Matayo 20 22

1 Yesu alobelaki bango lisusu na masese: 2 Bokonzi na likolo ekokami na nkumu moko oyo azalaki kobongisa milulu ya libala mpona mwana naye ya mobali. 3 Atindaki basali naye mpona kobenga bayi bazwaki nkasa yako biangama kasi baboyaki koya. 4 mokonzi atindi lisusu basali mosusu nakoloba nabango;loba na bayi bazwaki biangama: Tala,nabomi ba niama mpe biloko nionso ebongisami . Boya na milulu na libala. 5 Bato basundoli miango,bakeyi na makambo na bango mosusu na elanga,mosusu mombongo naye. 6 Basusu bakangi basali wa mokonzi,kofinga bango mpe koboma bango. 7 Mokonzi atondisami na kanda;mpe atindi mapinga naye koboma ba bomi wana mpe kotiya bango na motô na mboka na bango 8 Sima alobi na basali naye: Milulu ezali pene,kasi ba biangami babongisamaki te. 9 Na bongo bokende kobengo bato nionso bokokuta na nzela baya na milulu ya libala. 10 Basali bakeyi na nzela kobenga bato nionso,ya mitema malamu mpe ya mitema mabe ,ndaku ya milulu etondaki na bato. 11 Tango nkumu akotaki mpona kotala ba biangami,amoni moto moko oyo alataki bilamba ya milulu te. 12 Nkumu atuni ye: moninga,lolenge nini okoti awa ozangi bilamba ya milulu? moto wana azangi liloba. 13 Bongo, nkumu alobi naba sali naye: Bokanga ye maboko na makolo bobwaka ye libanda namolili,esika na milelo mpe koswa mino. 14 Mpo ete ebele babengami kasi ba ponami bazali moke 15 Na sima, bafarizi bakeyi kobongisa lolenge nini bako tiela yesu motambo na maloba naye. 16 Batindeli ye basali nabango,elongo nabato na erode,balobi na yesu: Nkumu,toyebi ete olobaka solo mpe oteyaka nzela na nzambe na bosolo,okotelaka moto te mpe okabolaka bato te. 17 Loba na biso,ozali kokanisa nini? ezali malamu kofuta mpako epayi ya sezalo to te? 18 Kasi yesu ayebaki nkanza na bango ayanoli bango: Bato ya bilongi mibale !pona nini bozali komeka ngai? 19 Bolakisa ngai likuta moko ya mpako,bapesi ye moko 20 Yesu alobi na bango: elongi ya nini ezali awa pe kombo ya nani? 21 Bazongisi ya sezalo ,bopesa na cezalo oyo ezali ya cezalo mpe na nzambe oyo ezali ya nzambe. 22 Tango bayoki bango,bakamwe,mpe batiki bakeyi 23 24 Wokolo wana,ndambo naba saducena oyo baboyaka lisengwa,bayaki epayi naye,basengi ye: molakisi,mose alobaki:soki mobali akufi aboti te ,ndeko naye ya mobali esengi abala mwasi naye