1 Nganga mokonzi alobi: «Boye nde otatolaki?» 2 Etienne ayanoli: «Baninga mpe ba mpaka, boyoka ngai: Nzambe na nkembo oyo amonisamaki na mpaka na biso Abraham, tango ye afandaki na Mesopotamie, yambo ya kofanda na Charan; alobaki na ye: 3 "Tika mboka na yo mpe bandeko na yo, boye kenda na mboka nakolikisa yo"» 4 Boye atiki mboka ya ba Chaldéens mpe amifandisi na mboka Charan. Boye sima ya kufa ya tata wa ye, Nzambe akambaki ye o mboka bino bofandi; 5 Boye epesamelaki ye esika moko te ya bofandi; nzoka nde apesaki ye elaka (ata ko Abraham azangaki mokitani) ete mboka yango ekopesamela ye na bakitani na ye sima ya eleko. 6 Nzambe atalisaki ye, ete akofandisa bakitani na ye ngonga moke na mabele ya bapaya, boye bakofanda na bohumbu ya bakolo mabele mpe bakonyokolama mbula nkama minei. 7 Boye nakosambisa mokili yango epai bokozala na bohumbu, elobi Nzambe, sima na yango nde bokobima mpe bokokumisa ngai na mabele oyo. 8 Bongo asalaki boyokani ya bokati ngenga na Abraham, na yango Abraham akomaki tata na Isaac, mpe akataki ye ngenga sima ya mikolo mwambe; Isaac akomaki tata ya Jacob mpe Jacob tata na ba mpaka zomi na mibale. 9 Ba mpaka bakolisaki likunya na Joseph, mpe bateki ye mpo te akumbama na Egypte, kasi Nzambe azalaki na ye elongo, 10 boye Nzambe asungaki ye na minioko yonso, apesaki ye ngolu mpe kimia liboso na Pharaon, mokonzi na Egypte. Pharaon atombolaki ye mbula matari ya Egypte mpe ya ndako na ye mobimba. 11 Bongo nzala mpe mpasi makasi eyingeli na Egypte mpe Canan; boye ba mpaka bazangaki bilei. 12 Kasi eleko Jacob ayokaki ete masangu ezali naEgypte,atindaki ba mpaka ya yambo. 13 Mbala ya mibale, Josephamilakisi na bandeko na ye; boye libota na Joseph eyebanaki na Pharaon. 14 Joseph atindaki bandeko na ye koyebisa Jacob tata na ye, koya na Egypte elongo na libota mobimba: motango ya bato tuku sambo na mitano. 15 Boye nde Jacob ayingelaki na Egypte. Sima ye mei akufaki, kolandisama na ba mpaka yonso. 16 Bakundamaki na mboka Sichem, esika wapi lilita Abraham asombaka na mosolo epai ya bana ya Hamor na mboka Sichem. 17 O eleko Nzambe apesaki na Abraham ekomaki pembeni, libota ekolaki mpe bakomaki bayike kati na egypte, 18 kino mokonzi mosusu ayingelaki na egypte; mokonzi oyo ayebaki Joseph te. 19 Mokonzi yango asalaki zunguluke na ba mpaka na biso mpe anyokolaki bango, kino kobwaka bana babotami sika mpo ete bakufa. 20 Mose abotamaki na eleko wana.Ye azalaki bonzenga na miso ya Nzambe mpe abokolamaki sanza misato na ndako ya tata na ye. 21 Eleko oyo basundolaki ye, elenge mwasi mwana ya Pharaon akamataki ye mpe abokolaki ye pela moko mwana na ye. 22 Mose ateyamaki na boyebi yonso lolenge moko na bana egypte; mpe akomaki makasi na maloba mpe na misala. 23 Na bokokisi mibu pene na tuku minei, akanisaki kokenda kotala bandeko na ye, bana na Israël. 24 Boye na komona bazali konyokola moyuda moko, Mose abundeli ye kino kino koboma egyptien. 25 Akanisaki ete ndeko na ye akososola ete na nzela na ye nde nzambe akosikola bango, nzoka nde basosolaki te. 26 Mokolo elandaki, apusanaki pene na ba yuda mosusu oyo bazalaki kondongwana. Amekaki koyokanisa bango; na koloba boye: «Bino bozali bandeko; boni-boni bozali kosalana mabe?» 27 Boye oyo asalaki moninga mabe ayimi yimi mpe alobi: «nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso? 28 Okani koboma ngai pela moko obomaki egyptien lobi loleki?» 29 Sima ya boyoki mbela wana, Mose akimaki. Akomaki mopaya na mboka Madian,wapi abotaki bana babale. 30 Sima ya mibu tuku minei, mwanze abimelaki ye na lisobe ya ngomba ya Sinaï, kati na moto ya manganga. 31 Boye Mose komona moto, akamwaki na emoniseli yango; bongo tango abelemaki mpo na kononga, mongongo ya Mokonzi engulumaki koloba boye: 32 "Ngai nazali Nzambe ya bakoko nayo, Nzambe na Abraham, Isaac mpe Jacob." Na bobangi yonso akokaki ata kotala te. 33 Mokonzi alobi na ye: «Bimisa sapato na yo zambi esika etelemi yo, ezali mabele ebulisama. 34 Ngai namoni solo minyoko ya libota ya ngai kati na egypte, nayoki milelo na bango mpe nakiti na ntina ya kosikola bango. Sasaipi, napesi yo mitindo ya koyingela na egypte.» 35 Mose oyo bobwakisaki, tango babelelaki: Nani akomisaki yo mokonzi mpe mosambisi? ye wana Nzambe atindaki pela moko mokonzi mpe mosambisi. Nzambe atindaki ye na nzila ya mwanze oyo abimelaka ye kati na manganga. 36 Mose abimisaki bango libanda na egypte sima ya kosala bilembo mpe bikamwa kati na egypte mpe na ebale monene motane, mpe na lisobe mibu tuku minei. 37 Bobele Mose wana, alobaki na libota ya bayuda: Nzambe akobimisa mosakoli kati na bino pelamoko ngai. 38 Ye nde engambe mobali oyo azalaki kati na lisanga, bisika bikawuka na mwanze oyo alobelaki ye likolo na ngomba sinaï. 39 Engambe mobali oyo azalaki na bakoko na biso; mobali oyo akwaki maloba ya bomoi mpo na koteya biso. Engambe mobali oyo nde bakoko na biso baboyaki kotosa, babwakisaki ye mpe bazongisaki mitema na bango na egypte. 40 Eleko wana, balobaki na Aaron: boye salela biso banzambe oyo bakotambwisa biso. Bongo maye matale Mose oyo abimisaki biso na egypte, toyebi maye makomeli ye te. 41 Boye batumbaki mbeka ya mwana ngombe mpe babonza yango na nzambe ya bikeko, sima mpe bayokaki nsayi na misala bangao mei basalaqki na maboko. 42 Nzoka nde Nzambe asiliki mpe apesi bango mokongo mpe abwakisaki bango na kokumbamela minzoto na likolo.mpela moko ekomama na buku ya basakoli: ndako nbayuda, bokataki bibwele nkingo mpo na kotumbela ngai mbeka mpe kobonzela ngai na mibu tuku minei kati na bisobe? 43 Bino boyingisaki mongombo ya molck mpe monzoto ya nzambe ya Remphan, bikeko oyo bino bosalaki mpo na kokumbamela: Boye ngai nakokumba bino mosika koleka Babylone. 44 Bakoko na biso bazalaki na mongombo ya botatoli na lisobe,lolenge Nzambe apesaki mitindo tango ye asololaki na Mose, ete esengelaki ye komekola yango lolenge ye amonaki yango. 45 Yango nde hema oyo bakoko na biso, kati na botamboli na bango, bakumbaka na mboka elongo na jJosua. Yango ekomaki tango ya mabele epesamelaki bango likolo ya mabota oyo Nzambe asilaki kobengana liboso ya bakoko na biso. Etikalaki bongo kino mikolo na Dawidi, 46 oyo azwaki ngolu liboso na Nzambe; boye asengaki ete hema esantu etongama mpo na Nzambe na Jakobo. 47 Kasi ezalaki bongo nde Salomo atongaki ndako na Nzambe. 48 Ata ko bongo, Nzambe na lola afandaka na ndako etongami na maboko na bato te; pela moko mosakoli alobaki. 49 "Likolo ezali efandeli na ngai, bongo mabele ezali nde etelemeli na ngai. Lolenge ya ndako nini bokotongela ngai?" Bo elobaki Mokonzi. Wapi epemelo na ngai? 50 Loboko na ngai te, nde asali nyoso? 51 Bato bazangi botosi mpe kokatama ngenga na mitema mpe na matoyi; bozali kotelemela tango inso molimo mosantu; bozali komekola bo bakoko na bino basalaki. 52 basakoli boni boni bakoko na bino babenganaki te? Babomaki basakoli oyo bayingelaki liboso ya moyengebene obe moko; sasaipi, bino mpe bomekoli bayini mpe babomi, 53 bino oyo bozwaki mobeko na ndikisa ya ba anzelu, kasi bobombaki yango te. 54 Tango likita ya banganga nzambe bayokaki boye, mitema mia bango mizokaki, mpe baliaki mino na kotuka Etienne. 55 Nzoka nde ye kotondisama na molimo mosantu, atelemaki ngwi miso kotala likolo mpe amonaki nkembo na Nzambe. 56 Etenne alobaki boye: «Botala, nazali komona mapata kofungwama, bongo mwana na moto kotelema na loboko mobali na Nzambe.» 57 Na boye likita na banganga nzambe bangangaki makasi, bongo bamikangaki matoyi, mpe bamibwakaki elongo likolo na ye. 58 Babwakaki ye libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga: boye banzeneneke bakumbaki bilamba na bango na nse ya makolo ya elenge mobali moko na nkombo Saul. 59 Bongo bazalaki kobwakela Etienne mabanga, ye atombolaki mongongo kobondela Mokonzi mpe koloba boye:«Mokonzi Yesu, okamata molimo mwa ngai» 60 Bongo ye kofukama, angangaki makasi; «Mokonzi, kokumbisa bango lisumu oyo te. Sima ye koloba bongo, akati motema.»