilato atuni ye: «Oyoki te ndenge bazali kofunda yo?» 14 Kasi ayanoli ata moke te. pe moyangeli akamwaki penza. 15 Lkola momeseno, moyangeli azalaki kobimisa mokangami moko na eyanga ya Pasika oyo baponi. 16 Natango wana, ezalaki na mokangami moko ayebanaki, nkombo na ye Balabasi 17 Tango basanganaki Pilato atuni: «Bolingi natika nani? Balaba to Yesu babengi Klisto?» 18 Ayebaki ete bakabi Yesu po na zuwa. 19 Efandaki ya ngbende ya bazuzi, mwasi na ye atindeli ye liloba: «Kosala moto wana mabe te, po natungisami mingi na butu ya lelo na ntina na ye.» 20 Nganga nzambe mokonzi na bankumu bandimisi bato mpo basenga Balaba mpe baboma Yesu. 21 Moyangeli atuni bango: «Na bango mibale, bopni nani? Bazongisi Balaba» 22 Pilato atuni bango, nasala boni na Yesu oyo babengi Klisto? Bayanoli: «Baka ye o ekulusu.» 23 Alobi: «Mbeba nini asali?» Kasi bagangaki lisusu makasi: «Baka ye o ekulusu.» 24 Lokola Pilato alongi bango te, mpo babandaki kotomboka, azwi mayi, asukoli maboko liboso na bato, alobi: «Makila na ye na mutu na ngai te, bosala ndenge bolingi.» 25 Bato banso balobi: «Makila ma ye ekwela biso mpe bana na biso» 26 Mpe atikaki Balaba, kasi abetisaki Yesu fimbo mpe apesi ye abakama na ekulusu. 27 Basoda ya moyangeli bakei na Yesu na esika ya kosamba, pe basangisaki kopani ya basoda. 28 Balongoli ye bilamba mpe balatisi ye zambala ya motane ngwa. 29 Batongi ekoti ya nzube mpe balatisi ye, bapesi ye lingenda na loboko ya mobali, kofukama mpe koseka ye. Bazali koloba: «Losako Mokonzi ya bayuda.» 30 Babwakeli ye nsoi, babeti ye fimbo na mutu. 31 Sima ya koseka ye, balongoli ye kazaka, bazongisi bilamba na ye mpe bamemi ye mpo abakama na ekulusu. 32 Tango babimi, bakutani na Simoni ya Silene, bakumbisi ye ekulusu na makasi. 33 Ekomi bango na Gologata, elingi koloba: « mokuwa ya moto» 34 Bapesi ye masanga basangisa na mayi ya bololo, tango ameki, aboyi komela. 35 Sima ya kobaka ye na ekulusu, bakaboli bilamba na ye mpe babeti yango mbese. 36 Mpe bafandi kosenzela ye. 37 Bakomaki ntina ya etumbu na likolo ya mutu boye: «Ezali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.»