1 Saul andimaki liwa na ye, wana ebandaki mokolo monene ya koboma lingomba oyo ezalaki na Jelusaleme; bandimi nyonso bapalanganaki na Jude mpe na Samari, batikaki bantoma. 2 Bato ya mawa bakundaki Etienne mpe bayokaki mawa monene na tinja ya likambo wana. 3 Saul asaka mabe mingi na eyanganelo, azalaki kokenda ndako na ndako kobwaka mobali to mwasi, koti bango na boloko. 4 Bandimi baye ba panzanaki bazalaki kokenda koteya liloba. 5 Filipe akendaki na engoimba ya Samari koteya bango Klisto. 6 Lokola etuluku ya bato bayokaki mpe bamoni bilembo oyo Filipe asalaki, bazalaki na bokebi na oyo te azalaki koloba. 7 Bazalaki wana na milimo mabe elongwaki na bango na kati ya koganga na lokito makasi, Baye bakufa maboko to makolo babikaki. 8 Esengo monene etundaki na engumba wana. 9 Ezala engumba moto na kombo ya Simoni, ye azalaki kosala bondoki, azalaki kokamwisa ba Samaritani, amipesaki moto ya lokumu. 10 Ba Samaritani, nyonso azala muana to mokolo bazalaki kokeba mingi na maloba na ye, bazalaki koloba : «Moto oyo azali na bokonzi ya Nzambe, ye oyo abiangami moto ya monene.» 11 Bazalaki koyoka ye, mpo ete awumelaki mingin na kosala bikamuisi ya bondoki na ye. 12 Ntango bango bandimaki mateya ya sango malamu epayi na Filipe, na oyo etali bokonzi ya Nzambe mpe na kombo na Yesu Klisto, babatisaki mibali mpe basi. 13 Mpe Simoni ye moko andimaki mpe azuaki libatisi, tango amonaki Filipe akangami na ye na kotala bilembo na bikamwisi mpe atikalaki kati na kokamwa. 14 Sika oyo lokola ba Ntoma bazalaki na Jelusalema boyoki Samari ba yambi liloba ya Nzambe, na sima batindeli bango Petelo na Yoani. 15 Tango bakomi basambelaki mpo na bango, mpo ete bayamba ngolu ya Molimo Mosanto. 16 Mpo ete na ngonga wana, Molimo Mosanto ezalaki naino aye te mpo na bango.; bazuaki kaka libatisi na kombo na Mokonzi Yesu. 17 Na yango Petelo na Yoani batielaki bango maboko mpe bayambi Molimo Mosanto. 18 Lokola Simoni amonaki ete MOlimo epemeli bango na kotia maboko ya bayekoli, apesi bango mbongo. 19 Alobi : «Pesa ngayi bokonzi oyo mpo ete moto nyonso oyo ngayi na kotiela maboko akoka kozua Molimo Mosanto.» 20 Kasi Petelo ayanoli ye boye: «Tika okufa na masolo na yo, okanisi ete kozua likabo ya Molimo Mosanto ya Nzambe basombaka na mbongo. 21 Ozali na eteni to likabo likambo, mpo ete motema na yo ezali sembo te liboso na Nzambe. 22 Bongwana na kanda ya motema, sambela Mokonzi mpo ete akoka kolimbisa yo kati na misala na yo ya mabe. 23 Mpo et na moni yo ozali kati ya ngenge ya kozua , mpe kati ya bokangami na masumu. 24 Simoni azongiseli bango boye: «Basambela Mokonzi mpona ngayi, na tina nyonso olobeli ngayi, likambo moko ya mabe ezua ngayi te.» 25 Tango Petelo mpe Yoani batatoli mpe balobi liloba ya Mokonbzi, bazongaki na Jelusame, na nzela bazalaki koteya sango malamu kati ya ba mboka ebele ya ba Samaritani. 26 Sika oyo angeli ya Mokonzi alobi na Filipê na koloba: «Telema kenda na ngambu ya sud na nzela ya Jelusalem na Gaza.» (Nzela wana ezali na mabele ya zelo na zelo). 27 Bayoki mpe bakeyi. Kuna ezalaki na Ethiopien , oyo azalaki kokengela masolo ya mama mokonzi ya Ethiopi ayaki na Jelusalem mpo ya kosambela. 28 Azongaki likolo ya likalo, na nzela azalaki kotanga makanda mosakoli Isaya ya kofanda. 29 Molimo elobi na Filipe: «Kenda mpe pusana pene ya likalo wana.» 30 Filipe akeyi mbangu mpe ayoki moto azali kotanga mokanda ya Isayi mosakoli bongo atuni ye: «Ozali koyeba makambo ozali kotanga?» 31 Ethiopiya ayanoli: «Na koyeba ndenge nini soki moto alimboleli ngayi te?» Abondeli Filipe abuta na likalo mpe kofanda na ye esika moko. 32 Eteni ya mokanda ya Nzambe oyo azalaki kotanga yango oyo: «Akomaki lokola meme oyo balingi koboma, lokola mwana mpate oyo elelaka te tango bazali kolongola yango nkunza, afungolaki ata munoko te. 33 Na kati ya komikitisa balongolaki kosambisama ye. Na bakitani na ye, pamba te balongo laki na mokili.» 34 Moto wana ya Ethiopia atuni Filipe: «Nabondeli yo, mosakoli abandaki kolobela nani? Ya ye moko, to ya moto mususu?» 35 Filipe ayanoli ye na kobanda nzela ya mokanda Isaya, sima ateyi ye na maye matali Mokonzi. 36 Otango bazalaki kokenda bakomi pene ya bitima ya mayi, moto na Ethiopa alobi : «Tala awa mayi yango oyo nini epekisi yo mpo obatisa ngayi?» 37 38 Na yango moto na Ethiopa asengi batelemisa likalo, bakoti na mayi, Filipe na moto na Ethiopiya, wana Filipe abatisi ye. 39 40 Tango babimi na mayi, Molimo ya Mokonzi ememi Filipe wana moto na Ethiopiya amoni ye lisusu te, kasi asepelaki na kokoba nzela na ye. KAsi Filipe akomi mboka Azot. Akatisi etuka na kati ya koteya sango malamu na engumba kino kokoma na Sezare.