Mokapo ya 5

1 Tata moko na kombo Ananias na muasi naye safira, batekaki eteni ya bozui na bango, 2 Ba bombi mua ndambo ya bongo, mwasi na ye ayebi. 3 bakeyi kotika epayi ya ntoma, Peteloatuni ye, Pona nini satana ayengeli na motema nayo mpo obuka lokuta? Oksi nde bato te kasi okosi Nzambe. 4 Yambo ya koteka, ezalaki ya binote, bongo tango boteki ezali ya bino te? 5 Eyoki ye liloba wana, Anania akueyi mbala moko mpe akufi, kobanga monene ezui baye banso oyo bayokaki yango. 6 Bilenge mibali baye balingi ye mpona kokunda. 7 Sima ya ngonga misato, muasi naye akoti, mpe ayebi makambo elekaki te. 8 Petelo alobi naye, yebisa ngayi soki botekaki bilanga na talo wana, ayanoli boye na talo wana. 9 Bongo Petelo alobi naye, pona nini boyokani poa kkomeka molimo na Mokonzi? tala baye bakundaki mobali nayo batelemi na ekuke, mpe bakomema yo. 10 Akweyi tango wana, mpe akufi, mpe bilenge mibali bazongi bakuti ye akufu. bamemi ye bakeyi kokunda ye pembeni na mobali naye. 11 Bobangi monene ekangi ekelrzia nionso, mpe baye banso, boyokaki eloko eye. 12 Bilembo ebele, mpe bikamuisin ezalaki kosalema kati ya mabota na maboko ya ba ntoma bazali esika moko na mbarabani ya salomo. 13 Moto moko te, azuaki makasi ya kosangana na bango, libota ezalaki kolinga bango penza. 14 Bolamu, bandimi bazalaki kobakisama mpo na mokonzi, bayike ya mibale mpe basi, 15 na ndenge ete, bamemi bato ya bokono pembeni na nezla pe balalisi bango likolo na etoko mpe mbeto natango ntoma Petelo akoleka, elelingi ekika kozipa bayike. 16 Mua ndambu ya baton bawuti na ba engunda ezali pembeni ya jeruzalem, baye mpe lokola bamemi bato na bokomo, mpe ba oyo milimo mabe ekangaki bango, mpe banso babikaki. 17 Kasi ngonga Nzambe mokoNzi atelemi banso oyo bazalaki naye, mpe binzambi nzambi ya ba sadusoyo batondi na likunya. 18 Bakangi bantoma mpe bwaki bango na boloko ya bato banso. 19 kasi na butu, angelu ya Mokonzi afungoli ekuke na boloko, mpe abimisi bango. 20 Bokende na tempelo mpe bosakola na libota nionso maloba ya bomoyi oyo. 21 Tango bayoki, bakati na ba tempelo, na tango mpe balakisi, kasi nganga Nzambe mokonzi na baye bazalaki na ye, babengi likita, ba mbuta muta ya bona Isayele, batindi bango mpona koluka ba ntoma na boloko. 22 kasi mokonzi ya basoda akeyi kotala kuna na boloko, mpe azangi kopesa sango. 23 Tokuti boloko ekangami, mpe ba jsinzili bazali liboso ya ekuke ya boloko tango tofongoli ekuke, tokuti moto moko te na kati. 24 Tango mokonzi ya ndako ya Nzambe mpe nganga Nzambe, mokambi bayoki maloba eye bakamue somo ezui bango, na likambo oyo ekoki koya na sima. 25 Kaka na tango wana, moto moko aye koyebisa bango sango, bato oyo bobwakaki na boloko, bazali na tempelo mpe kolakisa mabota. 26 Kapitaine mpe mokonzi ya ba soda bakeyi ko mema bango, kasi na malembe, na makasi te, mpo ete bazalaki kobanga mbasili komema po ete ba bamba bango mabanga te. 27 Tango basili komema bango, ba batikibango liboso ya likita, nganga Nzambe monene, nde atuni bango? 28 Alobi, topekisaki bino makasi mpona kotangisa nkombo wana kasi botondisi jeruzaleme na malakisi, mpe bolingi kotia likolo na biso makila ya moto wana? 29 Kasi Petelo, na ba ntoma bayanoli: to koki kotosa Nzambe, kasi bato te? 30 Nzambe ya ba tata na biso nde asekui Yesu, oyo bino bo bomaki, mpe bo bakiye na nzete. 31 Nzambe atomboli ye na loboko ya ye ya mobali mpo azala muana mpe mobikisi, pona kopesa kotubela na Isalael, mpe kolimùbisa masumu. 32 Tozali ba nzengeleke na biloko wana kutu molimo mosatu oyo nzambe apesaki bato oyo batosakaye. 33 Tango batambuisi ya likita bayoki libanda pona tango moke. yango, basiliki mpe balingi koboma ba ntoma. 34 Kasi mofarizo Gamaela, mosali mibeko monene oyo, banto banso na Isalael batosaka ye atelemi mpe apesi mitindo na ba ntoma ba bima 35 Nasima, alobeli bango, bato na Isalael, bosala keba na oyo tolingi kosala bato oyo. 36 Mpo sima ya tango moke, Theudas atelemaki komilakisa ye azali moto mpe ebele ya bato pene pene na kama mineyi, ba sanganaki naye. Mpe ba bomi bango banso, mpe baye banso oyo bazalaki kotosa ye, ba panzani, mpe basili. 37 Sima ya moto oyo, Yuda ya galilea atelemaki na tango ya kotanga, motango ya bato mpe abendi mua eteni ya bato, ye mpe akufi, baye banso oyo bazalaki kotoso ye bapanzani. 38 Sika oyo, na yebisi bino, bozala mosika na bato oyo, mpe tika bango kimia, soki ezali mabongisi to mosala ewuti na bato, ekokweya. 39 Kasi soki ewuti epayi na Nzambe, bino bokoki kolonga yango te. bokoki kutu kososola ete bozali kobundisa Nzambe, na bongo bango banso badimi. 40 Na sima, babengi ba ntoma, mpe ba beti bango, mpe ba pekisi bango koloba na nkombo na Yesu, Mpe batiki bango bakende. 41 Ba bimi na likita na kosepela na tina ete esali malamu na komona litioli pona nkombo wana. 42 Sima nayango, mikolo nionso na tempelo mpe ndako na ndako, bazali kolakisa mpe kokoba koteyate Yesu a azali Kristo.