Mokapo 6

1 O ekeko wana, mutuya ya bayekoli ebandaki kokola, na bongo bayuda Heleniste bafundaki baoyo ya Hebele, na ntina ete basi na bango oyo bakufela mibali, bazali kotiolama na tango ya bokaboli bilei ya mokolo na mokolo. 2 Bayekoli zomi na mibale, babengi bayike na bayekoli mpe bayebisi bango boye: «Ebongi te na biso kosundola liloba na Nzambe mpo na kokabola bilei. 3 Bopona kati na bino, bandeko sambo oyo bajali na bizaleli malamu, batondisami na Molimo mpe na bwanya, boye tokoki kopesa bango mokumba ya mosala wana. 4 Mpo na biso, tokokoba tango inso kati na losambo mpe na mosala ya kopanza liloba na Nzambe.» 5 Maloba na bango esepelisaki bayike na bango. Na bongo baponaki Etienne, oyo atonda na kondima mpe na molimo mosantu, mpe Filipo, mpe Prochore, Nicanor, Timon, Parmenas mpe Nicolas, mondimi ya sika ya mboka Antioche. 6 Bandimi bakumbaki bato o bonso ya bantoma oyo babondelaki mpe babulisaki bango. 7 Na bongo, liloba na Nzambe etambolaki mosika, boye motuya ya bantoma ekobaki na lombango kati ya Yelusaleme. Mpe motuya makasi ya banganga Nzambe bakobaki na kondima. 8 Mpe Etienne atondisami na nguya mpe na ngolu, ajalaki kosala bikamwisi minene kati na batu. 9 kasi ndambo ya bato ya eyanganelo ya Cyreniens mpe ya Alexandriens, mpe ndambo ya bato ya Cicilie, mpe ya Azia batomboki. Bazalaki kotelemela Etienne. 10 Kasi bakokaki kolonga bwanya mpe molimo oyo ezalaki koloba kaki na Etienne. 11 Na bongo, basombaki bayike na nkuku mpo na koloba: «Toyokaki Etienne kobimisa maloba ya bosoto na ntina na Mose mpe Nzambe.» 12 Batombokisaki bato, bampaka mpe bakomi mibeko mpe banso oyo babundisaki Etienne, bakangaki ye mpe bamemaki ye o boso bwa bajuzi. 13 bakumbaki banzeneneke ya lokuta koloba:«Moto oyo atikaka te kotatola maloba ya bosoto, na ntina ya eska ya bule mpe na mibeko. 14 Mpo toyokaki ye koloba ete Yesu akobongola bizaleli nyonso oyo Mose atangisaki biso.» 15 Baoyo banso bafandaki ya ba mpaka, babalolaki miso kotala ye, mpe bamoni ete elongi na ye ekomaki lokola ya anzelu.