Mokapo 3

1 Boye Petelo na Yoane bakendaki na ndaku na Nzambe na mabondili na ngonga ya libwa. 2 Ejalaki na ebosono moko banda bomuana bajalaki komeman ye mikolo nyonso kotika ye o ekuke ya ndaku ya Nzambe oyo ba bengi la Belle; mpo na kosenga likabo ya mawa na bato bajalaki kokota na ndako ya Nzambe. 3 Ntango amonaki bango kokota asengi bango likabo ya mawa. 4 Petelo atali ye na miso elongo na Yoane alobi : « Tala biso». 5 Mokakatani atali bango na elikia ya kozua mwa eloko epayi na bango. 6 Kasi Petelo alobi: «Najali na ata wolo te to palata te, kasi oyo najali na yango nakopesa yo. Telema pe tambola na kombo na Yesu Klisto ya Nazareta.» 7 Petelo asimbi ye na loboko ya mobali mpe na mbala moko mpe atelemisi ye, mbala moko makolo na mabolongo na ye esembwani. 8 Nakopumbwe, mokakatani atelemi mpe atamboli; mpe akoti na Petelo na Yowani na tepelo, nako tambola, kopumbwe na kosanjola Nzambe. 9 Moto nyonso amoni ye kotambola mpe kosanjola Nzambe. 10 Batu nyonso Basosoli ete ejali moto oyo ajalaki kofanda mikolo nyonso kosenga mbongo na ekuke ya ndako ya Nzambe oyo babengi la Belle; bakomaki na komana oyo esalami. 11 Lokola ye azalaki kolanda Petelo na Yoane bato nyonso akendeki mbangu na mbarazani babengi Salomo na kokamua. 12 Emoni Petelo bango, alobi mpo na nini bino batu na Israel bozali kokamua. Pona nini bozo tala biso makasi boye lokola biso moko nde totambwisi mutu oyo na nguya na biso moko. 13 Nzambe ya Abalayama, Isaka mpe Yakobo, Nzambe ya ba tata na ye, akumisi mosali na ye Yesu, oyo bino bokabaki mpe bo wanganaki liboso ya Pilato ntangu alingaki kotika ye. 14 Boboyaki Mosantu mpe Mutu ya Bosembo bosengaki batikela bino mobomi. 15 Bobomisaki Mokonzi ya kimia oyo Nzambe asekwisaki na bakufi biso tozali ba nzengeleke na ye. 16 Sika oyo na kondima na nkombo na ye moto oyo bomoni mpe boyebi. Nkombo yango elendisi ye. kondima oyo etiami na Yesu, epesi ye makoki koona ye na nzoto kolongono. 17 Sika oyo bandeko, nayebi bosali boye mpo na kozanga koyeba na bokonzi na bino. 18 Kasi eloko Nzambe asakolaka na monoko ya basakoli yonso esengelaki Klisto anyokwama na sika ekokisami. 19 Bobongola mitema mpe boyangela mpo ete alimbisa masumu na bino mpo ntango ya kopema na liboso na Mokonzi; 20 atindela bino Klisto oyo aponamaki mpo na bino mokonzi. 21 Azali oyo likolo ezali koyamba kino ntango ya kobongisa makambo yonso oyo Nzambe alobaka kala na monoko ya basakoli. 22 Mose alobaki :"Mokonzi Nzambe akobimisa mosakoli lokola ngayi kati na bandeko na bino bokoyokela ye na manso oyo ako yebisa bino. 23 Ekokoma moto yonso oyo akoyo kela mosakoli te, akobebi sama na kati ya etuluku ya bato. 24 Iyo, basakoli oyo baleki liboso balobaka kobanda Samuel, bayebisaki kino mokolo oyo. 25 Bazali bana ya basakoli mpe ya boyokani ya Nzambe asalaki na bankoko na biso, lokola alobaki na Abalayama: "mabota nyonso ya mokili bako pambuama na bakitani na yo". 26 Yango wana Nzambe abimisi mosakoli na ye mpo na liboso atindi ye mpo abenisa bino mpe alongola moto nyongo na kati na nzela ya masumu