Matayo 24

1 Yesu abimi na tempelo mpe akeyi,ba likili naye bapusanaki pene naye mpona koyebisa misala yakotonga tempelo. 2 Ye ayanoli bango: Bozo mona makambo te? Ya solo nazo loba nabino : Libanga moko te ezala likolo na libanga mosusu oyo ezanga kobaluka. 3 Evandaki ye nangomba olivia ,ba likili ba yaki pene naye na kuku kotuna ye,lobela biso, tango nini makambo oyo ekoya,bilembo nini ya bozongi nayo mpe bilembo na suka na mokili? 4 Yesu ayanoli bango boye : Bosala keba ,moto akosa bino te . 5 Yeba ete ebele ya bato bakoya nakombo na ngai ; nakoloba ngai nazali klisto mpe bato ebele bako pengwa. 6 Bokoyoka bakolobela bitumba,pe bitumba ya sika bipayi na bipayi,bomitungisa te,boyeba ete biloko wana ekoya ,kasi,ezali suka ya mokili te. 7 Yeba ekolo ekotelemela ekolo mosusu ,mpe bokonzi ekotelemela bokonzi mosusu,nzala ekoya mpe mabele ekoningana na bisika ebele. 8 Nionso wana ekozala ebandeli ya pasi yakobota. 9 Bakokaba bino na minioko ya ndenge na ndenge,pe bako boma bino ,mokili ekoyina bino na tina ya kombo na ngai . 10 Ebele bakobetana mabaku,bakoyinana bango na bango. 11 Ebele yaba sakoli ya mabe bakotelema mpe bako pengwisa ebele na bato. 12 Pamba te mabe ekomata ngomba makasi,bolingo na bato ebele ekosila. 13 Oyo akoyika mpiko kino suka akobikisama. 14 Mpe sango malamu ya bokonzi na nzambe ekosakolama mokili mobimba mpe matatoli ekozala ,yambo suka eya. 15 Yongo wana ,tango bokomona bosoto,makambo mabe oyo mosakoli daniela alobaka tango atelemaka na liboso na esika nabule( tika moto nionso akotanga yango asosola. 16 Tika ba oyo bazali na yudeya bakima naba ngomba. 17 Tika oyo nazali likolo na ndaku akita te na ndaku naye,mpona kozwa eloko oyo ye alingi. 18 Tika oyo azali na bilanga azonga te na ndako naye mpona kozwa kazaka naye. 19 Mawa na basi na zemi mpe ba oyo bakomelisa bana mokolo wana! 20 Bobondela makasi mpo ete kokima na bino ezala na tango ya malili makasi to mokolo na sabata te. 21 Mpamba te minioko ekozala makasi koleka,nanu esalama te wita mokili ebanda,kino tango oyo,mpe ekotikala kozala te. 22 Soko mikolo ezali mikusé te,moko te alingaki abika,kasi na tina yaba ponami mukolo ekomi mukusé. 23 Soki moto ayebisi bino;botala,klisto azali awa ,to klisto azali kuna, bondimela ye te. 24 Mpamba te ba klisto ya lokuta naba sakoli ya lokuta batondi,bakoya mpe bakosala bilembo mpe bikamwa,mpona kopengusa ba ponami. 25 Botala,nayebisi bino yango liboso. 26 Soki bakoyebisa bino;botala,klisto azali na mabele ezanga matiti,kokende te,to azali na ndako na fulani,kondima te. 27 Ndenge moyi ebimaka na ebimelo na tango engalaka tiii na esika ekotaka,ndenge ekozala koya ya mwana na moto. 28 Esika ekozala bibembe yaba niama ,esika nde ekozala bandeke oyo eliaka musuni. 29 Bongo sima ya tango ya minioko,moyi ekokoma molili,sanza ekozanga kongala,minzoto ekokweya likolo,nguya nionso ya likolo ekoningana. 30 Na bongo elembo ya mwana na moto ekomonana nalikolo,mpe bikolo nionso ya mabele bako yima-yima. Bakomona mwana na moto koya na lipata na nkembo na likolo na nguya mpe nkembo. 31 Na mingongo ya kelelo,akotinda ba angelou naye mpona kosangisa baponami na mokili mobimba. 32 Tala bozwa ndakisa ya nzete ekawuka,soki omoni bitape ya nzete ebimisi matiti,bokoyeba ete ngonga na mbula ebelemi. 33 Lolenge moko,tango bokomona makombo nionso wana,bokoyeba ete akomi pene,na ekuke. 34 Solo nazali koyebisa bino,ekeke oyo ekoleka te yambo makambo oyo ekoma. 35 Likolo mpe mabele ekoleka,kasi maloba na ngai ekoleka te. 36 Kasi mpona mikolo oyo mpe ngonga oyo,moko te ayebi,atako ba angelou nalikolo,ata mwana na moto pe ayebi te kaka tata ye moko. 37 Ekozala ndenge na tango na nowa,bongo nde mwana na moto akoyela. 38 Lokola na mikolo wana yambo mbula ebeta bato bazalaki kolia pe komela,bazaki kobala mpe kobalisa kino nowa akotaki na masuwa. 39 Bandimaki te ke ekosalama kino tango mbula ebetaki mpe ememaki bango, lolenge wana nde ekozala koya ya mwana na moto. 40 Bato mibale bakozala na elanga;moko akonetolama mpe moko bako akobwakisama. 41 Basi mibale bakozala na mosala yakotuta bileyi na liboka moko akokende mosusu akobwakisama. 42 Bomilengela mpo ete boyebi te mokoli nkumu na bino akoya. 43 Boyeba ete soki mokolo ndako ayebaka ngonga nini moyibi akoya,okomilengela akolinga te bakuluna bakotela ye. 44 Yango wana,esengeli kokengela tango nionso. 45 Nani wana mosali ya malamu mpe ya bwanya,oyo molakisi naye atie ye na ndaku naye,mpona kopesa ye yakolia natango esengeli? 46 Apambolama mosali tango molakisi akokuta ye kosala bongo tango akoya. 47 Ya solo nazali koyebisa bino molakisi akotombola ye likolo ya makambo naye nionso. 48 Kasi soki mosali yamabe amilobeli naye moko: Molakisi na ngai akoya sikoyo te, 49 mpe akomi kobundisa basali mosusu, kolia mpe komela namilangwa, 50 molakisi ya mosali wana akoya mokolo moko oyo mosali akoyeba te, mpe natango oyo akokaki kokanisa te. 51 Molakisi naye akokata ye ndambu ndambu pe akokokisa ye na bato yabilongi mibale,akotia ye esika ya milelo mpe yako suwa mino.