1 Na eleko wana, mokonzi Herode akangaki bato mosusu ya lisanga mpo na konyokolo bango. 2 Abomaki Jaki ndeko ya Yoane na mopanga. 3 Lokola amonaki ete esepelisaki bayuda, akangaki mpe Petelo. Ezalaki tango ya pasika. 4 Sima ya kokanga ye mpe kotia ye na boloko, atiaki basoda zomi na motoba, bakabwani na biteni mine, basoda minei na eteni moko mpo na kokengele ye. Azalaki na makanisi ya kosambisa ye sima ya pasika. 5 Petelo kati na boloko, lisanga bazalaki kobondela makasi na ntina na ye. 6 Liboso ete Herode asambisa ye, Petelo alalaki kati ya basoda mibale bakanga ye na minyololo mibale mpe bakengeli mibale liboso ya ekuke ya bakengeli ya basoda. 7 Anzelu mokonzi abimelaki ye pwasa mpe boloko engengaki, abetaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ya mpe alobi: «Telema na lopango» Na yango, minyololo ya maboko ekweyaki. 8 Anzelu alobi na ye: Lata bilamba mpe sapato na yo. Petelo akeli yango. Anzelu alobi lisusu: Lata kazaka mpe landa ngai! 9 Petelo alandi anzelu mpe abimi. Amonaki yango kosalama lokola ndoto. Azalaki koyeba te ete ezali solo, azalaki kokanisa ete ezali ndoto. 10 Tango baleki ekuke ya liboso, ya mibale mpe bakomi na ekuke ya mabende; oyo ezali kokenda kino engumba, efungwamaki yango moko liboso na bango. babimaki mpe bakomi na nzela, anzelu alimwi. 11 Tango Petelo amitali, alobi:« namoni ya solo Nzambe atindi anzelu na ye akongola ngai na boloko ya Herode mpe mposa ya bayuda.» 12 Sima ya komona boye, akendaki na ndako ya malia mama na Yoane oyo abengami na nkombo ya Malako, esika ebele ya bandimi bayangaki mpe kobondela. 13 Tango abetaki ekuke, mosali moko ya mwasi na nkombo rhode, ayaki kofungola. 14 Tango ayoki mongongo ya Petelo, abosani kofungola ekuke na ntina na esengo, apoti mbangu kopesa sango ete Petelo azli liboso ya ekuke. 15 Balobi na ye: ozali liboma. Kasi azalaki koloba ete ezali solo. bango balobi ezali elilingi na ye. 16 Kasi Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke mpe tango bafungoli, bamoni ye mpe bakamwi. 17 Petelo asalaki bango elembo na maboko batika makelele mpe ayebisi bango ndenge Mokonzi asali mpo abima na boloko. Alobi: «Boyebisa makambo oyo na Jaki mpe bandeko mosusu.» Atikaki bango mpe akendaki esika mosusu. 18 19 Ntongo etani, yiki-yiki ekoti kati na basoda na maye makomelaki Petelo. Sima ya koluka ye, mpe amoni ye te, Herode atuni basoda mpe apesi mitindo baboma bango. Sima na yango, akendaki na Judee na mboka Cesaree mpe atikali kuna. 20 Herode asilikaki makasi na bato na Tyr mpe Sidon. Bayaki elongo epai ya mokonzi, basololi malamu na Blaste, mosungi ya mokonzi ete asunga bango kosenga kimia na mboka na bango pamba te, mboka ya bango ezwaka bilei na mboka ya mokonzi. 21 Mokolo moko ekomaki, Herode alataki bilamba naye ya bokonzi mpe afandi na ngwende na ye; apesi lisikulu. 22 Baimboka bangangi: Oyo ezali mongongo ya nzambe kasi ya moto te. 23 Mbala moko anzelu mokonzi abeti ye mpo apesi nkembo na Nzambe te. Aliamaki na nkusu mpe akufaki. 24 Kasi liloba ya nzambe ekolaki mpe efulukaki. 25 Barnabas mpe Saulo, bakendaki kosakola na Yelusaleme. kozonga na bango, bazwaki Yoane oyo abiangami Malako.