Mokapo 2

1 Na mikolo ya milulu ya boyeî ya molimo mosantu, ba mikangaki banson na esika moko. 2 Na pwasa mopepe makasi kowuta na likolo ekoteli baango mpe etondisi ndako. 3 Bilembo ya bikoti ya moto emonani na mito na bango. 4 Bongo batondisami na molimo mosantu mpe ba bandaki koloba na minoko ya bapaya ndenge molimo azalaki kotinda bango. 5 kaka na ngonga yan,go, lba yuda mpe bato ya sembo ya bikolo nionso ya mokili bazalaki na jerusalem. 6 Na makelele wana, ba poti nangu mpê bakoti na bulu yeke mpo bakuti bango koloba na monoko ya moko na moko kati na bango. 7 Ba tondaki na esengo mpe ko kamwa makasi na kolobaka ete « bango nionso bazali bato na Galile te?». 8 Boni boni tozali koyoka bango na minoko na biso ya mboka? 9 Perses, Medes, Elamites mpe baye ba vandaka na Mesopotamie, na Judee mpe na Cappadoce, na Pont mpe Asie, 10 Na Phrygie na Pamphylie, na Egypte mpe na Engkumba ya Lybie pene ya Cyrene, na bapaya bawuti Rome, 11 ba yuda mpe ba pagano oyo bandimi lingomba ya ba yuda ba ninga ya Crete mpe Arabie, tozali ko yoka bango kotatola misala ya nguya ya Nzambe. 12 Bango bazalaki n a esengo makasi mpe kokamwa, mpe bazali ko tunana kati na bango: « oyo likambo nini ». 13 Ba mususu kati na bango ba tioli bango mpe balobi « balangwe lotoko ». 14 Elongo na bayekoli Pierre alobi « ba ninga lya judee, mpe bato nionso ya jerusalem boyoka likambo oyo» 15 Biso to langwe lotoko te bo bo ùbazali kolaba pamba te tozali nanu na ngonga ya misatu ya mokolo. 16 Boyoka makambo, masakoli Joel alobaka na kala. 17 Nzamba alobi alobi na mikolo na suka na kosopa molimo nanga na bato nionso. Bana na bino ya basi mpe ya mibali ba kosakola. Bilenge na bino ya mibali bakozua bimoniselo mpe bakolo kati na bino ba ko banda kolota bandoto. 18 Bobele bongo na basali nangayi mibalio mpe ya basi, nako sopa mpe molimo nangayi mpe ba kosakola. 19 Nakosala bilembo na likolo mpe makamuisi awa na nse, makila, moto mpe milinga. 20 Moyi eko bongwana molili mpe sanza ekokoma makila, yambo mokolo na Mokonzi ekoma, mokolo monene mpe ya ko kamwa. 21 Na bongo nani oyo akobelela kombo ya Mokonzi akobika. 22 Ba ninga ya Israel, boyoko nsango oyna nzambe ye moko liboso na bino bo o: Yesu ya nazareth, moto oyo Nzambe adima na kati na bino kolandana na misala minene ya kokamwan mpe bilembo asala na nguya na Nzambe ye moko liboso na bino boyebi bino nionso. 23 Kolanda na mabongisi mpe mayele koeka ya Nzambe, atekamaki mpe bapaya na bosenga na bino ba bakakiye na ekulusu mpe akufaki. 24 Kasi Nzambe asekwisaki ye, na kokangola ye na miniololo ya liwa mpo ete jeko kaka kosalama te ete liwa ekanga ye. 25 Pamba te Dawidi alobaki pona ye ete: " nazalaki komona Mokonzi kotelema mikolo nionso liboso na ngayi na loboko ya mobali mpo na kokengela ngayi nete na kweya te". 26 Yango wana nsai na motema pe loyembo ya esengo na monoko mpe nzoto na ngai pena na kimia. 27 Mpo oko sundola molimo na ngayi na mboka bawa te, mpe oko pesa nzela te ete nzoto ya monsantu nayo epola. 28 Ososolisa ngayi ba nzela ya bomoyi mpe okotondisa na bolalisi nayo. 29 Ba ninga, na motema pio, na lingi na lobela mpo na koko nabiso Dawidi: toyebi ete akufaki mpe akundamaki bongo lilita naye ezali kino lelo oyo. 30 Lokola azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe alakaki mpe alapaki ndayi ete mokitani naye akoyingela ye. 31 Asosolaki mpe asakolaki pona lisekwa ya kristo "basundolaki ye na mboka bawa te mpe nzoto naye epolaki te". 32 Nzambe asekwisaki ye, mpe toyebi yango malamu biso nionso. 33 Anetolama, mpe kowuta na loboko ya mobali ya Nzambe, asopeli biso molimo mosantu alakaki biso ndenge bozali komona mpe koyoka lelo. 34 Dawidi amata na likolo te kasi aloba " Mokonzi alobaki na Mokonzi na ngayi, fanda na loboko na nga ya mobali, 35 Kino na ko komisa ba nguna nayo enyatelo nayo. 36 Yango wana, tika libota mobimba ya Israel eyeba solo solo ete Yesu oyo bobakaki na ekulusu, Nzambe akomisa mokonzi mpe kristo. 37 Mateya masimbi mitema na bango mpe ba tuni pierre na ba ninga naye: "baninga sika tosala nini?". 38 Petelo ayanoli: « bobongola mitema mpe bozua libatisi na kombo na Yesu Kristo mpo na bolimbisi ya masumu na bino, bongo bokozua likabo ya molimo monsantu. 39 Pamba te elaka yango ezali mpe pona bana na bino. mpe mpo bato nionso oyo bazali na mokili, ebele ya bato nionso Mokonzi Nzambe na biso akobenga». 40 Na ebele ya mateya mosusu, ezalaki ko sosolisa bango koloba ete « bomibikisa na ekeke oyo ya goyi goyi». 41 Na suka ba yambi maloba na Nzambe mpe bazui libatisi mpe na mokolo yango bato pene ya 3000 ba bakisami na jlingomba. 42 Bazalaki kowumela na malakisi ya ba ntoma mpe na bomoko, na kokabola kwanga mpe na ba losambo. 43 Bobangi elataki bango moko na moko, mpe bilembo mpe bikamwa ezalaki kosalama na kati na bango na nzela ya ba ntoma. 44 Bato nionso badimelaki bazaki lisanga mpe biloko na bango nionso ezalaki esika moko. 45 Bazalaki koteka bozui na bango mpe ko kabola misolo wana kati na bango kolandana ba bosenga ya moko na moko. 46 Boye mikolo nionso bowumelaki na lolenge wana kati na tempelo, kokabola kwanga na ba ndeko, mpe kolia bileyi na esengo mpe komikitisa na motema. 47 Bazalaki ko ngumbamela Nzambe mpe bazuaki ngolu na bato na mboka. Mokonzi azalaki kobakisa mokolo na mokolo bato oyo bazalaki ko bongola motema.