1 Yesu amataki na ngomba ya olive . 2 Na tongo tongo,akeyi lisusu na tempelo,mpe bato nioso baye epayi naye. Avandisi bango mpe abandi koteya bango. 3 Ba mpaka ya lingomba ba memeli ye muasi ya ndumba batié ye na kati kati ya bato. 4 Bayebisi ye ete tokangi maman oyo na mobali. 5 Na mibeko na biso esengeli to boma ye na mabanga kasi y'olobi nini ? 6 Nzoka nde ezalaki motambo mpo bakweya naye, nkasi asali lokola azoyoka bango te. 7 Lokola mituna elekaki ,atelemaki mpe ayebisi bango: Oyo nanu asumuka te abanda kobamba ye liboso. 8 Mpe azongeli kokoma na mabele. 9 tango bayoki bongo,bango nioso ba panzani,mpe atikali ye moko na muasi wana. 10 Nde atuni ye,mwasi,wabi bafundi nayo? Atamoko te abambi 11 yo?Ayanoli: te ata moko te mokonzi,yesu mpe atiki ye akende nkasi akebisi ye azongela lisusu te. 12 Yesu azongeli kolobela bango,te naza molakisi nzela,oyo akolanda ngai akobeta ata mabaku te. 13 Bafarisaya balobi naye:Litatoli ya moto moko andimamaka te . 14 Yesu ayanoli bango: Ata namilobeli mpona ngai moko,ezali solo;nzambi nayebi esika na witi pe nazali kokende kasi bino boyebi eloko moko te. 15 Bozali kosambisa na bomoto kasi ngai te . 16 Ata na sambisi nakomikasa te nzambi naza na tata na ngai oyo atinda ngai elongo. 17 Na mibeko,litatoli ya bato mibale nde bandimaka. 18 Namilobeli na tina na ngai moko,mpe tata oyo atinda ngai azolobela ngai 19 Batuni tata naye,ayanoli bango: Boyebi ngai na tata na ngai te. 20 Azalaki naino na ndako na nzambe tango alobaki bongo bakokaki kokweya naye te. 21 Alobi lisusu: Bokoluka ngai soki nakeyi kasi bokokufa na mabe na bino. Ezali mpasi pona kolanda ngai. 22 Bayuda batunani :Alingi nde komidiémbiki mpo aloba bongo. 23 Yesu ayanoli: Bino bozali bato na mokili oyo,kasi ngai nazali moto ya mokili ya nse te. 24 Soki bondimi te ngai nazali,bokokufa na masumu na bino. 25 Batuni ye,yo nana?Yusu ayanoli: Nasilaki koyebisa bino. 26 Mpona bino,mingi yakoloba mpe yakotuna ezali oyo atindaki ngai azali na bosembo,ezali monoko na ngai kasi maloba na mokonzi. 27 Azalaki kolobela bango natina ya tata kasi bazalaki kososola te. 28 Yesu ayanoli: Tango nakomata nde bokoyeba ete nazali kosala namitindo na ngai te ,oyo tata alakisi ngai nde nakosala. 29 Lokola tozali naye elongo esengeli na sala mpo asepela. 30 Tongo alobi bongo bato ebele bandimelaki ye. 31 Ayebisaki naba yuda oyo bakomaki ba klisto: Soki bo bombi mateya na ngai nde nakoyeba ete bozali ba yekoli na ngai. 32 Na bosolo,boko kangola ma. 33 Bayanoli ye: Tozali bawumbu te tozali bana ya abraham ebanda boni po oloba bongo? 34 Ayanoli bango: Ya solo penza moto oyo asali lisumu azali mowumbu ya lisumu. 35 Bowumbu ekoki kosila nkasi mwana mokolo lopango afutelaka te. 36 Soki mwana na nzambe akangoli bino na bowumbu,bozui bonsomi ya solo. 37 Nayebike bozali ba kitani ya abraham;bozoluka bo boma ngai mpo maloba na ngai ezui esika na mitema na bino te. 38 Nazali kopesa bino mitindo oyo ewiti epai ya tata kasi bino bozali kotosa oyo ya ba tata na bino. 39 Bayanoli ye: Tozali bana ya abraham,yesu ayanoli bango:Soki mpenza bozalaki bana naye,mbele bolandaki ndakisa naye. 40 Kasi mposa na bino ezali kaka ngai nakufa mpo na yebisi bino bosolo oyo ewiti epai na nzambe. 41 Bino bozali komekola misala ya tata na bino.Bayanoli ye ;biso tozali bana ya abraham te,nzambe nde tata na biso. 42 Yesu ayebisi bango; soki mpenza nzambe azali tata na bino mbele boboyi ngai te,ngai mpe mwana naye oyo atindi. 43 Ndenge nini bozali ko sosola te? Matoyi na bino mangongi. 44 Bozali bana ya zabolo yango wana bolingi kosala mokano naye ,azali mobomi wita kala mpo alobaka solo te,azali mokosi mpe tata yaba kosi. 45 Boboyi kondimela ngai mpo nalobeli bino bosolo. 46 Nani kati na bino akokiko ndimisa ngai na masumu ?Soki nalobi solo bozali kotia ntembe mpona nini ? 47 Mwana nzambe nioso ayokaka malako naye. Nkasi bozali kotosa yango te mpo ete bozali bana naye te. 48 Ba yuda bayanoli ye;tala tina tolobaki te mpo ozali mosamalia na molimo mabe. 49 Yesu ayanoli bango; nazali na molimo mabe te,kasi nazali ko memia tata ngai,bino mpe bozali komemia ngai te. 50 Nazali koluka lokumu na ngai te,nkasi mokolo lokumu nde akokabola biso. 51 Yaso mpenza,oyo akotosa malako na ngai ,akozua bomoi ya seko. 52 Ba yuda bayebisi ye;ya solo ozali na molimo mabe .Abraham na ba profete bakufa bongo olobi te soki totosi malako nayo tokokufa te . 53 Tata na biso abraham na ba profete ba kufa yo oleki bango? 54 Yesu ayanoli: Namikumisi ngai moko te tata oyo bozali koloba nzambe na bino nde azali kopesa ngai lokumu. 55 Botikala koyeba ye te, nkasi nayebi ye, soki nawangani ye,nakokoma lokuta lokola bino.Lokola toyebani nazali kokela malako naye. 56 Kutu tata na bino abraham asepelaka tango amonaka koya na ngai na ndoto. 57 Bayuda balobi naye: Okomi naino mobange te,omona abraham wapi ? 58 Ayanoli bango: Ya solo mpenza ,yambo abotama nazalaka. 59 Balokotaki mabanga mpona kobamba ye,Nkasi abatamaki mpe awumbaki bango.