Mokapo 10

1 Moto moko ya engumba Cesaree, na nkombo Corneille, capitaine ya lingomba ya basoda babengi «Italienne.» 2 Azalaki moto na sembo, ya kongumbamela Nzambe na libota na ye mpe bazalaki kopesa misolo ebele na bayuda mpe kosambela Nzambe mbala o mbala. 3 Pene na ngonga ya libua ya mokolo, amoni polele na emoniseli anzelu ya Nzambe kobimela ye mpe kobenga ye na nkombo. 4 Corneille akamwi mpe atondi na kobanga alobi: «Tata likambo nini?» anzelu azongisi: «Mabondeli mpe makabo na yo mpo ya babola makoni liboso ya Nzambe lokola makabo ya kokanisaka. 5 Sasaipi benga Simoni oyo abiangami mpe Petelo azali na engumba ya Jopppee. 6 Afandi epai ya Simoni mobongisi poso ya nyama , ndako na ye ezali pene ya ebale. 7 Tango anzelu akei, Corneille abengi kati na basali na ye mibale mpe soda moko ya mondimi kati na basoda na ye. 8 Ayebisi bango manso makomelaki ye mpe atindi bango na Joppee. 9 Lobi na yango , pene na ngonga ya motaba ya mokolo, lokola bazalaki na nzela mpe bakomi pene na Joppee, Petelo amati likolo na ndako mpo na kobondela. 10 Kuna ayoki nzala mpe esengelaki kolia. kasi wana bazali kobngisa makusa, amemami na molimo, 11 lola efungwami mpe ekolo monene na lolenge ya bolangeti esimbami na songe na yango minei,ezalaki kokita. 12 Na kati na yango ezalaki banyama yonso ya makolo minei mpe baoyo batambolaka na mabele mpe bandeke ya likolo. 13 Bongo ayoki mongongo koloba na ye: «Petelo, telema, boma mpe lia.» 14 Petelo azongisi maloba: «Te! Mokonzi; naino nalia nyama ya mbindo te.» 15 Na mbala ya mibale mongongo elobi na ye lisusu: «oyo Nzambe amoni peto, komona yango mbindo te.» 16 Yango esalami mbala misato bongo ekolo yango ezongaki na lola. 17 Wana Petelo azalaki kokanisa na ntina na emoniseli azwaki, tala bato bauti apai ya Corneille bakomi liboso ya ndako. 18 Babeleli na mongongo makasi kotuna soko Simoni babengi Petelo azali. 19 Lokola Petelo azalaki kokoba kokanisa na ntina na emoniseli, Molimo Mosantu alobi na ye: «Tala bato misato bazali koluka yo! Telema, 20 kita mpe kenda na bango. kobanga te pamba te, ngai moto natindi bango.» 21 Petelo akiti mpe akutani na bango mpe alobi: moto bazali koluka ezali ngai, boyei nini?» 22 Bayanoli ete: «Capitaine moko na nkombo Corneille, moto na sembo mpe mongumbameli ya Nzambe mpe bayuda yonso batatoli bolamu na ye, azwaki mitindo kouta epai na Nzambe kobenga yo na ndako na ye, mpo ayoka sango malamu. 23 Petelo ayambi bango mpe balali esika moko yambo bazonga lobi na yango. Ndambo ya baninga ya Joppee mpe bakendaki na bango. 24 Na mokolo elandaki, bakomaki na Cesaree mpe Corneille azalaki kozila bango, ye na baye abengaki. 25 Tango Petelo akoti na ndako, Corneille afukami liboso na ye mpo nakokumbamela ye. 26 Petelo atelemisi ye mped alobi na ye: «Telema! Ngai mpe nazali moto lokola yo.» 27 Wana Petelo azalaki kosolola na ye, akoti na ndako mpe akuti bato ebele. 28 Alobi na bango: «Boyebi bino moko ete epekisami na moyuda kosolola to kokota na ndako ya mopagano, kasi Nzambe alobi na ngai ete namona moto moko te mbindo. 29 Yango wana nayei na mbela na yo na tembe te.» Boye obengi ngai nini? 30 Corneille alobi: "eleki mikolo minei nazalaki na mabondeli na ndako, na ngonga ya boye, namoni moto moko na bilamba ezalaki kongenga liboso na ngai 31 mpe alobi: "Corneille! Nzambe ayoki losambo na yo mpe akanisi makabo na yo na ntina na babola. 32 Tinda moto akende kobenga Simoni babengi ye Petelo, afandi na ndako ya Simoni mobongisi mposo ya nyama pene-pene na ebale. 33 (Na mbala moko, natindaki bato epai na yo mpe osali malau mpo oyei. Sasaipi, tozali banso liboso na Nzambe mpo na koyoka mitindo nini apesi na yo mpo na biso) 34 Na bongo Petelo azwi maloba: «ya solo, nayebi et Nzambe azali na kopona pona bato te. 35 Kasi na mokili mobimba, nani oyo azali kobanga ye, kongumbamela ye, mpe kotambola na sembo, Nzambe akosepela na ye. 36 Boyebi sango malamu atindelaki bayuda oyo etalisi ete kimia ezali na nzela na Yesu oyo azali Mokonzi na bato yonso. 37 Boyebi bino moko oyo elekaki na Judee, kobanda na Galilai, sima na libatisi oyo Yoane azalaki koteya. 38 Makombo etali Yesu ya Nazareth, boni boni Nzambe apokolaki ye mafuta ya Molimo Mosanto mpe na nguya. Azalaki kotambola, kosalaka bolamu mpe kobikisa bato yonso oyo zabolo azalaki kotungisa; pamba te, Nzambe azalaki na ye. 39 Tozali banzeneneke na makambo yonso oyo asalaki na mboka na bayuda mpe na Yelusaleme, Yesu oyo babomaki na ekulusu. 40 Moto oyo, Nzambe asekwisaki ye na mokolo na misato mpe amonisi ye, 41 na bato yonso te, kasi na banzeneneke baoyo Nzambe aponaka uta kala; nde biso oyo toliaki mpe tomelaki na ye sima na kosekwa na ye. 42 Apesaki biso mitindo ya koteya libota ya bayuda mpe totatoli ete aponamaka na Nzambe mpo azala mosambisi ya bato bazali na bomoi mpe baye bakufa. 43 Basakoli yonso bazali kotatola ete moto yonso akondimela ye, akozwa bolimbisi ya masumu na nkombo na ye. 44 Wana Petelo azalaki naino koloba, Molimo Mosanto akiteli bango yonso bazalaki koyoka mateya. 45 Baninga oyo balandaki Petelo kolongwa na Joppee bakamwi komona bapagano mpe kozwa Molimo Mosanto. 46 Pamba te bazalaki koyoka bapagano koloba na lokota ya sika mpe kokumisa Nzambe. Petelo ayanoli na nguya:« 47 Bakoki kopimela libatisi ya mai na baoyo bazwi Molimo Mosanto lokola biso?» 48 Apesi mitindo babatisa bango libatisi na nkombo na Yesu mpe basengi na ye kofanda na bango mwa mikolo moke.