Matayo 20

1 Tala bokonzi nalikolo ezali lokola mosala ebimeli na mabele,ebimi na ntongo mpona kozwa ba sali na elanga na vino. 2 Tango bayokani nabasali mpona lifuti ya mokolo moko,atindi bango na elanga ya vino. 3 Abimi na ngonga ya misato mpe amoni basusu bazalaki wana,kasi basali eloko te. 4 Ayebisi bango ,bino mpe bokende na elanga na vino,oyo esepelisi bino nakopesa bino yango,bongo bakendaki kosala. 5 Abimi lisusu na ngonga ya motoba pe na ngonga ya libwa asali ndenge moko. 6 Mbala mosusu ,na ngonga ya zomi na moko abimi kotala,akuti ba mususu bazosala eloko te,alobeli bango;mpona nini bozo sala te kati na mokolo mobimba ? 7 Bayanoli ye boye;mpamba te moto moko te azwi biso na mosala.Alobeli bango ,bino mpe lokola ,bokende na vino. 8 Pokwa eye,mokolo na elanga aye,alobi na kapita na elanga;benga basali nionso mpe pesa bango lifuti na bango,kobanda mokolo na suka kino mokolo ya liboso. 9 Tango basali oyo bazwamaki na mosala na ngonga na zomi na moko ba ye,moko na moko azwaki lifuti naye. 10 Tango basali ya yambo baye,bakanisaki kozwa ebele koleka ba mususu,nkasi bazwaki ndenge moko 11 Sima yakozwa lifuti na bango,babangi koyima-yima na mokolo elanga. 12 Balobi naye;basali wana basali kaka ngonga moko,nkasi ofuti biso nionso ndenge moko biso batu toniokwami kobanda tongo tiii ngonga oyo nasé ya moyi makasi. 13 Mokolo na elanga ayanoli na moko na bango;naboyi,nasali yo ata mabe moke te,toyokanaki te mpona lifuti? 14 bozwa oyo ebongi na bino,bokende,na poni kopesa na basali ya suka lifuti ndenge moko na bino. 15 Nakoki kosala te oyo ngai moko nalingi nabiloko na ngai? Ebandi boni kolula mpo ngai nazali moto malamu? 16 Bongo moto yaliboso akokoma moto ya suka,mpe ya suka akokoma ya liboso,bamikanda mosusu ya kala ezo loba; babiangami bazali ebele kasi ba ponami bazali moke. 17 Ndenge yesu azalaki kokenda na yeruzalem,akamataki balikili naye zomi na mibale, na nzela ayebisi bango : 18 Botala,tozokeda na yeruzalem ,mwana na moto bakokaba ye naba nganga nzambe mpe bakomi mibeko,bakokatela ye etumbu na kufa . 19 Bakokaba ye naba pakano mpona basakana naye,kobeta ye mpe bako baka ye na kulunsi,kasi mokolo ya misatu akosekwa 20 Bongo maman ya bana ya ezbedée aye na yesu na bana ye.Akumisi ye na losako,pe asengi ye eloko moko. 21 Yesu ayanoli ye eloko nini mpenza olingi? Mwasi ayanoli ye ;ndima kotia bana na ngai,moko naloboko ya mobali mosusu na loboko ya mwasi na bokonzi nayo. 22 Kasi yesu ayanoli ye: Oyebi te oyo yo ozali kosenga ,yo okokoka komela kopo ya bololo oyo ngai nakomela ? Bayanoli yesu boye;tokokoka komela yango . 23 Ayebisi bango namoni,kopo na ngai,bokomela yango kasi pona kovanda na loboko yakimobali to na oyo ya kimwasi ,ngai te nde nakopesa yo eyano ,kasi ezali mpona ba oyo tata abongisa. 24 Tango ba likili zomi bayoki masolo wana ,bakamwaki bango makasi. 25 Kasi yesu yesu abengi bango pe olobi: Oyebi bakonzi yaba bakano baza na nguya likolo na bango,batu na bango ya motuya baza na nguya likolo na bango. 26 Kasi ekozala bongo te mpona bino,oyo akolinga kozala likolo na bino,esengeli azala mosali na bino. 27 Oyo alingi azala moto na liboso kati na bino azala moto na sima. 28 Yango wana, mwana moto ayaki te poba salela ye kasi asala mpona kopesa bomoi naye nambeka ya bato ebele. 29 Tango babimi na yerico,etuluku na bato balandaki ye. 30 Bakufi miso mibale bazalaki pembeni na nzela,tango bayoki ete yesu azali koleka,bagangaki mpe balobi;mokonzi mwana na dawidi yokela biso mawa. 31 Kansi bato bazalaki kopekisa bango,baganga te bavanda kimia,bangangaki lisusu makasi koleka; mokonzi mwana na dawidi yokela biso mawa 32 Bongo yesu atelemaki,abengi bango mpe atuni bango,bolingi nasalela bino nini? 33 Bango bayanoli ye ete ;tika miso na biso emona lisusu, 34 yesu atondi na mawa asimbi miso nabango,nambalaka miso nabango emoni mpe bakomi kolanda ye.