Matayo 25

1 Bongo bokonzi ya likolo ekokani na basi moseka zomi oyo bakamati mwinda na bango,bakendaki kokutana na mobali ya libala. 2 Mitano na bango bwanya mitano mosusu bwanya te. 3 Tango basi oyo bazangi bwanya bazui ba mwinda na bango, bazuaki mafuta te. 4 Kasi basi ya bwanya bazui mafuta mpe mwinda na bango. 5 Wana molongani nabango awumelaki,balembaki mpe balalaki. 6 Kasi na katikati ya butu,bayoki mongongo: Tala molongani azoya,bokende koyamba ye. 7 Basi nionso balamuki mpe bakomi kobongisa ba mwinda na bango. 8 Basi oyo bazangaki bwanya balobi naba oyo ya bwanya;bopesa biso ndambu ya mafuta mpo ete ba mwinda na biso elingi kokofa. 9 Kasi basi ya bwanya ba yanoli; ezali moke mpona bino pe biso,bokende kosomba epayi ya bateki 10 Tango bakeyi kosomba molongani akomi, basi ya bwanya oyo bamilengelaki bakendaki naye na libala mpe ekuke ya ndako ya libala ekangamaki. 11 Sima ba oyo bakendaki kosomba mafuta bayaki mpe balobi;molakisi,molakisi fongolela biso ekuke. 12 Solo solo nazali koyebisa bino nayebi bino te. 13 Bomi lengela mpo ete boyebi mokolo te mpe ngonga te. 14 Mpo ete ekozala lokola moto oyo alingi kosala mobembo na mokili mosusu,abengi basali naye mpe akamboli bango bozwi naye. 15 Na moko apesi mpata mitano,mosusu mpata mibale mpe mosusu mpata moko moto na moto azwi mbongo na motuya ekoki na nguya naye yako salela mpe moto yango akeyi na mobembo nayo. 16 Noki-noki oyo azwa mpata mitano atieyango na misala naye mpe eboti mpata mosusu 17 Lolenge moko na oyo azwaki mpata mibale atiyango na misala eboti mibale mosusu. 18 Kasi mosali oyo azwaki mpata moko akeyi kokunda yango bongo ya molakisi naye. 19 Tango eleki mwamoke,molakisi yabasa azongaki mpe atunaki bango. 20 Mosali oyo azwaki mpata mitano abakisi mitano mosusu,mpe alobi molakisi opesaki ngai mpata mitano tala nabakisi mitano mosusu. 21 Mpe molakisi alobi ezali malamu,obongisami namosala,ozalaki nalimemia na makambu ya moke mpe nakopesa yo ya mingi koleka,kota na esengo ya molakisi nayo 22 Ye oyo azwaki mpata mibale aye,tala nabakisi mpata mibale mosusu. 23 molakisi alobi malamu,mosali ya sembo,ozalaki sembo na makambo ya moke nakopesa yo makambo ya munene,kota kati na esengo ya molakisi nayo. 24 Na suka,mosali oyo azwi mpata moko,akeyi mpe alobi ;molakisi naye ete ozalaka moto ya motema makasi,obukaka na esika oloni te,mpe okotaka na esika osalaki te. 25 Na bangaki makasi,nde nakendaki kobomba mpata nayo nakundaki yango nasé ya mabele,tata,yango oyo nazongiseli yo. 26 Kasi kolo naye ayanoli: Na nkanza mpe botawu,oyebaki ete nabukaka esika oyo naloni te. 27 Esengaki atiya mbongo na ngai na banke ,nakozonga na ngai mbele nazwi na matabisi. 28 Bobotola ye mpalata mpe bopesa na oyo azana yango zomi. 29 Mpo ete na oyo azali na yango ,bakobakisela ye yango,kasi oyo azangi bakolongola ata ndambu oyo azali nayango. 30 Bwaka mosali oyo azangi tina na molili libanda,esika ya milelo mpe kosuwa mino. 31 Tango mwana na moto akoya na kembo naye mpe elongo na ba angelou,akovanda ngwende na ye nakembo. 32 Ba bikolo nionso ekosangana liboso naye mpe ye akokabola bato,lolenge mobateli mpate akabolaka ba mpate na ba ntaba. 33 Akotiya ba mpate naloboko naye ya mobali,mpe ba ntaba na oyo ya mwasi. 34 Na boye mokonzi akoloba naba oyo bazali na loboko ya mobali:boya bino oyo bopambolamaki epayi ya tata na ngai,bozwi bokonzi oyo ebongisama mpona bino wita ebandeli ya mokili. 35 Mpo nayokaki nzala bolesaki ngai , bopesaki ngai mayi natango ya posa ,nazalaki mopaya boyambaki ngai . 36 Nazalaki bolumba bolatisaki ngai,nabelaki bosalisaki ngai mpe nazalaki na boloko boyaki kotala ngai. 37 Na bongo bato na sembo bakoyanola mokonzi;nkumu,tango nini tomonaki yo nanzala ?Tango nini topesaki yo yako lia? Tango nini topesaki yo yakomela? 38 Tango nini toyambaki yo lokola mopaya? Tango nini tolatisaki yo bilamba ? 39 Tango nini tomonaki yo kobela? Tango nini totalaki yo na boloko? 40 Mpe mokonzi akoyanola solo-solo nazalikoyebisa bino,nionso oyo bosalaki mpona bandeko na ngai ezali nde na ngai bosalaki 41 Mpe akoloba naba oyo ya loboko ya mwasi:Bolongwa mosika na ngai,bolakelami mabe, bokende na motô yalibela oyo ebongisama mpona zabolo naba angelou naye. 42 Mpo nayokaki nzala bopesaki ngai yako lia te,mpe nayokaki mposa bopesaki ngai yako mela te; 43 nazalaki mopaya boyambaki ngai te; nazalaki bolumbu bolatisaki ngai bilamba te;nazalaki kobele mpe na boloko bino boyaki kobongisa ngai te. 44 Bakozongisela ye nakoloba ete;nkumu; tango nini tomonaki yo na nzala,na mposa ya mayi,mopaya,bolumbu,kobela ,na boloko mpe to salelaki yo te? 45 Mpe akoyebisa bango na solo nazali koyebisa bino,oyo bino bosalaki te naba ndeko na ngai ezali na ngai nde bosalaki te. 46 Mpe bango bakokende na moto ya libela mpe bato na sembo na bomoyi ya seke.