Mokapo ya 23

1 Bongo Yesu alobi na etuluku ya bato mpe na bayekoli na ye. 2 Alobi: « Balakisi mibeko na ba falisayi mosala na bango kolakisa bato mibeko ya Mose. 3 Bongo botosaka bango mpe bosalaka makambo nyonso bakobanda koloba na bino, kasi bazali koloba makambo, kasi bazali kosalela yango te. 4 Solo , bazali komemisa bato mikumba ya kilo na mapeka, kasi bango moko bazali kokoka komemma yango te. 5 Bazali kosala makambo nyonso babima malamu na miso na bato. Batongaka ba songe ya minene na ba nzambala na bango oyo ba lataka na tango ya losambo, bango bakomisala yango milaiyi 6 Bango balingaka kovanda na bisika ya liboso na kati ya feti mpe bango bavandaka na bakiti ya liboso na eyanganelo. 7 Mpe balingaka bapesa bango losako na miso ya bato nyonso, mpe babengaka bango "Moteyi" na bato. 8 Kasi bino babenga bino te « moteyi» bino bozali na moteyi moko, mpe bino nyonso bozali ba ndeko. 9 Mpe Bobengaka moto te awa na mokili«Tata»; Nzambi tozali na tata moko, azali na likolo. 10 Mpe ba benga bino te "bateyi" bazali na moteyi, moko ye nde Yesu Kristo. 11 Kasi oyo aleki bino esengeli azala mosali na bino. 12 Moto nyonso akomitombola akokitisama, mpe oyo akomikitisa, akotombwama. 13 Mawa na bino balakisi mibeko mpe ba falizayi, bato ya mayele mabe, bokangeli bato nzela ya bokonzi ya likolo. Mpe bino moko bo kokotate, bazali kosala nyonso mpona ba oyo balingi kokota bakota te. 14 Mawa na bino balakisi ya mibeko mpe ba Falisayi bato ya lokuta bozali koyiba biliko ya basi bakufely mibali, mpe kaka na tango wana bo kosanaka kosambela mingi, yango wana bokozua etumbu ya makasi. 15 Mawa na bino ba lakisi mibeko, ba Falisayi bato ya lokuta bo tambola la na mokili mobimba mpo na kozua mopaya oyo akondima kosambela Nzambe na biso bayuda mpe tango bokozua ye, bomisi ye moto na lifelo lokola bino bozali. 16 Mawa na bino ba tambwisi ya bato bakufa miso, bino moko bomonaka te, mpe bo lobaka boye: « soki moto akati seleka na kombo ya Ndako na nzambe ezali na likambo te kasi sokimoto akati seleka na kombo ya ndako na Nzambe ezali na likambo te, kasi soki moto akati seleka na wolo, ebombama na kati ya ndaku ya Nzambe ya Nzambe akotosa seleka wana». 17 Bino ba bolole, bakufa miso, na ba wowlo na ndaku ya Nzambe nini eleki? 18 Boloba lisusu moto ako kata seleka na etumbeli asala eloko te. Kasi moto oyo akokata seleka ya makabo ezali na etumbelo esngeli atosa seleka na ye. 19 Bino bato bakufa miso, eloko nini eleki, makabo to etumbeli oyo ebnulisaka makabo? 20 Boye, moto akokata seleka na etumbelo akati likolo ya biloko nyonso ezali wana. 21 Mpe oyo akati seleka na ndako ya nzambe akati na ndako ya nzambe na oyo avandaka kuna ndaku ya Nzambe. 22 Mpe oyo akati seleka na kombo ya likolo akati liboso ya ngwende ya Nzambe oyo avandaka na yango. 23 24 Mawa na bino balakisi ya mibeko na ba falisaye, bato ya mayele mabe, bopesaka Nzambze eteni ya moko na kati ye biteni zomi ya makasa ya solo kitoko. bo bosani oyo eleki na mibeko, kosala bato bolamu. Bino ba tambwuisi ya bato bakufa miso, bolongolaka nzinzi na kati ya mayi ya komela. Kasi bazali komela nyama monene ba bengi chamo. 25 Mawa na bino ba lakisi ya mibeko na ba Falisayi, bato ya mayele mabe, bosokolaka libanda ya kopo mpe ya sani, kasi kati na bino, bo tonda na moyibi na ba posa ya mabe. 26 Mofalisayi mokufi miso, sokola nanu kati na kopo mpe ya sani ekoma mpeto. 27 Mawa na bino balakisi mibeko mpe ba Falisayi. Bato ya mayele mabe, bokokani na Nkunda bapakoli langi ya pembe na libanda emonani kitoko, kasi na kati na yango etondi mikuwa ya ba kufi mpe makambo nyonso ya bosoto. 28 Lolenge moko na bino, bozali komonana lokola bato ya malonga na miso ya bato, kasi na kati botondi na mahyele mabe mpe masumu. 29 Mawa na bino balakisi mibeko na baFalisayi, bato na mayele mabe, bozali kotonga ba nkunda ya basakoli mpe bo bongisaka ba malita ya bato ya bosembo. 30 Bolobaka : « Soki tozalaka na tango ya batata na biso mbele to lingakakosanaga na bango te mpo na koboma basakoli». 31 Na boye bozali na ko tatola bino moko, bozali bana ya ba oyo ba boma basakoli. 32 Bongo bino bozali kosukisa mosala oyo ba tata na bino basalaka. 33 Libota ya nyonka bokokima etumbu ya lifelo ndenge nini? 34 Yango wana, tala na tindeli bino ba sakoli, bato ya bwania mpe ba lakisi mibeko. Bo koboma bango mpe bo baka mosusu. Mpe bokobeta ba mosusu na biyan,genelo, mpe bo ko landa bango na ba mboka nyonso. 35 Lifuti na bino ezali makila ya bato na bosembo oyo bobomaka na mokili, kobanda makila ya Abelmoyengebene, tii na makila ya zakalia, Baracie, oyo bo bomaka na kati na ndaku ya bosantu na mesa ya mabonza. 36 Ya solo, na lobi, bokozua etumbu na makambu wana. 37 Yelusaleme, yo oboyi ba oyo ngai na tindelaki yo mpe obambi bango mabanga. Mbala boni na lingaki kosangisa yo lokola soso asangisaka bana naye na nse ya mapapu, bolingaki te. 38 Botala ndako na bino ekawuki. 39 Bongo nalobi na bino bokomona lisusu te tii na tango bokoloba: « Apambolama oyo azali koya na kombo ya Mokonzi».