Mokapo 3

1 Ezalaki na mofarizi moko kombo naye nicodème,molakisi yaba yuda. 2 Moto yango akendaki na butu epai na yesu pe alobi na yesu: Molakisi toyebi ete ozali molakisi owiti epai na nzambe, mpo ete ezali na moto mosusu te oyo akoki kosala bikamua lokola yo,soki nzambe aza naye te. 3 Yesu ayanoli ye, solo solo,soki moto abotami ya sika te akoki kokota na bokonzi ya nzambe te. 4 Nicodeme a yanoli yesu:lolenge nini moto akoki kobotama ya sika natango akomi mukolo ? Akoki te kozonga nalibumu ya maman po abotama ? 5 Yesu ayanoli ye: solo solo,soki moto abotami na mayi pe na molimo te ,akoki kokota te nabokonzi ya nzambe. 6 Oyo abotami na nzoto aza nzoto,pe oyo abotami na molimo aza molimo. 7 Kokamua te na oyo nayebisi yo:esengeli nayo obotama ya sika. 8 Mopepe ebetaka esika yango elingi . Ozoyoka makelele nayango ,kasi okoyeba te esika yango ewiti pe esika ezali kokende. Eza pe bongo na moto oyo abotami na molimo. 9 Nicodeme ayanoli ye: lolenge nini ekoki kosalema ? 10 Yesu ayanoli ye: Ozali molakisi y'israel pe ozali kososola mambo oyo te? 11 Solo,solo, tolobaka oyo toyebi pe totatolaka oyo tomoni. Nkasi bondimaka litatoli na biso te. 12 Soki nalobelaki bino makambo ya sé pe bondimeli ngai te,lolenge nini bokondima soki nalobeli bino makambo ya likolo? 13 Moto moko te amata likolo soki kaka oyo awiti kuna te,mwana na moto. 14 Lolenge mosse atombolaki nioka motako na esobe,lolenge wana pe mwana na moto esengi atombwama 15 po moto nioso oyo akondimela ye azua bomoi ya seko. 16 Nzambe alingi mokili apesi mwana naye moko,po ete moto nioso oyo andimeli ye abeba te kasi azua bomoi ya seko. 17 Nzambe atinda mwana naye na mokili te po akatela mokili etumbu nkasi pona mokili ebika na nzela naye. 18 Moto nioso akondimela ye azali na sé ya etumbu te, nkasi oyo akondima te aza na sé ya etumbu,po ete andimeli mwana sé moko ya nzambe te. 19 Tina ya esambiselo ,ezali oyo pole eye na mokili,nkasi bato ba lingi molili na esika ya mpole mpo ete misala na bango ezali mabe. 20 Mpo ete moto nioso oyo asalaka masumu aza moyini ya mpole pe ayaka na pole te akobanga ete misala naye ya mabe ekoyebana. 21 Lolenge moko pe na moto oyo azalaka sembo,ayaka na mpole,mpo ete misala naye oyo ekokisama na nzambe emonisama pe etalisama. 22 Sima na yango,yesu pe bayekoli naye bakeyi na mabele ya yudée. Wana abandaki kolekisa tango na bango mpe abandaki kobatisa. 23 Yoan pe azalaki ko baptisa na Enon pembeni ya salim mpo ete esika wana mayi ezalaki ebele.Bato bazalaki koya epai na ye mpo abaptisa bango, 24 wana yoan azalaki nanu akoti boloko te. 25 Nasuka ,bayekoli ya yoan basuani na moyuda moko pona bopetolami ya solo. 26 Ba yekoli ya yoan baye epai ya yoan ,balobi naye: Molakisi moto oyo azalaki nayo na ngambu ya ebale ya jourdain,pe oyo otatolaki po naye,tala azali kobatisa pe bato nioso bakeyi ebayi naye. 27 Yoan ayanoli:moto akoki kosala eloko te soki nzambe nde atindi ye te. 28 Bokoki bino moko kotatola ete nalobaki: nazali klisto te , kasi nalobaki natindamaki liboso naye. 29 Mokolo mwasi nde mobali,kasi moninga naye atondaka na esengo koyoka mongongo naye. 30 Esengeli ye aleka liboso ngai nazonga sima. 31 Ye oyo awiti na likolo azali likolo ya nioso. 32 Mpo azali kotatola oyo amoni pe ayoki,kasi bozali kotiya tembe. 33 Oyo andimi ye alakisi ete nzambe azali solo. 34 Nzambe atondisa ye na molimo mosantu koleka. 35 Lokola papa alingi mwana apesi ye bokonzi nioso. 36 Soki ondimeli yesu ,oza na bomoyi ya seko,kasi soki otosi ye te okozua bomoi te,kasi kanda na nzambe ekokwelela yo.