Mokapo 4

1 Wana Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na bato, ba nganga Nzambe bayaki mpe bakonzi ya soda mpe ba sadukai. 2 Bazalaki na kanda na Petelo mpe Yoane na ndenga bazalaki kolakisa etuluku na bato na tina na yesu mpe lisekwa.Elingi koloba ete bakufi bakosekwa. 3 Bongo bakangaki bango mpe batiaki bango na boloko kino lobi mpo ekomaki pokwa. 4 Ebele na bato oyo bayokaki mateya yango badimaki, mpe motuya na baoyo ba ndimaki ezalaki mibali pene pene koto mitano. 5 lobi yango, bakonzi na bayuda mpe ba mbutamuntu mpe bakomi na mibeko basangani na jerusaleme. 6 Nganga monene Anne azalaki, Caiphe, Yoane mpe alexandre mpe ya libota ya mokonzi bazalaki wana. 7 Tango batelemisi Petelo mpe Yoane katikati na bango, mpe batunaki bango soki na nguya nini mpe na kombo ya nani bobikisaki bokono ya moto oyo? 8 bongo Petelo oyo iatondaki na molimo mosantu alobaki na bango: Bakambi mpe ba ba mbutamuntu. 9 Botuni biso lelo mpona jbolamu oyo tosali epayi ya mobeli, bolingi koyeba soki abikaki na nguya nini? 10 Tika toyebisa bino mpe ekolo mobimba ya Isalaele ete moto oyo abiki mpe atelemi liboso na bino na nguya na nkombo na Yesu ya nazareth oyo bino bobomaki na ekulusu mpe Nzambe asekuisaki ye. 11 Yesu Kristo nde libanga bobuakaki na batongi, ekomi, libanga oyo esimbi moboko ya ndaku. 12 Kobikisama ezuami kaka epayi na moto moko, pona mokili mobimba, Nzambe atiaki moto mosusu te oyo akoki kobikisa biso, kaka Yesu. 13 Tango nionso ya likita bamonaki kasakasa ya Petelo mpe Yoane, bazalaki na kobanga te, nzoka nde bazalaki bato pamba, basosoli ete bazalaki elongo na Yesu. 14 kasi lokola bazalaki komona moto oyo abikaki kotelema pene pene na bango bokokaki lisusu kotia tembe te. 15 Bongo babimisaki bnga na libanda ya likita monene, mpe babandi kotiana tembe. 16 Balobi: « tosala nini na bato oyo? mpo bato nionso ya Jerusaleme bayebi ete ezali bato nde basali bikamuiseli oyo monene, mpe tokoki kowangana yango te. 17 Kasi mpo ete sango yango epalangana kati na bato te, topekisa bango baloba lisusu na nkombo na Yesu te.» 18 Babengaki Petelo mpe Yoane mpe bapekisi bango koloba to koteya na nkombo na Yesu. 19 Kasi Petelo mpe Yoane bazongiseli bango: bo pona binomoko: totosa bino to totosa Nzambe? 20 Pamba te biso tokoki kotika kolobate makambu oyo tomonaki mpe toyokaki. 21 Bantoma likita bangangeli bango lisusu, mpe babimisi bango, bazuaki bazuaki likambo ya kopesa bango etumbu te, mpo bato bazalaki kosanzola Nzambe. 22 Moto oyo abikisamaki azalaki na mibu koleka tuku minei. 23 Sima na bango kobima, Petelo mpe Yoane, bakeyi epayi ya baninga na bango, mpe bayebisi bango makambu nionso oyo ba nganga Nzambe mpe ba mbuta mutu balobaki. 24 Sima ya koyoka lisolo yango, basangani mpona kosambela Nzambe boye: Mokonzi , yo ozalisi lola mpe mokili, ebale mpe biloko nionso kati na yango. 25 Na nguya na molimo mosanto, olobaki na monoko na koko na biso Dawidi mosali nayo: mpona nini ekolo nionso bazali kotomboka mpe kongala pamba pamba boye? 26 bakonzi na mokoli bazali kobongama na etumba, basali makita mpona kombunda mpe Mokonzi mpe ba Klisto naye. 27 Yasolo Erode mpe Ponso Pilato basangani na engunda oyo, elongo na ba paya mpe bato na Isalaele mpona kombunda na yesu Oyo yo opona ka kozala masiya. 28 Basalaki boye mpona kokisa makambo nionso oponaki liboso katina nguya mpe bolingo nayo. 29 Mpe ssikoyo Mokonzi, ltala ndenge bazali kogangale biso basali nayo. pesa biso nguya ya koteya nsango na yo . 30 Sembola loboko nayo, mpe bikisa babeli, bilembo mpe bikamuiseli esalema mpo na nkombo na mosala nayo yesu. 31 Awa basilisi kosambela, esika oyo bafandaki eningani, bango nionso batondisami na molimo mosantu, mpe baban di kosakola baloba na Nzambe na makasi nionso. 32 Bandimi nionso bazalaki na motema moko, biloko ezaliki ya lisanga. 33 Nzambe azalaki kopesa nguya na ntoma, mpona kosakola lisekwa na Mokonzi Yesu. 34 Ata moto moko te na kati na bango azalaki kozanga, mpo bandimi nionso oyo baza na bilanga to ndaku, batekaki yango mpe batiaki mosolo nionso esika moko. 35 mpe bapesaki mbongo nionso na ba ntoma*, mpe bazalaki kokabola yango na moto nionso. 36 Moto moko na libota na lewi na nkombo ya Yoseph kowuta na Chypre, ba ntoma bapesaki nkombo mosusu Barnabas (elingi koloba: moto ya kopesa mpiko). 37 Lokola azalaki na bilanga naye, atekaki yango mpe apesaki mbongo yango na ba ntoma