Mokapo ya 23

1 Yesu asilisi maloba naye nyonso, alobi na bayekoli naye: 2 « boyebi pasaka ekozala na sima ya mikolo mibale mpe mwana na moto akokabama mpo nakobakisama na ekulusu». 3 Bakonzi ya nganga Nzambe mpe ba nkumu ya bonka bayanganaki epai na nganga mokonzi Kaife. 4 Basali likita mpona kokanga Yesu na nkuku mpe koboma ye. 5 Balobaki ete ezali na kati na milulu te mpona bato batomboka te. 6 Yesu azalaki na Betania epai na simona moto na bokono bwa maba. 7 Ezalaki bango na mesa kolia, Muasi moko aye epai naye na molangi na malasi na motuya na solo kitoko. Asopi yango na likolo na moto naye. 8 Bayekoli basilikli mpe balobi, mpona nini libebi ya boye? 9 Malamu malasi oyo esengeli etekama na motuya makasi, mosolo bapesa na babola. 10 Kasi Yesu lokola ayebaki bango alobi na bango, mpona nini bozali komitungisa mpona ntina na mwasi oyo? asali malamu mpo na ngai. 11 Babola bakozala nabino tango nyonso, kasi bokozala na ngai libela te. 12 Tango asopi malasi na nzoto na ngai, asali yango mpona bokundami na ngi. 13 Yasolo na yebisi bino, bipayi binso sango malamu oyo ekosakolama na mokili kombo ya mwasi oyo ekonzanga kosakolama te mpo na kokamisa ye. 14 Moko na bayekoli na kombo Yuda Isakaliota, akendeka na bakonzi ya banganga Nzambe. 15 Mpe alobi, bopesa nga nini mpo na kaba ye na bino? Bapesakiye Ntuku misato na palata. 16 Wuta mokolo wana alukaki lolenge yakokaba ye.