Mokapo 9

1 Kasi Saul akobaki mosala na ye ya kotungisa mpe koboma bayekoli ya Mokonzi, akeyi epayi ya nganga Nzambe monene 2 mpe atuni mokanda mpo na eyangenela ya Damas na nitna ete azua basungi na nzela, babali to basi akangi bango miniololo kino na Yelusalema. 3 Na nzela ya kokenda bakomi pene na Damas na pusa kaka engali kowuta na likolo ebeti nzinga nzinga na ye; 4 akweyi na mabele mpe ayoki mongongo kolebela ye: «Saul, mpona nini ozali konyokola ngayi?» 5 Saul azongisi : «Yo nani, Mokonzi?» Mokonzi ayanoli : «ngayi Yesu oyo ozali konyokola; 6 kasi telema kota na engumba, kuna nde okoyeba oyo kosala.» 7 Mibali baye batambolaki na Saul, basilaki mayele ya koloba ezalaki te; bayo kaki mongongo kasi ba moni moto te. 8 Saul alamuki na mabele , tango afungoli miso, akokaki komona lisusu te; basimbi ye na maboko mpe bamemi ye na Damas. 9 Atikali wana mikolo misanto na kozanga komona, kolia na komela te. 10 Na Damas ezalaki na moyekoli moko babiangi ye Ananias. 11 Mokonzi alobeli ye na komona: « Ananias». mpe ayanoli: « Ngayi ye oyo Mokonzi.» Mokonzi alobi na ye: « Telema, mpe kenda na bala-bala babiangi Droite, kuna na ndako ya Yuda, tuna moto awuti na Tarse, babengi Saul; mpo azo bondela. 12 Mpe amoni na emoniseli moto na kombo ananias kokota mpe kotiela ye maboko mpoe amona lisusu». 13 Ananias azongisi: «Mokonzi, na yoki etuluku ya bato koloba mpona tina ya moto wana, mbala boni anyokoli libota esantu na yo na Jelusalema. 14 Azalaki na bokonzi kowuta na nganga Nzambe mokonzi pona kokanga moto nyonso ako belelaka kombo na yo». 15 Kasi Mokonzi ayebisi ye: «Kenda, ye azali oyo ngayi moko na poni po na kotalisa kombo na ngayi epayi ya bapagano, bakonzi mpe na bana Israel; 16 Nakotalisa ye ndenge ye akomona pasi na ntina na kombo na ngayi.» 17 Wana Ananias akeyi , akoti na ndako, atieli ye maboko mpe alobi: «Ndeko Saul, Mokonzi Yesu oyo amimonisaki epayi na yo na nzela na tango ozalaki koya, atindi ngayi mpo omona mpe otondisama na Molimo Mosantu.» 18 Na mbala moko, biloko lokola poso ya mbisi ekweyi na miso na Saul, mpo azongeli komona , azui libatisi, 19 sima aleyi mpe azui makasi na nzoto. Atikali na bayekoli mikolo ebele na Damas. 20 Kobanda wana, abandi koteya sango malamu ya Yesu na biyanganelo, koloba ete Azali mwana na Nzambe. 21 Baye banso bayokaki bazalaki kati na kokamwa, na koloba ete: «Oyo moto abandaki ko bebisa na Yelusalem bato oyo babandaki kolobela Yesu ?Mpe ayaki awa mpona kokanga bato komema bango epayi ya nganga monene na Nzambe.» 22 Kasi Saul akomi lisusu makasi koleka, mpe abandaki kobangisa ba Yuda oyo bazalaki kofanda na Damas nako lakisaka bango Yesu aza Klisto. 23 Sima mikolo ebele eleki, ba Yuda bayokani pona koboma ye. 24 Kasi miango na bango eyebani epayi ya Saul. Bakengelaki bikuke inso ba moyi mpe butu pona koboma ye. 25 Na butu bayekoli kakitisi ye na singa mpo bakimisa ye. 26 Tango akomi na Yelusalem, Saul aluki komonana na bayekoli , kasi bango nyonso babandaki kobanga ye, ba boyi ko ndima ye lokola moyekoli. 27 Kasi Barnabas azui ye mpe amemi ye epayi ya ba ntoma. Abandi koyebisa bango ndenge nini na nzela Saul amonaki Mokonzi , mpe Mokonzi alobelaki ye mpe ndenge nini ateyaki nkombo ya Yesu na makasi mpenza. 28 Ayebisi bango lolenge azalaki kokota mpe kobima na Yelusalem, azalaki koloba na etingia na kombo na Mokonzi Yesu 29 mpe azalaki kozongisela ba Yada Greque maloba; kasi ba oyo babandaki koluka na kolemba te ndenge nini koboma ye. 30 Tango ba ndeko bayoki nsango oyo, ba memeli yango Sezare mpe kuna bakeyisi ye mpona Tarse. 31 Wana bobombaki ye, Eklesia ezalaki na kimia na etonga na Yuda, Galile mpe Samarie, bazalaki kolendisama mpe kotambola kati na kobanga Mokonzi kati na nguya ya Molimo Mosantu. Bandimi batondaki mingi na ba etonga wana. 32 Sikoyo, po ete Petelo abandfaki kotambola engumba mobimba, akeyi mpe epayi ya ba ndimi oyo ya Lydde. 33 Kuna, akutani na moto na kombo Enée, oyo atikala ya kolala na ndetu naye kobanda mbula mwambe na gtina ya maladi ya buka-buka. 34 Petelo alobi: «Enée, Yesu Kliosto abikisi yo. Telema bongisa mbeto na yo». Na pete atelemki. 35 Bato ya mboka Lydee mpe ya Saron bamonaki ye mpe bandimeli Mokonzi. 36 Sika oyo ezalaki na Joppe moyekoli moko na kombo ya Tabita balimboli «Doloka». Muasi ya misla malamu azalaki kokabola na mawa na ye biloko na ye epayi ya babola. 37 Abeli mpe akufi; sima ya kosokola ye, batie ye na ndako ya mabondeli ezalaki likolo. 38 Lokola Lyde ezalaki pembeni na Joppé, mpe bayekoli ayokaki ete Petelo azalaki wana, batindi mibali mibale mpona kobondela Petelo na koloba: «Yaka na kozela te.» 39 Petelo atelemi mpe akeyi ba batu wana. Tango akomi, bakeyi na ye na esika ya mabondeli. Basi bakufela mibali bazalaki pembeni na ye na kolela, kolakisa bilamba oyo doloka azalaki kotonga tango azalaki na bomoyi. 40 Petela abimisi batu nyonso, atie mabolongo na ye mpe asambeli na sima abalukeli nzoto mpe alobi: «Tabita, telema» Dolokas afongoli miso mpe amoni Petelo afandi pene na ye. 41 Petelo apesi ye loboko mpe atelemisi ye. Na ntango abengi ba ndimi na ba mama bakufela mibali mpe alakisio bango ye na bomoyi. 42 Likambu oyo epanzanaki Koppe mpe mingi bandimelaki Mokonzi. 43 Petelo atikalaki mikolo ebele na Joppe epayi ya moto na kombo ya Simoni, moteki mposo ya nyama.