Mokapo 9

1 Tango yesu azalaki koleka,amoni moto moko akufa miso wuta mbotama naye. 2 Ba yekoli batuni yesu ezali mbeba naye, to baboti na ye,abotama boye? 3 Yesu ayanoli;ezali ye to baboti naye te nde basalaki mbeba,kasi eza mpo nzambe akumisama na kati naye. 4 Tosengeli kosala misala ya oyo atindaki ngai lokola tozali na bomoi. 5 Lokola nazali na mokili nazali mwinda ya mokili. 6 Tango yesu asilisi koloba makambo wana,abwaki soyi na mabele ,asali poto poto na soyi ,apakoli ye namiso. 7 Mpe alobi naye kende kosokola miso na siloe (elingi koloba motindami), moto yango akeyi mpe amoni. 8 Batonionso oyo bayebakaye kala ndenge azalaki kosenga-senga balobani: 9 Ezali moto oyo azalaki kosenga-senga. Misusu balobi ezali ye ,misusu pe ezali ye te,bakokani,kasi ye moko alobi ezali ngai 10 Batuni ye omoni ndenge nini? 11 Moto oyo babengaka yesu,asalaki poto-poto na soyi naye apakoli ngai mpe alobi nakende kosokola miso na siloe,tango natosi nasokoli mpe miso na ngai emoni. 12 Bato yango batuni ye: Azali wapi? Azongisi naye te. 13 Ba memi moto oyo azalaki na miso yakokufa epayi yaba farize. 14 Lokola ezalaki mokolo yako pema yesu asalaki poto-poto afongolaki ye miso . 15 Bafarize batuni lisusu moto wana ezalaki ndenge nini mpo amona 16 Bafarize balobi: Moto oyo awiti na nzambe te mpo azali kotosa mokolo yabo pemi te,lolenge nini moto awiti na nzambe te okokikosala bikamwisi minene boye? Bokabuani ekotaki bango na bango. 17 Batuni lisusu moto oyo azalaki na miso yakokufa; yo olobi nini mpona ye;ayanoli ;azali mosakoli . 18 Baboyi kondima ke abotamaki miso ya kokufa. 19 Batuni ba boti naye,oyo azalaki mwana na bini ? Oyo bazalaki koloba abotama akufa miso,sikoyo azomona ndenge nini mpe nani afongoli ye miso ? 20 Toyebi te azali mwana na biso abotama yako kufa miso. 21 Botuna ye moko azali mokolo akopesa bino eyano. 22 Baboti naye,bayanolaki bango mpo bazalaki kobanga bakonzi yaba yuda. Mpo bayuda ba bandaki kobengana na ndako ya nzambe moto nionso oyo akotatola ete yesu azali mobikisi. 23 Nde tina baboti naye bayanoli koloba :Azali mokolo. 24 Na mbala mibale ba bengi moto azalaki na miso yakokufa mpe balobi naye;kumisa nzambe,biso toyebi moto wana azali musumuki. 25 Mokufi miso ayanoli ;koloba azali musumuki to te etali ngai te , nayebi eloko moko nazalaki komona te sika awa amonisi ngai 26 Mpe balobi naye;asalaki nini mpo afongola yo miso? 27 Ayanoli ;nasi nalobaki na bino boyokaki te! Mpona nini bolingi boyoka lisusu? Bolingi bondimela ye ? 28 Bafingi ye mpe balobi yo nde moyekoli naye ? 29 Biso tozali bayekoli ya mose. Biso toyebi moise nzambe alobela ye ,kasi oyo te toyebi esika awiti te. 30 Moto alobi,bino bozali kokamwisa ngai,koloba awiti wapi,ye moto afongoli ngai miso. 31 Toyebi nzambe ayokaka moto na masumu te;soki moto atosaka mpe asalaka mokano naye akoyoka ye. 32 Wita ebandeli ya mokili,toyoka nanu te moto afongola miso ya moto oyo abotama amonaka te. 33 Soki moto yango azali ya nzambe te,akoki kosala eloko moko te, 34 bayanoli ye, soki obotama namasumu,olingi kolakisa biso,mpe babimisi ye libanda. 35 Tango yesu ayoki ete babimisi moto yango na eyanganeli. Amoni mpe alobi naye;ondimeli mwana na moto? 36 Ayanoli,mpe alobi;azali nana mpo nandima? 37 Yesu alobi naye: Omo ye oyo azali koloba nayo. Moto yango alobi. 38 Mokonzi na ndimi,mpe agumbameli ye. 39 Yesu alobi;nayaki kotala makombu ya mokili mpo ete ,baye ba kufa miso bamona,pe ba oyo ba monaka ba mona te. 40 Ba farize mosusu oyo bazalaki naye awa bayoki maloba wana,balobi naye; biso tokufamiso? 41 Yesu ayanoli : Soki bokufaki miso,mbele bozali ba sumuki te. Soki bolobi: tozo mona masumu na bino ezali .