Mokapo 5

1 Sima na yango ,ezalaki na milulu naba yuda,mpe yesu amataki na yerusalemi. 2 Pembeni na lisiba Ba babengi naba ebele bethesda. 3 bato mingi yabokono ya ndenge na ndenge bavandaki wana,kozela mayi eningana. mpo ete angelou na nzambe azalaki koya pona koningisa mayi. 4 Moto oyo azalaki kokweya liboso tango angelou azalaki koningisa mayi azalaki kobika na maladi naye. 5 Ezalaki na mobeli moko abela wita tuku misatu na mwambe. 6 Tango yesu amoni ye ayebaki ete azalaki wana wuta kala,pe alobi naye olingi obika? 7 Mobeli ayanoli ye;molakisi naza ata na moto te ayo akoki kobwaka ngai na mayi,mpe tango nionso nalingaka nakweya na mayi ,bakweyaka kaka liboso na ngai. 8 yesu alobi naye:Telema zua mbetu nayo mpe tambola 9 Nambala moko abiki,azui mbeto naye mpe atamboli.Ezalaki mokolo na sabata. 10 Bayuda balobi na moto oyo abikaki ;ezali mokolo na sabata epesami na nzela na bato te komema mbetu. 11 Mobikisi na ngai olobi na ngai ete zwu mbetu nayo mpe tambola 12 Bayanoli ye;nani ayebisi yo zwa mbetu nayo mpe tambola? 13 Kasi mobiki oyo ayebaki te yesu mpo ete yesu abendanaki na nkuku bona etuluku ya batu oyo ezalaki esika wana 14 Sima na yango,yesu akutani naye nakati ya tempelo mpe alobi naye:tala,yo obiki! kosumuka lisusu te,kabanga ete eloko moko ya mabe ekomela yo. 15 Mobiki akeyi koloba naba yuda ete yesu nde abikisaki ye. 16 Natina nayango,bayuda bamonisaki yesu pasi mpo ete abikisaki moto mokolo nabo pemi. 17 Yesu ayanoli bango:tata na ngai azosala kino sikoyo ngai pe nazosala. 18 Natina nayango,bayuda bazalaki koluka ba bomaye,kaka te poye abikisaki mokolo ya sabata,kasi mpo ye abengaki lisusu nzambe tata naye,mpe amikomisaki nzambe. 19 20 Yesu alobi na bango:soso nalobi na bino,mwana akoki kosala eloko te ye moko,kasi akosala kaka oyo tata azali kosalam mpo ete makambo tata azali kosala, mwana pe azali kosala yango,lokola tata alingi mwana azali kosalela ye nionso 21 Mpe lokola tata asekwisaki bakufi mpe kopesa bongo bomoi,ndenge moko mpe mwana akopesa bomoi na moto nionso oyo ye alingi. 22 Mpo ete tata asambisaka moto te,kasi apesa kosambisa nionso na mwana . 23 Na ntina ete moto nionso akumisa mwana na ndenge bazali kokumisa tata,moto oyo azali kotosa mwana te ,atosi mpe tata te oyo atindaki ye 24 Na solo-solo,moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kondimela oyo atindaki ngai,azali na bomoi na seko mpe ye bakokatela ye etumbu te,nkasi ye alongi kufa mpe azwi bomoi 25 Ya solo-solo, nazali koyebisa bino,ngonga ekoya mpe esi eye, oyo ba weyi bakoyo mongongo ya mwana na nzambe mpe ba oyo bako yoka bako bika. 26 Lokola tata azali na bomoi nakati naye ndenge moko mpe apesa na mwana azala na bomoi kati naye 27 mpe tata apesa bokonzi naye na mwana mpo ete asambisa mpo ete azali mwana na moto. 28 Bokamwa te mpo ngonga ekoki oyo bato nionso bazali na nkunda bakoyoka mongongo mpe bako bima. 29 ba oyo basalaki malamu mpona lisekwi,ya bomoi,kasi ba oyo basalaki mabe natango ya lisekwi mpe ya esambiselo. 30 Nakoki kosala eloko moko te na ngai moko.nazali kosala mpona mposa na ngai te,kasi mpona mposa ya oyo atindaki ngai,kasi mposa ya oyo atindaki ngai. 31 Soki nazali kotatola mpona ngai moko,litatoli na ngai ekozala solo te. 32 Ezali na moto mosusu oyo atatolaka mpona ngai mpe nayebi ete litatoli naye mpona ngai ezali solo. 33 Bino botindaki bato epai ya yoani mpe atatolaki solo. 34 Kasi litatoli na ngai ewiti na bato te,nazali koloba boye mpo ete bobika. 35 kasi yoani azalaki mwinda oyo engengaka na tango moke, 36 Yesu olobi litatoli na ngai eleki ya yoan,mpo ete misala oyo tata apesi ngai kosala eleki ya yoani,ezali kolakisa ete tata nde atindi ngai. 37 Bino bolingi koyoka mongongo naye te . 38 Bomona ye ata moke te maloba naye ezali na bino mpe te,mpo bondimaka moto oyo ye atindi te. 39 Bino bozali koluka koyeba makomi,mpo ete boye ete nayango bokozwa bomoi na seko,kasi kaka makomi yango ezo tatola mpona ngai 40 mpe bino bolingi koya na ngai te mpo bozua bomoi 41 nkembo na ngai ewiti epayi ya bato te, 42 mpe nayebi ete bozali na bolingo na nzambe te kati na bino 43 Naye na kombo ya tata na ngai,mpe boyambi ngai te, soki moto moko ayaki nakombo naye moko,bolingaki boyamba ye. 44 Lolenge nini bokoki kondima,bino oyo bolingaka lokumu na nzela na bato kasi bolukaka lokumu na nzambe te. 45 Bokanisi te ke ngai,nakofunda bino epai na tata,ezali na moto mosusu oyo afundaka bino,ezali mose oyo bino bolikyaka. 46 Soki bozali kondimela mose,esengi na bino mpe bondimela ngai mpo ete oyo mose nakoma eza na ntina na ngai. 47 Soki bino bozali kondimela makomi naye te lolenge nini boko ndimela maloba na ngai?