1 Mokanda mwa yambo oyo ntoma Polo akomelaki Teofile na maye manso Yesu abandaki kosala mpe koteya, 2 Kino mokolo oyo abutaki o likolo. Sima na kopesa mitindo na nzela ya Molimo Mosantu na ba ntoma oyo baponamaki, 3 baye abimelaki bango nsima ya lisekwa kowuta kati na mpasi ya liwa. 4 Ntango akutanaki na bango, ayebisaki bango boye, apesaki bango mitindo ete bakende mosika ya Jelusalema te kasi bazila elaka ya Tata, lolenge alobaki: «Bayokaki na ngayi 5 Yoane azalaki kopesa libatisio bobele na mayi kasi bino sima na mikolo moke boko batisama na molimo mosantu.» 6 Tango ba sanganaki batu naki ye boye: «Na ntango wana nde okofandisa bokonzi na Israele?» 7 Ayanoli bango boye: «Ezali na bino te koyeba ntango to mikolo oyo Tata Nzambe aponi yango na lolenge na bokonzi na ye mpenza.» 8 Kasi bino, bokozua nguya ya molimo mosantu ekoya likolo na bino, bokozala balobeli na ngayi na Jelusaleme, na Juda mobimba mpe kati ya Samari mpe suka ya etando ya mokili mobimba. 9 Tango Yesu asilisi koyebisa bango makambo oyo, lokola azalaki kotala na likolo, atombwami mpe mapata ezipi ye na miso na bango. 10 Lokola bazalaki kowumela bobelez kotala na likolo, batu mibale na molato ya pembe babimeli bango na puasa mpe babelemi na bango. 11 Balobelaki bango boye: «Bino batu ya Galileya pona nini botelemi kuna kotala na likolo ntangu molayi? Yesu wana esili ye kobuta na likola akozonga lisusu lolenge ekendeki ye na likolo.» 12 Bongo bazongaki na Yelusalema wuta ngomba na ba Olivia oyo ezali pena na Yelusalema, molayi ndenge moko na nzila ya Sabata. 13 Wana esilaki bango kozonga na mboka, bamataki likolo na esika ba mesana kosangana bomomesano. Bazalaki Petelo, Yoane, Zaki, Andre, Filipe, Toma, Bartelemi, Matayo;, Zaki mwana Alphee, Simoni le Zelote et Yude, mwana Zaki. 14 Basanganaki banso kati na bo moko na kati ya mabondeli tango yonso elongo na basi lokola Mariya mama ya Yesu na bandeko na ye. 15 Na mokolo wana, Petelo atelemaki na katikati ba ndeko bazalaki motango 120, mpe alobi: 16 «Ezalaki na ntina mpenza ete makomi ekokisama, na lolenge Molimo Mosanto alakaki na monoko na Dawudi na ntina na Yudasi oyo akambaki baye bakangaka Yesu. 17 Azalaki moko na biso mpe azalaki kozua mbano na ye na mosala oyo. 18 Lelo moto oyo asili kosomba elanga na mosolo ya nkele na ye, akwesami mutu yambo, nzoto epanzani , mpe nyonso kati ya libumu na ye epanzani. 19 Makambo yango eyebani na kati na batu ya Yelusaleme mobimba mpe babengi elanga wana na lokota «Hakeldama» elakisi « elanga makila» 20 Pona yango ekomami kati na mokanda ya nzembo bayuda :«Tika ete esika oyo ekoma esika ya mawa moto te akoma esika yango. Bongo motu mosusu azua esika na ye» 21 Eleki na malamu, moko na batu oyo batambolaki na biso ntango nyonso oyo Mokonzi Yesu azali na kati na biso, 22 kobanda libatisi ya Yoane tii mokolo abutwi kati na biso, azala moko na ba oyo bozalaki mpe bamonaki elongo na biso lisekwa.» 23 Babimisaki o bonso na bango batu mibale: Yozefo lokola Barsabbase mpe kobenga lisusu Justus, na Matthias. 24 25 26 Babondelaki boye: «Mokonzi yo moko oyebi nyonso, monisa biso nani kati na batu mibale oyo nani oponi pona kozua mosala ya ntoma esika Yuda oyo ye moko atikaki yango mpona kokende epayi ye moko aponaki.» Bongo babetaki zeke pona kozua motu moko; zeke elakisaki Matthias nde aponamaki mpe atangaki ye na ba toma.