Mokapo 7

1 Sima ya makambo wana ,yesu abembukaki na galilea, aboyaki kokende na yudea natina ete bayuda bazalaki koluka ye mpo ete baboma ye. 2 Na tango oyo molulu yaba yuda pe ya mongombe ebelemi. 3 Bongo bandeko baye balobi naye: Longwa esika oyo pe kende na mokili mwa yuda ,po ete bayekoli bwa yo bamona misala oy'ozali kosala. 4 Moto akoki kosala eloko na nkuku te soki ye mei alingi komonisa misala na ye polele. Soki olingi kosala misala oyo omimonisa na bato banso. 5 Atako bandeko baye ba bandaki kondimela ye te. 6 Yesu ayanoli bango: Tango na ngai ebelemi nanu te,kasi ya bino esi ebelemi. 7 Mokili ekoki te koyina bino,bobele ngai mpo nazali kotatola natina naye oyo na misala mabe. 8 Bino,bokende na milulu ; ngai te mpo ete tango na ngai ebelemi nanu te. 9 Sima yakolobela bango makambo wana, atikalaki na galilea. 10 Kasi bandeko baye bakendaki na milulu ,yepe akendaki kasi nalolenge yako batama. 11 Ba yuda balukaki ye na milulu bamitunaki soki azali wapi ? 12 Kosuana ezalaki kati na bango mpo natina naye. Basusu balobi ete azali moto malamu,basusu balobi te, azali kobungisa makanisi ya batu. 13 Kasi ata moto moko te alobaki na pwelele po ete bazalaki kobanga ba yuda. 14 Na katikati ya milulu yesu amotaki na tempelo pe abandaki kotangisa. 15 Ba yuda ba kamuaki; nako loba: lolenge nini moto oyo ayebi koteya koleka? Kasi ye atanga . 16 Yesu ayanoli bango pe alobi: Malakisi na ngai ezali ya ngai te,kasi ya moto oyo atindaki ngai. 17 Soki moto alingi kosala mokano naye, okoyeba malakisi oyo,okoyeba liteya naye soki awiti na nzambe. Soki nazali kolobela natina na ngai moko. 18 Moto oyo azali komilobela natina naye moko azali koluka lokumu naye,kasi oyo azali koluka lokumu ya moto oyo atindaki ye, moto wana azali solo pe bokabuani ezate kati naye. 19 Mosse apesaki bino mibeko te? Kasi ata moko te kati na bino abombaka mibeko. Pona nini bozali koluka bo boma ngai? etuluku ya bato eyanoli ye: 20 Ozali zabolo. Nani azoluka koboma yo ? 21 Yesu ayanoli bango pe alobi: Nasali mosala mpe ekamwisi bino. 22 Mose alakisaki bino kokata ngenga ezalaki mpona ye te nka mpona mikolo pe mokolo mwa sabata, bozali kosala yango. 23 Soki moto akatami ngenga mokolo mwa sabata mobeko mwa mose ebukani te? Mpona nini bazali na kanda na ngai mpo na bikisi moto na mokolo mwa sabata? 24 Bosambisa bato te lolenge bozali komonela bango libanda kasi bosambisa na bosembo. 25 Ndambu ya bato na yerusaleme balobaki ete:Ezali ye te oyo bazali koluka mpona koboma ? 26 Botala, y'alobaka pwelele ,mpe elobelaka ye eloko te. Bakambi bayebi ya solo ete azali masiya? 27 Toyebi te esika awiti. Nkasi Tango masiya akoya,moto moko te akoyeba esika abimeli. 28 Yesu akangi na tempelo,kotangisa pe koloba: Boyebi ngai bino nioso pe esika na witi. Naye natina na ngai moko te, nkasi oyo atindi ngai aza solo,pe bino boyebi ye te. 29 Nayebi ye mpo ete nawiti naye pe atindi ngai. 30 Bamekaki kokanga ye,nkasi moko te atiaki maboko likolo naye mpo ete ngonga naye ebelamaki nanu te. 31 Nkasi batu ebele bandimelaki ye pe balobaki: Tango masiya akoya akosala makamwisi koleka ye ? 32 Ba farisayo bayokaki koyima-yima na bato na ntina na yesu pe ba nganga nzambe bapesaki ba soda mpo bakanga ye. 33 Yesu ayanoli bango: Nazali nanu na bino na mwa tango mukié ,mpe nakokende epai naye oyo atindaki ngai. 34 Bokoluka ngai nkasi bokozua ngai te; esika nazali kokende,bokozala na makoki te yakoya kuna. 35 Ba yuda bamituni soki akokende wapi,epai bango bakoki komona ye te? Akokende epai yaba greke pona ko tangisa bango ? 36 Alingi koloba nini na elobeli oyo: Bokoluka ngai kasi bokomona ngai te; esika nazali kokende bokozala na makoki yakoya te. 37 Na sima ya milulu ,yesu atelemi mpe agangi,alobi soki moto ayoki posa ya mayi ,aya epai na ngai pe amela. 38 Oyo akondimela ngai ,lokola makomi elobi atondisama na molimo mosantu. 39 Nkasi alobelaki mpo na tina na molimo oyo ye akopesa baye bakondimela ye, molimo epesamelaki nanu bango te mpo ete yesu azuaki nanu nkembo te. 40 Ndambu ya bato na etuluku ,tango bayoki maloba wana, moto oyo aza ya solo mosantu. 41 Na galilea nde mobikisi esengi abima ? 42 Makomi elobi te ke mobikisi akobima na libota ya Dawidi, na kati ya betheleme mboka ya dawidi ? 43 Bato bakabuanaki natina naye. 44 Ndambu kati na bango balingaki ba kanga ye,ata moto moko te akangaki ye. 45 Bongo ba kangangi na ba soda bakendaki epai ya banganga nzambe mpe ba farisayo koyebisa bango ntina bamemaki ye te? 46 Bakonzi na ba soda bayanoli bango:Moto moko te alobi lokola oliboso. 47 Bafarisayo bayanoli: Bino mpe bokosamaki ? 48 Ezali moko na bakonzi naba farisaya bandimeli ye? 49 Etuluku ya bato oyo eyebi mobeko te, elakelami mabe. 50 Nicodeme moko na bafalisayo oyo akutanaka naye oliboso alobi na bango: 51 Mobeko na biso elobi bakoki kokatela te moto etumbu soki asambi nanu 52 te?Bayanoli mpe balobi naye:Ozali moto na galilea? Luka mpe okomona ete ata mosakoli moko te awita na galilea. 53 Bango bazongaki moto na moto na ndaku naye.