1 Nasima ya makambo wana,yesu akatisaki na ngambo ya galileya na mayi ya tiberiadi. 2 Etuluku ya bato ezalaki kolanda ye mpo ete bato bazalaki komona bilembo oyo azalaki kosala likolo ya ba beli. 3 Yesu akeyi esika ya ngomba pe avandi na bayekoli naye. 4 Milulu ya pasika ebelemaki,milulu ya ba yuba lokola momesano. 5 Yesu atomboli misu likolo mpe ameki motema na filipo ,wapi tokoki kosomba mapa pona kolesa batu oyo ,soki akososola yango. 6 Kasi yesu azalaki koyeba nini akokaki kosala. 7 filipo ayanoli ye; ete nkama mibale ekokoka kosomba bileyi ya moto nionso te. 8 Moyekoli moko andele ndeko ya simoni petelo alobi na yesu: 9 Elenge moko awa azali na ba kwanga mitana na mbisi mibale, yango ekokoka na etuluki ya batu oyo? 10 Yesu alobi bovandisa bango,mpe bavandi bango nionso mikama mitano,yesu akamati biteni ya kwanga mpe mbisi apesi bango baliya. 11 Tango basilisi 12 koliya . Apesi mitindo naba yekoli balokota biteni ya bileyi oyo ekweyaki nasé 13 Balokoti bitunga zomi na mibale,tango bamoni bikamwa na bileyi balobi. 14 Bolo,solo moto oyo azali mosakoli ebongaki aya na mokili. 15 Yesu amoni posa na bango mpona kotia ye mokonzi,aponaki bango yemoko na ngomba. 16 Pokwa eyingeli, bayekoli bakiti na libongo . 17 Mpona kokatisa na ngambo na kapernahum ngonga epusanaki mpenza yesu akomaki nanu te esika bango bazalaki . 18 Mbonge etombokaki. 19 Bayekoli ba pusani pene etaka tuku misatu;bamoni yesu likolo na mayi mpe babangi. 20 Mpe ye ayebisi bango ezali ngai ! bobanga te. 21 Balingaki bakata ye na buatu, nkasi zelo ekangaki buato. 22 Na mokolo elandi, etuluku ya bato oyo etikalaki na ngambo mususu,basosoli ete ezalaki wana nabuato lisusu te. 23 Etungisaki etuluku na bato 24 Tango etuluku ya bato bamoni mokonzi mpe bayekoli naye te na ngambo ya tybeyade bakatisi naba buato mpona koluka yesu. 25 Tango bamoni ye na ngambo ya ebale,batunaki ye ngonga nini okomaki awa? 26 Yesu alobeli bango,bozoluka ngai,mpona makamwisi,oyo bomonaki,nkasi bozoluka ngai mpona posa ya nzoto na bino. 27 Kata kosala mpona mposa ya nzoto,bosala mpona bileyi na bomoyi oyo mwana moto akopesa bino, oyo nzambe tata atia elembo naye. 28 Batuni yesu;tosala nini mpo totosa misala na nzambe ? 29 Yesu ayanoli bango: Bondimela oyo nzambe atinda. 30 Bayanoli yesu;bikamwa nini okosala mpo to ndimela yo? 31 Ba tata na biso baliaka kwanga na esobe ndenge ekomama: Apesaki bango kwango wita likolo. 32 Yesu ayanoli bango;solo mpenza, ezalaki mose apesaki bino kwanga na likolo,ezali tata na ngai oyo azo pesa kwanga solo na likolo. 33 Bongo kwanga na nzambe ezali oyo ezokita na likolo,oyo ezopesa bomoi na mokili. 34 Mpe balobi,mokonzi pesa biso kwanga yango. 35 Yesu ayanoli bango lisusu;nazali kwanga na bomoi ,oyo akoya epayi na ngai akoyoka lisusu nzala te,oyo akondimela ngai akoyoka lisusu posa ya moyi te. 36 Bomoni ngai nkasi bondimeli ngai te. 37 Nkasi ba oyo tata apesa ngai,bakoya epayi na ngai mpe nakobuakisa ata moko te. 38 Mpo ete nakita nalikolo te mpona posa na ngai, kasi ya moto oyo atinda ngai . 39 Tala mposa ya moto oyo atindaki ngai,na bungisa ata moko te naba oyo ye apesa ngai, nkasi na sekusa bango na mokolo na suka. 40 Yango nde mokano na tata,moto nionso amoni tata mpe andimeli ye azua bomoi na seko, mpe nako sekusa ye na mokolo na suka. 41 Ba kambi yaba yuda ba yimi-yimi mpona yesu; mpo alobaki ete azali kwango oyo ewiti na likolo,balobi naye : 42 oyo azali muana ya maliya mpe yosefu oyo biso toyebi ? Ndenge nini aloba; awita likolo ? 43 Yesu ayanoli bango: Botika koyima-yima. 44 Moko te kati na bino akoya epai na ngai soki tata abengi ye te mpe mpo na sekusaye mokolo na suka. 45 Ekomama na basakoli bakoteyama naye moko nzambe,mpe bakoya epai na ngai 46 Moko te amona tata,soki oyo awita na likolo te. 47 Na bosolo-solo ,oyo azondimela bomoi na seko. 48 Nazali kwanga na bomoi. 49 Ba tata na bino ba lia kwanga na esobe mpe ba kufa. 50 Elobeli na yesu etombokisaki ba yuda mpe ba kamwe ; 51 ndenge nini moto apesa biso nzoto naye tolia mpe makila naye to mela? 52 Yesu ayanoli bango: Ya solo-solo , 53 malamu ete bino bolia te nzoto ya mwana moto mpe bomela makila naye te,bokozala na bomoi te. 54 Moto nionso oyo ako lia nzoto mpe makila na ngai akozua bomoi na seko,pe nako sekusa ye mokolo na suka. 55 Ozo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, 56 azalikati na ngai mpe nazali kati naye. 57 Soki nazali eza mpona tata,mpe oyo ako lia ngai akobika mpo na ngai. 58 Ezali kwanga te oyo ba tata na bino ba liaka mpe bakufa. 59 Yesu azalaki koloba makambu nionso oyo na synagongi tango azalaki kotangisa na kapernawume. 60 Ba yekoli sima yakoyoka malakisi wana bayimaki-yimaki mpenza mpe ba panzani , 61 mpe yesu alobi na bango: Yango ezali kotungisa bino ? 62 Soki bomoni mwana moto amati esika awuta? 63 Ezali molimo epesaka bomoyi,maloba oyo nalobeli bino ezali molimo mpe bomoyi. 64 Nakati na bino ezali naba oyo bazali kondima te. Mpo ete yesu ayebaki mpe ba oyo bakoteka ye. 65 Nabongo nde nayebisaki bino ete moko te akoya epai na ngai soki tata apesi nzela te. 66 Namoni kati na bino ebele bandimela ngai te, bongo bapalangani na bango. 67 Yesu atuni ba yekoli na zomi na mibale,bino mpe bolingi kokende na bino ? 68 Petelo ayanoli : Mokonzi tokende epayi ya nani ? 69 Ozali namoloba na bomoi , biso tondimi mpe toyebi ete ozali mopakolami na nzambe. 70 Ezali ngai nde na ponaki bino, bina zomi na mibale,moko kati na bino azali zabolo? 71 Azalaki kolobela yudasi,mwana yamobali ya simoni iscariote,mpo ete yende akoteka yesu.