1 Na ntango Yesu ayebaki ba Pharisiens bayokaki azali ko batisa batu ebele koteka Yoani, 2 (Na bongo Yesu ye moko abandaki kobatisa te kasi bayekoli na ye nde) 3 alungwe Judee mpe bazongaki lisusu na Galilée. 4 Ezalaki motuya kokenge na Samarie. 5 Ekomi bango na Samari, ba kombo na Sychar, pene ya lopango oyo Yakobo apesaka na mwana na ye Joseph. 6 Amoni libulu ya mayi ya Yakobo. Elembaki Yesu na mobembo mpe afandaki pembeni ya libulu Ezalaki na ngonga midi. 7 Mwasi moko ya samariya aye po na kotoka mayi, Yesu ayebisi ye: «Pesa ngayi na mela». 8 Na tango wana bayekoli na Yesu bakendaki kosomba bi leyi. 9 Mwasi ya Samaritain alobi: «Ndenge nini yo Mo Yuda, oza seka nga muasi ya samaritain mayi ya komela? Ba Yuda tosalisaka te.» 10 Yesu ayanoli ye: « Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo ozo lobela yo pesa nga mayi; olingaki yo moko kosenga , mpe kozua mayi ya bomoyi.» 11 Muasi ayebisiye: Moteyi, oza ata na katini te mpe libulu eza mozindo. Wapi tokozua lisusu mayi ya bomoyi? 12 Ozali munene koleka tata na biso Yakobo oyo apesa biso libulu oyo, mpe ye moko amela mayi oyo, na bana mpe ba nyama na ye?». 13 Yesu alobi na ye: «Oyo akomela mayi oyo ako yoka lisusu posa, 14 kasi mutu nyonso oyo akomela mayi nako pesa ye, ako yokaka lisusu posa ya mayi te. Nzokande mayi oyo nako pesa ye eko, komela ye libulu ya mayi oyo ekobimaka ti na bomoyi ya seko.» 15 MWasi ayebisi ye: «Molakisi, pesa nga mayi yango mpo nayoka lisusu posa ya mayi te, mpe nayaka lisusu wana ko toka te.» 16 Yesu ayebisi ye: « Kenda benga mobali na yo mpe zonga awa.» 17 Mwasi ayanoli ye: «Naza na mobali te» Yesu azongiseli ye: «Olobi ya solo, 18 mpo ozalaki na babali mitano, mpe oyo azali na ye aza li ya yo te. olobi ya solo» 19 Mwasi alobi: «Moteyi, na sosoli ete ozali mosakoli. 20 Ba tata na biso ba ngumbamelaki na ngomba oyo, kasi yo olobi ete na Yelusalem nde esika ya ko ngumbamela 21 Yesu alobeli ye: «Mwasi ndimela ngayi, ngonga ekoya oyo kongumbamela Tata ekozala lisusu te na ngomba, na Yelusalem mpe te. 22 Bozo ngumbamela oyo boyebi te. Biso toyebi oyo tozo ngumbambela, mpo ete lobiko eya na ba Yuda. 23 Tango ekoya mpe esi ekomi, tango ba ngumbameli ya solo bako ngumbamela Tata na Molimo mpe na solo, po ete azo luka ba ngumbameli ya bongo. 24 Nzambe aza Molimo, ba ngumbameli ye basengeli basala ngo pe na Molimo 25 Mwasi alobi: « Nayebi ete ozali Messie a koya (oyo babengi klisto). Tango akoya akolimbola makambo nyonso.» 26 Yesu alobi: « Ngayo yeyo, nazali oyo azoloba na yo.» 27 Kaka na tango wana bayekoli bazongi. bakamuaki lolenge azalaki kosolola na mwasi, kasi moko te alobaki: «Alingi nini?» to pona nini ozo solola na ye?.» 28 Mwasi atiki katini ya mayi, azongi na engumba m^pe ayebisi bato: 29 «Boya kotala moto moko oyo alobi na nga manso nazalaka. Akoki kozala Klisto te.» 30 Baye tokola ye. 31 Na tango wana ba yekoli bazalaki kobenga: Yesu po na kolia. 32 Kasi ayebisi bango: «Naza na bileyi yakolia oyo boyebi te». 33 Bayekoli ba tunani: «Mutu te amemeli ye bileyi, boye te?» 34 Yesu alobi na bango: «Bileyi na ngayi eza kosala mokano ya oyo atinda ngayi mpe ko kokisa mosala na ye. 35 Bo loba te etikali sanza nineyi mpo tobuka mbuma. Kasi ngayi na lobi bo tombola miso mpe botala milanga, tango ya kobuka ekoki! 36 Oyo azo buka azozwa mbano na ye mpe azo lokota mbuma mpo na bomoyi ya seko, po ete oyo azo lona na oyo azo buka basepele elongo. 37 Pona wana nde lisese:" Moko aloni mpe mosusu abuki." 38 Na tindaki bino bo buka oyo bolonaki te. Misusu basalaki mpe bino bokotaki na bilanga na bango. 39 Bato ya Samari ebele bandimelaki ngolu na Yesu pona matatoli ya muasi: «Ayebisaki ngayi manso nasala.» 40 Bato ya Samari baye na ye mpe bayebisi ye atikala mikolo mibale lisusu na bango. 41 Ebele ba ndimaki lisusu na maloba na ye. 42 Ayebisi muasi: « Tozo mbimela lisusu te kaka maloba na yo mpo ete biso moko pe toyoki ye, mpe to yebi ete aza mobikisi ya mokili ya solo.» 43 Sima mikolo misantu, akeyi na Galille. 44 Po ete Yesu ye moko alobaki ete mosakoli andimamaka te na mboka na ye. 45 Tango akomaki na Galilée, bato na Galileya bayambaki ye. Bamokaki biloko nyonso asalaki na Yelusalem na milulu, po ete bango mpe bakendaki. 46 Ntango azongaki lisusu na Cana na Galilée, esika abongolaki mayi na vino. Ezalaki na mosali moko ya mokonzi na Capernaum, muana na ye ya mobali azalaki na bokono. 47 Koyeba ete Yesu alungwaki na Judée po na Galileya, akeyi epa na Yesu mpe abondeli ye kokita mpe kobikisa mwana na ye oyo azalaki pene na liwa. 48 Yesu alobisi bango: «Loba ete bomonaki bilembo na bikamwa te, bozo ndima mpe te.» 49 Mokambi na mapinga alobi: «Malakisi, boya yambo ete muana na nga akufa». 50 Yesu ayanoli ye: «Kende, mwana na yo abiki.» Moto andimeli liloba oyo Yesu alobaki na ye, mpe akeyi. 51 Na bozongi akutani na basali na ye, balobi na ye muana asili kobika. 52 Atuni bango na ngonga nini abandaki kobika. Bayanoli ye: «Lobi na ngonga sambo nde bokono etikaki ye.» 53 Mokambi ya mapinga aye kososola ezalaki kaka na ngonga wana Yesu ayebisaki ye ete: «muana ye abiki.» Na bongo ye moko na libota na ye mobimba bandimeli. 54 Ezalaki likamwisi ya mibale oyo Ysu asalaki tango akendaki na Judée po na mboka Galileya.