Mokapo 11

1 Bantoma mpe bandeko bazalaki na Yudee bayokaki ete bapagano bayambi liloba na Nzambe. 2 Ntango Petelo akendaki na Yelusaleme, etuluku ya bandimi babangaki mpe balobi: 3 «Yo osangani na bapagano mpe olei na bango!» 4 Kasi Petelo alimbolaki bango na siki siki koloba boye: « 5 Nazalaki kati na mobondeli na engumba ya Joppee mpe namonaki emoniseli liputa moko ya monene kokita na likolo na biteni na yango minei, ekiti esika na ngai. 6 Nasimbamaki mpe nasosolaki, namoni banyama ya nzamba, na baoyo batambolaka na nse na mabele mpe bandeke na likolo 7 Nayokaki mongongo kolba na ngai ete: «Telema! Petelo, boma mpe lia.» Nayanoli: 8 «Te, Mokonzi eloko moko te ya mbindo ekota na monoko na ngai.» 9 Kasi mongongo elobi lisusu kouta na likolo koloba: «oyo Nzambe alobi ezali bule, moto akoki koloba te ezali mbindo.» 10 Yango esalemi misato, mpe ezongi na likolo. 11 Tala bato misato batelemi o boso ya ndako esika tozalaki, batindamaki epai na ngai kouta na Cesaree. 12 Molimo apesi ngai motindo ya kokenda na bango kokakola te. Bandeko motoba bakei na ngai elongo, tokoti na ndako na ye. 13 Ayebisi biso ndenge anzelu abimelaki ye na ndako koloba: «Tinda bato na Joppee mpe senga mosali na Nzambe Simoni babengi Petelo. 14 Ye akoyebisa yo sango, yo na libota na yo bobika.» 15 Tango nabandi koloba Molomo Mosantu akitaki likolona bango lokola na biso na ebandeli. 16 Ngai nakanisi liloba oyo Mokonzi alobaki: «Yoane abatisaki na mayi, kasi bino bokobatisa na molimo na Nzambe.» 17 Soki Nzambe apesaki bango likabo moko na biso oyo tondimela Mokonzi Yesu Klistu, ngai nani mpo natelemela Nzambe? 18 Tango bayokaki makambo oyo, batikalaki kimia, bakumisaki Nzambe koloba: «Nzambe abongoli mitema ya bapagano mpo ete bazwa bomoi ya seko.» 19 Na bongo baye bapalangani na Yelusaleme mpo na monyokoli ,ebandaki na kufa ya Etienne, ekei kino Phenicie,Chypre mpe Antioche. Bateyaki liloba bobele na bayuda. 20 Kasi ba mosusu na Chypre, mosusu naCyrene, mosusu na Antioche, Bamosusu bazalaki koloba kigrec, bateyaki bango sango malamu ya Mokonzi Yesu. 21 Loboko ya Mokonzi ezalaki likolo na bango mpe bato ebele babongolaki motema, bayaki epai ya Mokonzi. 22 Sango etamboli, ekomi na matoi ya lingomna ya Yelusaleme; batindaki Barnabas kino na lingomba ya Antioche? 23 Wana ekomaki ye mpe amoni ngolu na Nzambe, azalaki na esengo mpe alendisaki bango kokangama na Mokonzi na motema moko. 24 Azalaki moto malamu, atondisami na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bayike balandaki Mokonzi. 25 Barnabas akendaki na Tarse mpo na koluka Saul. 26 Sima na komona ye, amemi ye na Antioche. Bayanganaki elongo na likomba mbula mobimba mpe koteya bato bayike. Ezali nde na Antioche mpo ete bayekoli babiangama mbala ya liboso baklistu. 27 O eleko ena, basakoli bakomaki na Antioche kouta Yelusaleme. 28 Moko na bango na nkombo ya Agabus atelemaki mpe kosakola na nzela ya Molimo, nzala monene na mokili mobimba. Yango ekokisamaki na tango ya mokonzi Claude. 29 30 Na yango, bantoma bazwaki mokano ya kotinda lisungi na bandeko ya Yudee. Basalaki bongo mpe batindaki misolo epai ya bampaka ya lingomba na nzela ya Barnabas mpe Saul.