Mokopa ya 28

1 Sima na Sabate, na tongo ya mokolo ya liboso ya boso, Mali a ya Magadala mpe Malia mosusu, ba kendaki mpona kokota na nkunda. 2 Tala mabele eninganaki makasi, mpo muanze akitaki na likolo, aye mpe alongli libanga mpe afandi likolo na yango. 3 Lolenge na ye ezalaki kongala lokala moi mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi. 4 Bakengeli ba bangaki makasi mpe ba komaki lokola bakufi. 5 Mwanze asololi na basi mpe alobi na bango, bi tjungisa te, na yebi ete bozali koluka Yesu oyo babakakiye na ekulusu. 6 Aza lisusu awa te, asekwi lolenge alobaki. Boya mpe botala esika oyo batiaki ye. 7 Bokende noki mpe boloba na ba ayekoli naye: « Asekwui kati na bakufi mpe botala , azali kokende liboso na bino na galileya. Kuna nde bokomonaye». Boye nalobi na bino. 8 Bopye basi balonguaki noki noki na lilita ba tondaki na nsomo mpe na esengo, bakimaki mbangu epai na bayekoli. 9 Kasi tala Yesu akutanaki na bango mpe alobi: « kimia ezala na bino» BAsi basi bakei mpona kosimba makolo naye mpe ko fukamela ye. 10 Boye Yesu alobi na bango, « bozala na bobangi te. Boloba na bandeko nanga bakende na Galileya kuna nde bakomona ngai». 11 Tango bazali kokende na nzela, ndambo ya bayekoli bakoti na engumba mpe balobi na ba nganga Nzambe makambo nyonso elekaki. 12 Tango na ba nganga bakutanaki na bampaka mpe basololaki na makambo yango, bapesaki misolo mingi na ba solda . 13 Mpe bayebisaki bango baloba ete bayekoli na Yesu bayaki koyiba nzoto naye na butu tango tozalaki na pongi. 14 Soki likambu oyo oyokani na matoyi ya moyangeli ya etuka biso tokokitisa motema naye mpe bokozua etumbu moko te. 15 Boye basoda bazuaki mmbongo mpe basalaki ndenge ba teuaki bango. Makele wana epanzani kati na bayuda kino moyi mua lelo. 16 Kasi ba zomi na moko bakenadaki na galileya na ngomba oyo Yesu alakisaki bango. 17 Tango bamonaki ye, bafukamelaki ye kasi ba mosusu batiaki tembe. 18 yesu apusanaki pembeni na bango alobi na bango boye: « Bokonzi nyonso epesameli ngai na likolo mpe na nse. 19 Bokende bokomisa mabota nyonso bayekoli, ba batisa bango, na kombo na Tata mpe na muana mpe na molimo mosanto. 20 Bo lakisa bango batosa makambo nyonso na lakisaki bino. Mpe tala ngai nazali na bino kino suka ya mokili».